< Kobima 12 >

1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron kati na Ejipito:
And Jehovah spoke to Moses and Aaron in the land of Egypt, saying,
2 « Sanza oyo ekozala mpo na bino sanza ya liboso ya mobu.
This month shall be unto you the beginning of months: it shall be the first month of the year to you.
3 Boloba boye na lisanga mobimba ya Isalaele: Na mokolo ya zomi na sanza oyo, libota moko na moko to ndako moko na moko esengeli kozala na mwana meme to na mwana ntaba.
Speak unto all the assembly of Israel, saying, On the tenth of this month let them take themselves each a lamb, for a father's house, a lamb for a house.
4 Kasi soki bato ya ndako bazali ebele te mpo na kolia mwana meme ya mobimba, bakolia yango elongo na bato ya ndako oyo ezali pene na ndako na bango kolanda motango ya bato. Bakopona mwana meme kolanda oyo moko na moko akoki kolia.
And if the household be too small for a lamb, let him and his neighbour next unto his house take [it] according to the number of the souls; each according to [the measure] of his eating shall ye count for the lamb.
5 Mwana meme to mwana ntaba oyo bakopona esengeli kozala ya mobali, ya mobu moko mpe ezanga mbeba.
Your lamb shall be without blemish, a yearling male; ye shall take [it] from the sheep, or from the goats.
6 Bokobatela yango kino na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango. Na mokolo yango, bato nyonso ya lisanga ya Isalaele bakokata yango kingo na pokwa.
And ye shall keep it until the fourteenth day of this month; and the whole congregation of the assembly of Israel shall kill it between the two evenings.
7 Bakozwa makila na yango mpe bakopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke ya bandako epai wapi bakolia nyama yango.
And they shall take of the blood, and put [it] on the two door-posts and on the lintel of the houses in which they eat it.
8 Na butu ya mokolo yango, bakotumba mosuni na yango na moto mpe bakolia yango elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo.
And they shall eat the flesh in that night, roast with fire, and unleavened bread; with bitter [herbs] shall they eat it.
9 Bakolia te mosuni oyo ebela malamu te to oyo batokisa, kasi bakolia kaka mosuni oyo batumba na moto elongo na makolo, moto mpe biloko ya kati.
Ye shall eat none of it raw, nor boiled at all with water, but roast with fire; its head with its legs and with its in-wards.
10 Bokotika ata ndambo te kino na tongo. Kasi soki ndambo ekomi na tongo, botumba yango na moto.
And ye shall let none of it remain until the morning; and what remaineth of it until the morning ye shall burn with fire.
11 Tala ndenge nini bokolia yango: bokolata mokaba na loketo, basandale na makolo, mpe bokosimba lingenda na loboko. Bokolia yango na lombangu. Ezali feti ya Pasika mpo na Yawe.
And thus shall ye eat it: your loins shall be girded, your sandals on your feet, and your staff in your hand; and ye shall eat it in haste; it is Jehovah's passover.
12 Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe.
And I will go through the land of Egypt in that night, and smite all the firstborn in the land of Egypt, both man and beast; and against all the gods of Egypt I will execute judgment: I am Jehovah.
13 Na bandako epai wapi bokozala, makila ekozala elembo mpo na bino; bongo tango Ngai nakomona makila yango, nakoleka bino. Boye etumbu moko te ya kufa ekokweya kati na bino tango nakopesa etumbu na mokili ya Ejipito.
And the blood shall be for you as a sign on the houses in which ye are; and when I see the blood, I will pass over you; and the plague shall not be among you for destruction, when I smite the land of Egypt.
14 Mokolo yango ekozala mokolo ya ekaniseli mpo na bino. Bileko na bileko, bokobanda kosala feti na mokolo yango mpo na lokumu ya Yawe; yango ekozala mpo na bino mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.
And this day shall be unto you for a memorial; and ye shall celebrate it [as] a feast to Jehovah; throughout your generations [as] an ordinance for ever shall ye celebrate it.
15 Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire. Na mokolo ya liboso, bokolongola levire na bandako na bino; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya sambo, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele.
Seven days shall ye eat unleavened bread: on the very first day ye shall put away leaven out of your houses; for whoever eateth leavened bread from the first day until the seventh day — that soul shall be cut off from Israel.
16 Bokozala na mayangani ya bule na mokolo ya liboso mpe na mokolo ya sambo. Bokosala mosala moko te na mikolo wana longola kaka mosala ya kolamba bilei oyo moto na moto akolia. Yango kaka nde bokosala.
And on the first day ye shall have a holy convocation, and on the seventh day a holy convocation: no manner of work shall be done on them, save what is eaten by every person — that only shall be done by you.
17 Bokosala feti ya Mapa ezanga levire, pamba te ezalaki na mokolo yango nde nabimisaki mampinga na bino na Ejipito. Bokosala feti na mokolo yango lokola mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.
And ye shall keep the [feast of] unleavened [bread]; for in this same day have I brought your hosts out of the land of Egypt; and ye shall keep this day in your generations [as] an ordinance for ever.
