< Kobima 14 >
1 Yawe alobaki na Moyize:
L’Éternel parla ainsi à Moïse:
2 « Loba na bana ya Isalaele ete bazonga mpe batonga molako pembeni ya Pi-Ayiroti, kati ya Migidoli mpe ebale monene. Batonga yango etalana na Bala-Tsefoni pembeni ya ebale monene.
"Dis aux enfants d’Israël de remonter et de camper en face de Pi-Hahiroth, entre Migdol et la mer; devant Baal-Cefôn, à l’opposite, vous camperez au bord de la mer.
3 Faraon akokanisa ete bana ya Isalaele babungi na mokili, esobe ekangi bango.
Pharaon se dira que les enfants d’Israël sont égarés dans ce pays; que le désert les emprisonne.
4 Nakokomisa motema ya Faraon libanga, mpe ye akolanda bango; kasi nakomonisa nkembo na Ngai, nakotelemela Faraon mpe mampinga na ye; bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. » Bana ya Isalaele basalaki bongo.
Et je raffermirai le cœur de Pharaon et il les poursuivra; puis j’accablerai de ma puissance Pharaon avec toute son armée et les Égyptiens apprendront que je suis l’Éternel." Ils obéirent.
5 Tango bayebisaki mokonzi ya Ejipito ete bana ya Isalaele bakimi, Faraon mpe bakalaka na ye babongolaki makanisi na bango mpo na bana ya Isalaele mpe balobaki: « Likambo nini oyo tosali? Totiki Isalaele kokende mpe tozangeli bato oyo bakoki kosalela biso! »
On rapporta au roi d’Égypte que le peuple s’enfuyait. Alors les dispositions de Pharaon et de ses serviteurs changèrent à l’égard de ce peuple et ils dirent: "Qu’avons-nous fait là, d’affranchir les Israélites de notre sujétion!"
6 Boye Faraon azwaki shar oyo ezalaki ya kobombama mpe azwaki mampinga na ye elongo na ye.
Il fit atteler son char, emmena avec lui son peuple,
7 Akamataki bashar nkama motoba oyo eleki malamu elongo na bashar nyonso ya Ejipito; shar moko na moko ezalaki na basoda misato.
prit six cents chars d’élite et tous les chariots d’Égypte, tous couverts de guerriers.
8 Yawe akomisaki motema ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, libanga mpo ete alanda bana ya Isalaele oyo bazalaki kotambola na bonsomi nyonso.
L’Éternel fortifia le cœur de Pharaon, roi d’Égypte, qui se mit à la poursuite des enfants d’Israël. Cependant les Israélites s’avançaient triomphants.
9 Bato ya Ejipito, bampunda nyonso ya Faraon mpe shar mosusu ya Faraon elongo na bato oyo batambolisaka yango mpe mampinga mosusu ya Faraon balandaki bana ya Isalaele mpe bazwaki bango tango batongaki molako na bango pembeni ya Pi-Ayiroti oyo etalana na Bala-Tsefoni.
Les Égyptiens qui les poursuivaient les rencontrèrent, campés sur le rivage; tous les attelages de Pharaon, ses cavaliers, son armée, les joignirent près de Pi-Hahiroth, devant Baal-Cefôn.
10 Lokola Faraon apusanaki, bana ya Isalaele batombolaki miso na bango mpe bamonaki ete bato ya Ejipito bazali kolanda bango na sima. Bana ya Isalaele babangaki makasi mpe bagangaki epai na Yawe.
Comme Pharaon approchait, les enfants d’Israël levèrent les yeux et voici que l’Égyptien était à leur poursuite; remplis d’effroi, les Israélites jetèrent des cris vers l’Éternel.
11 Balobaki na Moyize: — Boni, ezali mpo ete malita ezali te na Ejipito, yango wana omemi biso mpo ete tokufa na esobe? Osali biso nini awa obimisi biso na Ejipito?
Et ils dirent à Moïse: "Est-ce faute de trouver des sépulcres en Égypte que tu nous as conduits mourir dans le désert? Quel bien nous as-tu fait, en nous tirant de l’Égypte?
12 Toyebisaki yo te tango tozalaki na Ejipito: « Tika biso kimia, tika biso tosalela bato ya Ejipito? » Pamba te elekaki malamu mpo na biso kosalela bato ya Ejipito na esika ya kokufa na esobe.
N’Est-ce pas ainsi que nous te parlions en Égypte, disant: ‘Laisse-nous servir les Égyptiens?’ De fait, mieux valait pour nous être esclaves des Égyptiens, que de périr dans le désert."
13 Moyize azongiselaki bango: — Bobanga te, boyika mpiko! Bokomona kokangolama oyo Yawe akomemela bino lelo; bato ya Ejipito oyo bozali komona lelo, bokotikala komona bango lisusu te.
Moïse répondit au peuple: "Soyez sans crainte! Attendez, et vous serez témoins de l’assistance que l’Éternel vous procurera en ce jour! Certes, si vous avez vu les Égyptiens aujourd’hui, vous ne les reverrez plus jamais.
14 Yawe akobunda mpo na bino, mpe bino bovanda kimia.
L’Éternel combattra pour vous; et vous, tenez-vous tranquilles!"
15 Yawe alobaki na Moyize: — Mpo na nini ozali koganga boye epai na Ngai? Loba na bana ya Isalaele ete batambola.
L’Éternel dit à Moïse: "Pourquoi m’implores-tu? Ordonne aux enfants d’Israël de se mettre en marche.
16 Kasi yo, tombola lingenda na yo, sembola loboko na yo likolo ya ebale monene mpe kabola mayi mpo ete bana ya Isalaele bakoka kokatisa ebale monene lokola na mabele ya kokawuka.
