< Kobima 17 >
1 Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele elongwaki na esobe ya Tsini mpe ezalaki kotambola kolanda ndenge Yawe azalaki kotinda. Batongaki molako na bango na Refidimi, kasi mayi ya komela ezalaki te mpo na bato.
И двинулось все общество сынов Израилевых из пустыни Син в путь свой, по повелению Господню, и расположилось станом в Рефидиме, и не было воды пить народу.
2 Bato ya Isalaele baswanisaki Moyize, balobaki na ye: — Pesa biso mayi ya komela! Moyize azongiselaki bango: — Mpo na nini bozali koswanisa ngai? Mpo na nini bolingi komeka Yawe?
И укорял народ Моисея, и говорили: дайте нам воды пить. И сказал им Моисей: что вы укоряете меня? что искушаете Господа?
3 Lokola posa ya mayi elekaki makasi, bato bayimaki-yimaki epai ya Moyize mpe balobaki: — Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito? Ezali mpo ete obomisa biso, bana na biso mpe bibwele na biso na posa ya mayi?
И жаждал там народ воды, и роптал народ на Моисея, говоря: зачем ты вывел нас из Египта, уморить жаждою нас и детей наших и стада наши?
4 Moyize abelelaki Yawe: — Nasala nini mpo na bato oyo? Etikali kaka moke ete babamba ngai mabanga!
Моисей возопил к Господу и сказал: что мне делать с народом сим? еще немного, и побьют меня камнями.
5 Yawe azongiselaki Moyize: — Leka liboso ya bato, kamata ndambo ya bakambi ya Isalaele. Zwa na loboko na yo, lingenda oyo obetaki na ebale Nili, mpe kende.
И сказал Господь Моисею: пройди перед народом, и возьми с собою некоторых из старейшин Израильских, и жезл твой, которым ты ударил по воде, возьми в руку твою, и пойди;
6 Ngai nakotelema kuna, liboso na yo, na likolo ya libanga oyo ezali na ngomba Orebi. Okobeta libanga yango, mpe yango ekobimisa mayi, bongo bato bakomela. Moyize asalaki bongo na miso ya bakambi ya Isalaele.
вот, Я стану пред тобою там на скале в Хориве, и ты ударишь в скалу, и пойдет из нее вода, и будет пить народ. И сделал так Моисей в глазах старейшин Израильских.
7 Abengaki esika yango Masa mpe Meriba, pamba te bana ya Isalaele baswanisaki ye mpe bamekaki Yawe tango balobaki: « Boni, Yawe yango azali kati na biso to te? »
И нарек месту тому имя: Масса и Мерива, по причине укорения сынов Израилевых и потому, что они искушали Господа, говоря: есть ли Господь среди нас, или нет?
8 Bato ya Amaleki bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele na Refidimi.
И пришли Амаликитяне и воевали с Израильтянами в Рефидиме.
9 Moyize alobaki na Jozue: — Ponela biso bilombe ya bitumba kati na bato; mpe lobi; wana yo okende kobundisa bato ya Amaleki, ngai nakotelema na likolo ya ngomba moke elongo na lingenda ya Nzambe na loboko na ngai.
Моисей сказал Иисусу: выбери нам мужей сильных и пойди, сразись с Амаликитянами; завтра я стану на вершине холма, и жезл Божий будет в руке моей.
10 Jozue asalaki ndenge Moyize atindaki ye mpe abundisaki bato ya Amaleki; wana Moyize, Aron mpe Wuri bamataki likolo ya ngomba.
И сделал Иисус, как сказал ему Моисей, и пошел сразиться с Амаликитянами; а Моисей и Аарон и Ор взошли на вершину холма.
11 Tango nyonso Moyize abandaki kotombola maboko na ye mpo na kobondela, bana ya Isalaele bazalaki kolonga; kasi tango nyonso azalaki kokitisa maboko na ye, bato ya Amaleki bazalaki kolonga.
И когда Моисей поднимал руки свои, одолевал Израиль, а когда опускал руки свои, одолевал Амалик;
12 Tango maboko ya Moyize elembaki, Aron mpe Wuri bakamataki libanga mpe batielaki ye yango mpo ete avandela yango; mpe Moyize avandelaki yango. Aron mpe Uri batombolaki maboko na ye, moko na ngambo moko, mpe mosusu na ngambo mosusu. Boye maboko na ye etikalaki ya kosembolama kino na pokwa.
но руки Моисеевы отяжелели, и тогда взяли камень и подложили под него, и он сел на нем, Аарон же и Ор поддерживали руки его, один с одной, а другой с другой стороны. И были руки его подняты до захождения солнца.
13 Mpe Jozue alongaki basoda ya bato ya Amaleki na mopanga.
И низложил Иисус Амалика и народ его острием меча.
14 Yawe alobaki na Moyize: — Koma yango na buku lokola ekaniseli, mpe loba na Jozue ete nakosilisa bato ya Amaleki na mokili; bakotikala kokanisa bango lisusu te.
И сказал Господь Моисею: напиши сие для памяти в книгу и внуши Иисусу, что Я совершенно изглажу память Амаликитян из поднебесной.
15 Moyize atongaki etumbelo mpe abengaki yango « Nkolo azali bendele na ngai ya lokumu. »
И устроил Моисей жертвенник Господу и нарек ему имя: Иегова Нисси.
16 Moyize alobaki: « Lokola esali ete babundisi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, Yawe akobundisa bato ya Amaleki tango nyonso. »
Ибо, сказал он, рука на престоле Господа: брань у Господа против Амалика из рода в род.