18 Na sanza ya liboso, bokolia mapa ezanga levire kobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei kino na pokwa ya mokolo ya tuku mibale na moko.
In the first [month], on the fourteenth day of the month, in the evening, ye shall eat unleavened bread until the one and twentieth day of the month in the evening.
19 Mikolo sambo, levire esengeli te komonana kati na bandako na bino; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, esengeli balongola ye na lisanga ya Isalaele, azala mopaya to mwana mboka ya Isalaele.
Seven days shall there be no leaven found in your houses; for whoever eateth what is leavened — that soul shall be cut off from the assembly of Israel, whether he be a sojourner, or born in the land.
20 Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire. Na bisika nyonso oyo bokozala, bokolia kaka mapa ezanga levire. »
Ye shall eat nothing leavened: in all your dwellings shall ye eat unleavened bread.
21 Moyize abengisaki bakambi nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango: « Bokende kozwa na libota moko na moko mwana meme to mwana ntaba mpe bokata yango kingo lokola mbeka ya Pasika.
And Moses called all the elders of Israel, and said to them, Seize and take yourselves lambs for your families, and kill the passover.
22 Bokokamata etape ya nzete ya izope, bokozindisa yango na makila oyo ekozala kati na sani monene, bokopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke. Moko te kati na bino abima libanda ya ekuke ya ndako na ye kino na tongo.
And take a bunch of hyssop, and dip [it] in the blood that is in the bason, and smear the lintel and the two door-posts with the blood that is in the bason; and none of you shall go out of the door of his house until the morning.
23 Wana Yawe akoleka na mokili mpo na koboma bato ya Ejipito mpe akomona makila na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke, akoleka ekuke yango mpe akopesa nzela te na mobomi ete akota na bandako na bino mpo na koboma.
And Jehovah will pass through to smite the Egyptians; and when he sees the blood on the lintel, and on the two door-posts, Jehovah will pass over the door, and will not suffer the destroyer to come into your houses to smite [you].
24 Bokotosa malako oyo lokola mobeko ya libela na libela mpo na bino mpe mpo na bakitani na bino.
And ye shall observe this as an ordinance for thee and for thy sons for ever.
25 Tango bokokota na mokili oyo Yawe akopesa bino ndenge alakaki, bosalela likambo oyo.
And it shall come to pass, when ye are come into the land that Jehovah will give you, as he has promised, that ye shall keep this service.
26 Bongo tango bana na bino bakotuna bino: ‹ Molulu oyo elakisi nini mpo na bino? ›
And it shall come to pass, when your children shall say to you, What mean ye by this service?
27 Bokoloba na bango: ‹ Ezali mbeka ya feti ya Pasika mpo na Yawe oyo alekaki bandako ya bana ya Isalaele kati na Ejipito mpe abikisaki bandako na biso tango abomaki bato ya Ejipito. › » Na bongo, bana ya Isalaele bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.
that ye shall say, It is a sacrifice of passover to Jehovah, who passed over the houses of the children of Israel in Egypt when he smote the Egyptians and delivered our houses. And the people bowed their heads and worshipped.
28 Bato ya Isalaele basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize mpe Aron.
And the children of Israel went away, and did as Jehovah had commanded Moses and Aaron; so did they.
29 Na kati-kati ya butu, Yawe abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo azalaki kokonza na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mokangami oyo azalaki kati na boloko, mpe bana mibali ya liboso ya bibwele nyonso.
And it came to pass that at midnight Jehovah smote all the firstborn in the land of Egypt, from the firstborn of Pharaoh who sat on his throne to the firstborn of the captive that was in the dungeon, and all the firstborn of cattle.
30 Na butu wana, Faraon elongo na bakalaka na ye nyonso mpe bato nyonso ya Ejipito batelemaki; mpe koganga makasi ezalaki na Ejipito, pamba te ezalaki na ndako moko te oyo ezangaki ebembe.
And Pharaoh rose up in the night, he, and all his bondmen, and all the Egyptians; and there was a great cry in Egypt; for there was not a house in which there was not one dead.
31 Kaka na butu wana, Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango: « Botelema, bobima kati na bato na ngai, bino mpe bana ya Isalaele. Bokende kogumbamela Yawe ndenge bosengaki.
And he called Moses and Aaron in the night, and said, Rise up, go away from among my people, both ye and the children of Israel; and go, serve Jehovah, as ye have said.
32 Bokamata bibwele na bino ndenge bolobaki: bangombe, bameme mpe bantaba; mpe bokende. Boye, bopambola mpe ngai. »
Also take your flocks and your herds, as ye have said, and go; and bless me also.
33 Bato ya Ejipito batindikaki bana ya Isalaele ete babima noki na mokili na bango. Bazalaki koloba: « Bokende na bino, noki te biso tokokufa. »
And the Egyptians urged the people, to send them out of the land in haste; for they said, We are all dead [men]!