Et toi, lève ta verge, dirige ta main vers la mer et divise la; et les enfants d’Israël entreront au milieu de la mer à pied sec."
17 Bongo Ngai, nakoyeisa motema ya bato ya Ejipito libanga mpo ete balanda bino mpe nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon mpe mampinga na ye nyonso elongo na bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda.
De mon côté, je vais affermir le cœur des Égyptiens pour qu’ils y entrent après eux; et alors j’accablerai Pharaon et son armée entière, ses chars et sa cavalerie.
18 Bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon, bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda.
Les Égyptiens reconnaîtront que je suis l’Éternel, quand j’accablerai Pharaon, ses chars et ses cavaliers."
19 Anjelu na Nzambe oyo azalaki kotambola liboso ya mampinga ya Isalaele azongaki sima na bango, mpe likonzi ya lipata elongwaki liboso na bango mpo ete etelema sima na bango.
Le messager de Dieu, qui marchait en avant du camp d’Israël, passa derrière eux, la colonne nébuleuse cessa d’être à leur tête et se fixa en arrière."
20 Likonzi ya lipata etelemaki kati ya mampinga ya bato ya Ejipito mpe ya bana ya Isalaele. Likonzi ya lipata epesaki molili na ngambo moko mpe engengisaki ngambo mosusu; yango wana butu mobimba, bato ya Ejipito bakokaki kopusana te pembeni ya bana ya Isalaele.
Elle passa ainsi entre le camp égyptien et celui des Israélites: pour les uns il y eut nuée et ténèbres, pour les autres la nuit fut éclairée; et, de toute la nuit, les uns n’approchèrent point des autres.
21 Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene; bongo na butu mobimba, Yawe atindaki na ebale monene mopepe makasi ya este oyo ekabolaki mayi ya ebale monene.
Moïse étendit sa main sur la mer et l’Éternel fit reculer la mer, toute la nuit, par un vent d’est impétueux et il mit la mer à sec et les eaux furent divisées.
22 Bato ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi.
Les enfants d’Israël entrèrent au milieu de la mer, dans son lit desséché, les eaux se dressant en muraille à leur droite et à leur gauche.
23 Bato ya Ejipito balandaki bango mpe bango nyonso bakotaki kati na ebale monene: bampunda nyonso ya Faraon, bashar na ye mpe batambolisi ya bampunda.
Les Égyptiens les poursuivirent et tous les chevaux de Pharaon, ses chariots, ses cavaliers, entrèrent à leur suite au milieu de la mer.
24 Liboso ete tongo etana, Yawe atelemaki na likolo ya likonzi ya moto mpe ya lipata, atalaki mampinga ya bato ya Ejipito mpe akotisaki mobulu kati na yango.
Or, à la dernière veille, l’Éternel fit peser sur l’armée égyptienne une colonne de feu et une nuée et jeta la perturbation dans l’armée égyptienne
25 Alongolaki bapine na bashar na bango mpo ete bamona pasi mpo na kokumba. Boye bato ya Ejipito balobaki: — Tokima mosika ya bana ya Isalaele, pamba te Yawe azali kobundela bango liboso na biso.
et il détacha les roues de ses chars, les faisant ainsi avancer pesamment. Alors l’Égyptien s’écria: "Fuyons devant Israël, car l’Éternel combat pour eux contre l’Égypte!"
26 Yawe alobaki na Moyize: — Sembola loboko na yo likolo ya ebale monene mpo ete mayi ezonga mpe ekweyela bato ya Ejipito, bashar na bango mpe batambolisi ya bampunda.
Le Seigneur dit à Moïse: "Étends ta main sur la mer et les eaux rebrousseront sur l’Égyptien, sur ses chars et sur ses cavaliers."
27 Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene, mpe liboso ete tongo etana, ebale monene ezongaki na esika na yango mpe bato ya Ejipito oyo balukaki kokima, bakutanaki na mayi liboso na bango. Boye Yawe azindisaki bango kati na ebale monene.
Moïse étendit sa main sur la mer et la mer, aux approches du matin, reprit son niveau comme les Égyptiens s’élançaient en avant; et le Seigneur précipita les Égyptiens au sein de la mer.
28 Mayi ezongaki mpe ezipaki bashar elongo na batambolisi ya bampunda mpe mampinga ya Faraon oyo elandaki bana ya Isalaele kati na ebale monene. Moko te kati na bango abikaki.
Les eaux, en refluant, submergèrent chariots, cavalerie, toute l’armée de Pharaon qui était entrée à leur suite dans la mer; pas un d’entre eux n’échappa.
29 Kasi bana ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi.
Pour les enfants d’Israël, ils s’étaient avancés à pied sec au milieu de la mer, ayant les eaux, comme un mur, à leur droite et à leur gauche.
30 Na mokolo wana, Yawe abikisaki bana ya Isalaele liboso ya bato ya Ejipito mpe bana ya Isalaele bamonaki bibembe ya bato ya Ejipito etandami na libongo ya ebale monene.
L’Éternel, en ce jour, sauva Israël de la main de l’Égypte; Israël vit l’Égyptien gisant sur le rivage de la mer.
31 Tango bana ya Isalaele bamonaki nguya monene oyo Yawe atalisaki liboso ya bato ya Ejipito, babangaki Yawe mpe batiaki elikya na bango kati na Ye mpe kati na mosali na Ye Moyize.
Israël reconnut alors la haute puissance que le Seigneur avait déployée sur l’Égypte et le peuple révéra le Seigneur; et ils eurent foi en l’Éternel et en Moïse, son serviteur.