< Kobima 11 >

1 Yawe alobaki na Moyize: « Nakoyeisa lisusu etumbu moko na bomoi ya Faraon mpe ya Ejipito. Sima na yango, Faraon akotika bino ete bokende; kutu, akobengana bino libela.
Then Yahweh said to Moses, “There is still one more plague that I will bring on Pharaoh and Egypt. After that, he will let you go from here. When he finally lets you go, he will drive you away completely.
2 Loba na bato ete basenga biloko ya palata mpe ya wolo: mobali nyonso asenga yango epai ya moninga na ye mobali mpe mwasi nyonso, epai ya moninga na ye mwasi. »
Instruct the people that every man and woman is to ask of his or her neighbor for articles of silver and articles of gold.”
3 Yawe asalaki ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito. Mpe Moyize ye moko azalaki moto monene kati na Ejipito, na miso ya basali ya Faraon mpe ya bato nyonso.
Now Yahweh had made the Egyptians eager to please the Israelites. Moreover, the man Moses was very impressive in the sight of Pharaoh's servants and the people of Egypt.
4 Moyize alobaki na Faraon: « Tala makambo oyo Yawe alobi: ‹ Na kati-kati ya butu, nakotambola kati na mokili mobimba ya Ejipito.
Moses said, “Yahweh says this: 'About midnight I will go throughout Egypt.
5 Mwana mobali nyonso ya liboso kati na Ejipito akokufa, kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo avandi na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mwasi mowumbu oyo azali konika ble mpe bana mibali nyonso ya liboso ya bibwele.
All the firstborn in the land of Egypt will die, from the firstborn of Pharaoh, who sits on his throne, to the firstborn of the slave girl who is behind the handmill grinding it, and to all the firstborn of the cattle.
6 Bongo koganga makasi ekozala na mokili mobimba ya Ejipito, koganga oyo ezala nanu te mpe ekotikala kozala te.
Then there will be a great wailing throughout all the land of Egypt, such as has never been nor ever will be again.
7 Kasi kati na bana nyonso ya Isalaele, ezala mbwa ekoganga te liboso ya moto to ya nyama. › Na bongo, bokoyeba ete Yawe asali bokeseni kati na bato ya Ejipito mpe ya Isalaele.
But not even a dog will bark against any of the people of Israel, against either man or beast. In this way you will know that I am treating the Egyptians and the Israelites differently.'
8 Boye, bakalaka na yo nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakoya epai na ngai, bakofukama liboso na ngai mpe bakoloba: ‹ Kende, yo mpe bato nyonso oyo bazali kotambola sima na yo. › Mpe sima na yango, nakobima. » Bongo Moyize abimaki na ndako ya Faraon na kanda makasi.
All these servants of yours, Pharaoh, will come down to me and bow down to me. They will say, 'Go, you and all the people who follow you!' After that I will go out.” Then he went out from Pharaoh in great anger.
9 Yawe alobaki na Moyize: « Faraon akoboya koyokela bino mpo ete bikamwa na Ngai ekoka komonana ebele kati na Ejipito. »
Yahweh said to Moses, “Pharaoh will not listen to you. This is so that I will do many amazing things in the land of Egypt.”
10 Boye Moyize mpe Aron basalaki bikamwa wana nyonso liboso ya Faraon. Kasi Yawe akomisaki motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kaka kotika bana ya Isalaele kobima na mokili na ye.
Moses and Aaron did all these wonders before Pharaoh. But Yahweh hardened Pharaoh's heart, and Pharaoh did not let the people of Israel go out of his land.

< Kobima 11 >