< Kobima 19 >

1 Sanza misato sima na bana ya Isalaele kobima na Ejipito, kaka na mokolo yango, bana ya Isalaele bakomaki na esobe ya Sinai.
İsrailliler Mısır'dan çıktıktan tam üç ay sonra Sina Çölü'ne vardılar.
2 Tango balongwaki na Refidimi, bakotaki na esobe ya Sinai, mpe Isalaele atongaki kuna kati na esobe molako etalana na ngomba.
Refidim'den yola çıkıp Sina Çölü'ne girdiler. Orada, Sina Dağı'nın karşısında konakladılar.
3 Moyize amataki na ngomba mpo na kosolola na Nzambe; mpe wuta na likolo ya ngomba, Yawe abengaki ye mpe alobaki na ye: — Tala makambo oyo okoyebisa bakitani ya Jakobi mpe oyo okotalisa na bana ya Isalaele:
Musa Tanrı'nın huzuruna çıktı. RAB dağdan kendisine seslendi: “Yakup soyuna, İsrail halkına şöyle diyeceksin:
4 « Bomonaki bino moko ndenge nini nasalaki bato ya Ejipito mpe ndenge nini namemaki bino lokola na mapapu ya mpongo kino epai na Ngai.
Mısırlılar'a ne yaptığımı, sizi nasıl kartal kanatları üzerinde taşıyarak yanıma getirdiğimi gördünüz.
5 Soki botosi Ngai penza mpe bobateli boyokani na Ngai, bokozala mpo na Ngai ekolo ya motuya kati na bikolo nyonso. Atako mokili mobimba ezali ya Ngai,
Şimdi sözümü dikkatle dinler, antlaşmama uyarsanız, bütün uluslar içinde öz halkım olursunuz. Çünkü yeryüzünün tümü benimdir.
6 kasi bino bokozala mpo na Ngai ekolo oyo ekosala mosala ya bonganga-Nzambe, ekolo ya bule. » Oyo nde maloba okoyebisa bana ya Isalaele.
Siz benim için kâhinler krallığı, kutsal ulus olacaksınız. İsrailliler'e böyle söyleyeceksin.”
7 Moyize azongaki, abengisaki bakambi ya Isalaele mpe ayebisaki bango maloba nyonso oyo Yawe atindaki ye koloba.
Musa gidip halkın ileri gelenlerini çağırdı ve RAB'bin kendisine buyurduğu her şeyi onlara anlattı.
8 Bato nyonso bazongisaki lokola moto moko: — Tokosala nyonso oyo Yawe alobi. Bongo Moyize amemaki eyano na bango epai na Yawe.
Bütün halk bir ağızdan, “RAB'bin söylediği her şeyi yapacağız” diye yanıtladılar. Musa halkın yanıtını RAB'be iletti.
9 Yawe alobaki na Moyize: — Nazali koya epai na yo kati na lipata monene, mpo ete bana ya Isalaele bayoka tango nakosolola na yo mpe mpo ete batia tango nyonso elikya na bango epai na yo. Moyize ayebisaki Yawe makambo nyonso oyo bana ya Isalaele balobaki.
RAB Musa'ya, “Sana koyu bir bulut içinde geleceğim” dedi, “Öyle ki, seninle konuşurken halk işitsin ve her zaman sana güvensin.” Musa halkın söylediklerini RAB'be iletti.
10 Yawe alobaki na Moyize: — Kende epai ya bato, bulisa bango lelo mpe lobi, bongo yebisa bango ete basukola bilamba na bango;
RAB Musa'ya, “Git, bugün ve yarın halkı arındır” dedi, “Giysilerini yıkasınlar.
11 bamibongisa mpo na mokolo ya misato, pamba te na mokolo wana nde Ngai Yawe, nakokita na likolo ya ngomba Sinai, na miso ya bana nyonso ya Isalaele.
Üçüncü güne hazır olsunlar. Çünkü üçüncü gün bütün halkın gözü önünde ben, RAB Sina Dağı'na ineceğim.
12 Okotia bandelo zingazinga ya ngomba mpo na bato mpe okoyebisa bango: « Bosala keba ete bomata te na ngomba oyo mpe bopusana te pembeni na yango. Moto nyonso oyo akotuta yango akokufa penza.
Dağın çevresine sınır çiz ve halka de ki, ‘Sakın dağa çıkmayın, dağın eteğine de yaklaşmayın! Kim dağa dokunursa, kesinlikle öldürülecektir.
