< Kobima 15 >

1 Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe: Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye! Azindisi mpunda mpe motambolisi na yango kati na ebale monene.
Alors Moïse et les enfants d'Israël chantèrent ce cantique à l'Éternel, et ils dirent: Je chanterai à l'Éternel, car il s'est hautement élevé. Il a jeté dans la mer le cheval et son cavalier.
2 Yawe azali makasi na ngai, azali solo loyembo na ngai, azali mobikisi na ngai, azali Nzambe na ngai, nakokumisa Ye; azali Nzambe ya tata na ngai, nakonetola Ye.
L'Éternel est ma force et ma louange: il a été mon libérateur. Il est mon Dieu, je le glorifierai; il est le Dieu de mon père, je l'exalterai.
3 Yawe azali elombe ya bitumba; Kombo na Ye ezali Yawe.
L'Éternel est un vaillant guerrier; son nom est l'Éternel.
4 Azindisi na ebale monene, bashar mpe mampinga ya Faraon; abwaki na ebale monene ya barozo, bakonzi mpe basoda oyo Faraon atielaka motema.
Il a jeté dans la mer les chars de Pharaon et son armée; et l'élite de ses combattants a été plongée dans la mer Rouge.
5 Mozindo ya mayi ezipi bango, bakiti kino na se ya ebale monene lokola libanga.
Les flots les ont couverts; ils sont descendus au fond des eaux, comme une pierre.
6 Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, emonisi nguya na Yo; loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, enyati monguna.
Ta droite, ô Éternel, est magnifique en force. Ta droite, ô Éternel, écrase l'ennemi.
7 Na monene ya nguya na Yo, obebisi batelemeli na Yo; na kanda na Yo, otombokeli bango, mpe baziki lokola matiti.
Par la grandeur de ta majesté, tu renverses tes adversaires. Tu envoies ta colère, elle les consume comme le chaume.
8 Na pema ya zolo na Yo, mayi ekabwani, bambonge etelemi lokola mir, mpe mozindo ya mayi ekangami kati na ebale monene.
Au souffle de tes narines les eaux se sont amoncelées; les courants se sont arrêtés comme une digue; les flots ont gelé au cœur de la mer.
9 Monguna amilobelaki: « Nakolanda bango kino nakokanga bango, molimo na ngai ekotonda na biloko oyo nakobotola; nakobimisa mopanga na ngai, mpe loboko na ngai ekobebisa bango. »
L'ennemi avait dit: Je poursuivrai, j'atteindrai, je partagerai le butin; mon âme s'assouvira sur eux, je tirerai l'épée, ma main les détruira.
10 Kasi Yo, Yawe, ofuli mopepe na Yo, mpe ebale monene ezipi bango. Bazindi lokola mbodi kati na mayi makasi.
Tu as soufflé de ton haleine: la mer les a couverts; ils ont roulé comme le plomb, au fond des eaux puissantes.
11 Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo? Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, somo, mpe abongi na lokumu, mpe asalaka makambo ya kokamwa?
Qui est comme toi, parmi les dieux, ô Éternel? Qui est comme toi magnifique en sainteté, redoutable dans les louanges, opérant des merveilles?
12 Osembolaki loboko na Yo ya mobali, mpe mabele emeli bango.
Tu as étendu ta droite; la terre les engloutit.
13 Na bolingo na Yo, otambolisi bato oyo okangoli. Na makasi na Yo, omemi bango na Ndako na Yo ya bule.
Tu as conduit par ta miséricorde ce peuple que tu as racheté; tu l'as dirigé par ta force vers ta sainte demeure.
14 Bikolo eyoki sango na yango mpe ekomi kolenga, somo ekangaki bato ya Filisitia.
Les peuples l'entendent, et ils tremblent; l'effroi saisit les habitants de la Palestine.
15 Bakambi ya Edomi bakomi na somo, bankumu ya Moabi bakomi kolenga, bato ya Kanana balembi nzoto.
Alors les princes d'Édom sont troublés; le tremblement saisit les puissants de Moab; tous les habitants de Canaan désespèrent.
16 Kobanga mpe somo ekweyeli bango. Na nguya ya loboko na Yo, bakomi bababa lokola libanga kino bato na Yo, oh Yawe, balekaki, kino bato oyo osikolaki balekaki.