34 Boye bato bazwaki potopoto na bango ya farine liboso ete batia yango levire, bazingaki na banzambala na bango banzungu oyo basalelaka potopoto mpe batiaki yango na mapeka na bango.
And the people took their dough before it was leavened; their kneading-troughs bound up in their clothes upon their shoulders.
35 Bato ya Isalaele basalaki ndenge Moyize alobaki na bango mpe basengaki epai ya bato ya Ejipito biloko ya palata, ya wolo mpe bilamba.
And the children of Israel had done according to the word of Moses, and they had asked of the Egyptians utensils of silver, and utensils of gold, and clothing.
36 Bongo Yawe asalaki ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito oyo bapesaki bango biloko oyo basengaki. Na ndenge wana nde basilisaki biloko ya bato ya Ejipito.
And Jehovah had given the people favour in the eyes of the Egyptians, and they gave to them; and they spoiled the Egyptians.
37 Bato ya Isalaele balongwaki na Ramisesi mpe bakendeki na Sukoti; bazalaki mibali nkoto nkama motoba oyo bazalaki kotambola na makolo longola basi mpe bana.
And the children of Israel journeyed from Rameses to Succoth, about six hundred thousand on foot [that were] men, besides children.
38 Ezalaki lisusu na ebele ya bato oyo bakendeki na bango elongo; bamemaki lisusu bibwele: bameme, bantaba mpe bangombe.
And a mixed multitude went up also with them; and flocks and herds — very much cattle.
39 Basalaki na farine oyo bamemaki wuta na Ejipito bagato ezanga levire, pamba te tango babenganaki bango, potopoto emivimbelaki te mpe bazangaki tango ya kobongisa biloko ya kolia mpo na bango moko.
And they baked the dough that they brought forth out of Egypt into unleavened cakes, for it was not leavened; for they were driven out of Egypt, and could not wait; neither had they prepared for themselves any food.
40 Mibu oyo bana ya Isalaele bavandaki na Ejipito ezalaki nkama minei na tuku misato.
And the residence of the children of Israel that they resided in Egypt was four hundred and thirty years.
41 Na suka ya mobu oyo ya nkama minei na tuku misato, mampinga nyonso ya Yawe batikaki Ejipito.
And it came to pass at the end of the four hundred and thirty years, on that same day it came to pass that all the hosts of Jehovah went out from the land of Egypt.
42 Lokola Yawe akengelaki butu wana mpo na kobimisa bana ya Isalaele na Ejipito, butu yango ekomi ya Yawe: ekobanda kozala butu ya kokengela mpo na bana ya Isalaele na milongo na bango nyonso oyo ekoya.
It is a night of observance to Jehovah, because of their being brought out from the land of Egypt: that same night is an observance to Jehovah for all the children of Israel in their generations.
43 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron: « Tala mibeko na tina na Pasika: ‹ Mopaya moko te akoki kolia yango.
And Jehovah said to Moses and Aaron, This is the ordinance of the passover: No stranger shall eat of it;
44 Kasi mowumbu nyonso oyo bakosomba, basengeli liboso kokata ye ngenga, sima nde akoki kolia Pasika.
but every man's bondman that is bought for money — let him be circumcised: then shall he eat it.
45 Mopaya oyo akozala na bino mpo na tango moke mpe mosali oyo azwaka lifuti bakolia yango te.
A settler and a hired servant shall not eat it.
46 Ekoliama kaka kati na ndako moko na moko, bakobimisa ata mosuni moko te na libanda ya ndako mpe bakobuka ata mokuwa na yango moko te.
In one house shall it be eaten; thou shalt not carry forth any of the flesh abroad out of the house; neither shall ye break a bone thereof.
47 Lisanga mobimba ya Isalaele ekosala feti ya Pasika.
All the assembly of Israel shall hold it.
48 Soki mopaya oyo azali kati na bino alingi kosepela na feti ya Pasika ya Yawe, esengeli ete mibali nyonso oyo bazali kati na ndako na ye bakatama ngenga; bongo nde akozwa nzela ya kolia Pasika lokola mwana mboka ya Isalaele. Kasi mobali oyo akokatama ngenga te akoki kolia Pasika te.
And when a sojourner sojourneth with thee, and would hold the passover to Jehovah, let all his males be circumcised, and then let him come near and hold it; and he shall be as one that is born in the land; but no uncircumcised person shall eat thereof.
49 Mibeko ezali se ndenge moko mpo na mwana mboka ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo azali kati na bino. › »
One law shall be for him that is home-born and for the sojourner that sojourneth among you.
50 Bato nyonso ya Isalaele basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize mpe Aron.
And all the children of Israel did as Jehovah had commanded Moses and Aaron; so did they.
51 Mpe na mokolo wana, Yawe abimisaki bana ya Isalaele na molongo, wuta na Ejipito, lokola mampinga ya basoda.
And it came to pass on that same day, [that] Jehovah brought the children of Israel out of the land of Egypt according to their hosts.

< Kobima 12 >