13 Soki moto moko abuki mobeko oyo, bakosimba ye te, kasi bakoboma ye na mabanga to bakotobola ye likonga; ezala moto to nyama, asengeli kokufa. Kaka soki lokito ya liseke ya meme eyokani makasi nde ndambo ya bato bakomata na ngomba. »
Ya taşlanacak, ya da okla vurulacak; ona insan eli değmeyecek. İster hayvan olsun ister insan, yaşamasına izin verilmeyecek.’ Ancak boru uzun uzun çalınınca dağa çıkabilirler.”
14 Moyize alongwaki na ngomba, akendeki epai ya bana ya Isalaele, abulisaki bango, mpe basukolaki bilamba na bango.
Sonra Musa dağdan halkın yanına inip onları arındırdı. Herkes giysilerini yıkadı.
15 Moyize alobaki na bango: — Bomilengela mpo na mokolo ya misato, bosangisa nzoto te na basi na bino.
Musa halka, “Üçüncü güne hazır olun” dedi, “Bu süre içinde cinsel ilişkide bulunmayın.”
16 Na tongo ya mokolo ya misato, bakake ebetaki, mikalikali ezalaki kongenga, mpe lipata monene ezipaki ngomba; bongo bato bayokaki bakelelo kobeta makasi. Bato nyonso kati na molako balengaki.
Üçüncü günün sabahı gök gürledi, şimşekler çaktı. Dağın üzerinde koyu bir bulut vardı. Derken, çok güçlü bir boru sesi duyuldu. Ordugahta herkes titremeye başladı.
17 Moyize abimisaki bato mpo ete bakende kokutana na Nzambe, na libanda ya molako. Mpe bato batelemaki na ebandeli ya ngomba.
Musa halkın Tanrı'yla görüşmek üzere ordugahtan çıkmasına öncülük etti. Dağın eteğinde durdular.
18 Milinga ezipaki ngomba Sinai mpo ete Yawe akitaki na likolo na yango na lolenge ya moto, bongo milinga yango ezalaki komata lokola milinga oyo ebimaka na fulu ya moto. Mpe ngomba nyonso eninganaki makasi.
Sina Dağı'nın her yanından duman tütüyordu. Çünkü RAB dağın üstüne ateş içinde inmişti. Dağdan ocak dumanı gibi duman çıkıyor, bütün dağ şiddetle sarsılıyordu.
19 Mongongo ya kelelo ezalaki kaka komata se komata. Boye Moyize abandaki koloba na Nzambe, mpe Nzambe azalaki koyanola ye na lokito ya kake.
Boru sesi gitgide yükselince, Musa konuştu ve Tanrı gök gürlemeleriyle onu yanıtladı.
20 Yawe akitaki na likolo ya ngomba Sinai mpe abengaki Moyize mpo ete amata na songe ya ngomba yango. Boye Moyize amataki.
RAB Sina Dağı'nın üzerine indi, Musa'yı dağın tepesine çağırdı. Musa tepeye çıktı.
21 Yawe alobaki na Moyize: — Kita mpe kebisa bato ete baleka bandelo te mpo na koluka komona Ngai Yawe, noki te mingi kati na bango bakokufa.
RAB, “Aşağı inip halkı uyar” dedi, “Sakın beni görmek için sınırı geçmesinler, yoksa birçoğu ölür.
22 Ezala Banganga-Nzambe oyo basengeli kopusana pene na Ngai, basengeli komibulisa; noki te Ngai Yawe, nakoboma bango.
Bana yaklaşan kâhinler de kendilerini kutsasınlar, yoksa onları şiddetle cezalandırırım.”
23 Moyize alobaki na Yawe: — Bato ya Isalaele bakoki te komata na ngomba Sinai, pamba te Yo moko oyebisaki biso ete totia bandelo zingazinga ya ngomba mpe tomona yango lokola bule.
Musa, “Halk Sina Dağı'na çıkamaz” diye karşılık verdi, “Çünkü sen, ‘Dağın çevresine sınır çiz, onu kutsal kıl’ diyerek bizi uyardın.”
24 Yawe azongiselaki ye: — Kita lisusu; bongo omata elongo na Aron. Kasi mpo na Banganga-Nzambe mpe bana ya Isalaele, tika ete bawelela komata te epai na Ngai Yawe, noki te nakoboma bango.
RAB, “Aşağı inip Harun'u getir” dedi, “Ama kâhinlerle halk huzuruma gelmek için sınırı geçmesinler. Yoksa onları şiddetle cezalandırırım.”
25 Moyize akitaki, akendeki epai ya bana ya Isalaele mpe ayebisaki bango makambo oyo Yawe alobaki.
Bunun üzerine Musa aşağı inip durumu halka anlattı.

< Kobima 19 >