La frayeur et l'épouvante tomberont sur eux; par la grandeur de ton bras, ils deviendront muets comme la pierre, jusqu'à ce que ton peuple, ô Éternel, ait passé; jusqu'à ce qu'il ait passé, le peuple que tu as acquis.
17 Okomema bango mpe okovandisa bango na ngomba na Yo, esika oyo obongisaki, oh Nkolo, mpo na kovanda, Esika ya bule, oh Yawe, esika oyo maboko na Yo esalaki.
Tu les introduiras et tu les planteras sur la montagne de ton héritage, au lieu que tu as préparé pour ta demeure, ô Éternel, au sanctuaire, Seigneur, que tes mains ont établi.
18 Yawe akotikala mokonzi libela na libela!
L'Éternel régnera éternellement et à toujours.
19 Tango bampunda ya Faraon, bashar na ye elongo na bato oyo batambolisaka yango bamikotisaki kati na ebale monene, Yawe azongisaki mayi ya ebale monene likolo na bango. Nzokande bana ya Isalaele bakatisaki ebale monene lokola na esobe.
Car les chevaux de Pharaon, avec ses chars et ses cavaliers, sont entrés dans la mer; et l'Éternel a fait retourner sur eux les eaux de la mer; mais les enfants d'Israël ont marché à sec au milieu de la mer.
20 Miriami, mwasi mosakoli mpe ndeko mwasi ya Aron, azwaki mbunda moke na loboko na ye mpe basi nyonso balandaki ye; bazalaki kobeta bambunda mike mpe kobina.
Et Marie, la prophétesse, sœur d'Aaron, prit dans sa main le tambourin, et toutes les femmes sortirent après elle, avec des tambourins et en dansant.
21 Miriami ayembaki elongo na bango: « Boyembela Yawe, pamba te amonisi monene ya nkembo na Ye; azindisi na ebale monene, mpunda mpe motambolisi na yango. »
Et Marie répondait à ceux qui chantaient: Chantez à l'Éternel, car il s'est hautement élevé; il a jeté dans la mer le cheval et son cavalier.
22 Moyize atambolisaki bana ya Isalaele wuta na ebale monene ya barozo mpe amemaki bango na nzela oyo ekenda na esobe ya Shuri. Batambolaki mikolo misato kati na esobe mpe bamonaki mayi te.
Puis, Moïse fit partir les Israélites de la mer Rouge, et ils tirèrent vers le désert de Shur; et ils marchèrent trois jours dans le désert, et ne trouvèrent point d'eau.
23 Tango bakomaki na Mara epai wapi bamonaki mayi, bakokaki te komela mayi yango, pamba te ezalaki bololo. Yango wana babengaki esika yango Mara.
Puis ils vinrent à Mara, mais ils ne purent boire des eaux de Mara, car elles étaient amères; c'est pour cela que ce lieu fut appelé Mara (amertume).
24 Boye bato bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe balobaki: « Tokomela nini? »
Alors le peuple murmura contre Moïse, en disant: Que boirons-nous?
25 Boye Moyize abelelaki Yawe, mpe Yawe alakisaki ye eteni ya nzete. Moyize abwakaki yango na mayi, mpe mayi ekomaki elengi mpo na komela. Ezalaki kuna nde Yawe apesaki bango bikateli, mibeko mpe amekaki bango.
Et Moïse cria à l'Éternel; et l'Éternel lui indiqua un bois, qu'il jeta dans les eaux, et les eaux devinrent douces. C'est là qu'il lui imposa une ordonnance et un statut, et c'est là qu'il l'éprouva.
26 Alobaki: « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »
Et il dit: Si tu écoutes attentivement la voix de l'Éternel ton Dieu, si tu fais ce qui est droit à ses yeux, si tu prêtes l'oreille à ses commandements et si tu gardes toutes ses ordonnances, je ne t'infligerai aucune des maladies que j'ai infligées à l'Égypte; car je suis l'Éternel qui te guérit.
27 Bongo bana ya Isalaele bakomaki na Elimi epai wapi bitima zomi na mibale mpe banzete ya mbila tuku sambo ezalaki. Ezalaki kuna nde batongaki molako na bango, pene ya mayi.
Puis ils vinrent à Élim; et là il y avait douze sources d'eau et soixante et dix palmiers; et ils campèrent là, près des eaux.

< Kobima 15 >