< Kobima 10 >

1 Yawe alobaki na Moyize: « Kende epai ya Faraon, pamba te nakomisi motema na ye mpe ya bakalaka na ye makasi, mpo ete nasala bilembo na Ngai ya kokamwa kati na bango,
Und der HERR sprach zu Mose: Gehe hinein zu Pharao; denn ich habe sein und seiner Knechte Herz verhärtet, auf daß ich diese meine Zeichen unter ihnen tue,
2 mpe ete oyebisa bana na yo mpe bakoko na yo makambo oyo nasalaki na Ejipito mpe bilembo ya kokamwa oyo nasalaki kati na bango. Bongo bokoyeba ete Ngai nazali Yawe. »
und daß du verkündigest vor den Ohren deiner Kinder und deiner Kindeskinder, was ich in Ägypten ausgerichtet habe und wie ich meine Zeichen unter ihnen getan habe, daß ihr wisset: Ich bin der HERR.
3 Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye: « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi: ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
Also gingen Mose und Aaron hinein zu Pharao und sprachen zu ihm: So spricht der HERR, der Hebräer Gott: Wie lange weigerst du dich, dich vor mir zu demütigen, daß du mein Volk lassest, mir zu dienen?
4 Soki oboyi kotika bango kokende, lobi nakotinda mabanki na mokili na yo.
Weigerst du dich, mein Volk zu lassen, siehe, so will ich morgen Heuschrecken kommen lassen an allen Orten,
5 Ekotondisa mokili ya Ejipito na ndenge ete mabele ekomonana lisusu te. Mabanki yango ekolia mwa biloko moke oyo mvula ya mabanga etikaki; ekolia mpe banzete na bino nyonso oyo ezali kokola kati na bilanga.
daß sie das Land bedecken, also daß man das Land nicht sehen könne; und sie sollen fressen, was euch übrig und errettet ist vor dem Hagel, und sollen alle grünenden Bäume fressen auf dem Felde
6 Ekotonda na bandako na yo, ya bakalaka na yo mpe ya bato nyonso ya Ejipito; ezala batata na yo to bakoko na yo batikala nanu komona te likambo ya boye wuta bazala na mokili oyo kino lelo. › » Moyize abalukaki mpe atikaki ndako ya Faraon.
und sollen erfüllen dein Haus, aller deiner Knechte Häuser und aller Ägypter Häuser, desgleichen nicht gesehen haben deine Väter und deiner Väter Väter, seitdem sie auf Erden gewesen bis auf diesen Tag. Und er wandte sich und ging von Pharao hinaus.
7 Bakalaka ya Faraon balobaki na ye: — Kino tango nini moto oyo akozala motambo mpo na biso? Tika bango bakende kogumbamela Yawe, Nzambe na bango. Ozali komona te ete Ejipito ebebi?
Da sprachen die Knechte Pharaos zu ihm: Wie lange sollen wir mit diesem Manne geplagt sein? Laß die Leute ziehen, daß sie dem HERRN, ihrem Gott, dienen. Willst du zuvor erfahren daß Ägypten untergegangen sei?
8 Bongo bazongisaki Moyize mpe Aron epai ya Faraon; mpe Faraon alobaki na bango: — Bokende kogumbamela Yawe, Nzambe na bino. Kasi banani oyo bakokende?
Mose und Aaron wurden wieder zu Pharao gebracht; der sprach zu ihnen: Gehet hin und dienet dem HERRN, eurem Gott. Welche sind es aber, die hinziehen sollen?
9 Moyize azongisaki: — Tokokende elongo na bilenge na biso, bampaka na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, bameme na biso, bantaba na biso mpe bangombe na biso; pamba te tokosala feti mpo na lokumu ya Yawe.
Mose sprach: Wir wollen hinziehen mit jung und alt, mit Söhnen und Töchtern, mit Schafen und Rindern; denn wir haben ein Fest des HERRN.
10 Faraon alobaki na bango: — Soki nakotika bino kokende elongo na bana na bino, wana tika ete Yawe azala elongo na bino! Nzokande emonani solo ete bozali na makanisi mabe.
Er sprach zu ihnen: O ja, der HERR sei mit euch! Sollte ich euch und eure Kinder dazu ziehen lassen? Sehet da, ob ihr nicht Böses vorhabt!
11 Ekosalema bongo te! Kaka mibali nde bakokende kogumbamela Yawe, pamba te yango nde likambo oyo bozali kosenga ngai. Boye babenganaki Moyize mpe Aron liboso ya Faraon.
Nicht also, sondern ihr Männer ziehet hin und dienet dem HERRN; denn das habt ihr auch gesucht. Und man stieß sie heraus von Pharao.
12 Yawe alobaki na Moyize: — Sembola loboko na yo na mokili ya Ejipito mpo ete obimisa mabanki kati na mokili yango mpe mabanki yango elia matiti nyonso ya bilanga, biloko nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te.
Da sprach der HERR zu Mose: Recke deine Hand über Ägyptenland, daß Heuschrecken auf Ägyptenland kommen und fressen alles Kraut im Lande auf samt allem dem, was der Hagel übriggelassen hat.
13 Boye Moyize asembolaki lingenda na ye na mokili ya Ejipito mpe Yawe atindaki mopepe ya este mokolo mobimba mpe butu mobimba. Mpe tango tongo etanaki, mopepe yango eyaki na mabanki.
Mose reckte seinen Stab über Ägyptenland; und der HERR trieb einen Ostwind ins Land den ganzen Tag und die ganze Nacht; und des Morgens führte der Ostwind die Heuschrecken her.
14 Mabanki ekotaki kati na Ejipito nyonso mpe evandaki ebele na bisika nyonso ya Ejipito. Etumbu ya mabanki ya ndenge wana etikala nanu kozala te mpe ekotikala kozala lisusu te.
Und sie kamen über das ganze Ägyptenland und ließen sich nieder an allen Orten in Ägypten, so sehr viel, daß zuvor desgleichen nie gewesen ist noch hinfort sein wird.
15 Ezipaki mabele nyonso mpe mabele eyindaki. Eliaki nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te: matiti nyonso ya bilanga mpe bambuma nyonso ya banzete. Kati na mokili mobimba ya Ejipito, eloko moko te ya mobesu etikalaki na banzete to na matiti ya bilanga.
Denn sie bedeckten das Land und verfinsterten es. Und sie fraßen alles Kraut im Lande auf und alle Früchte auf den Bäumen, die der Hagel übriggelassen hatte, und ließen nichts Grünes übrig an den Bäumen und am Kraut auf dem Felde in ganz Ägyptenland.
16 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron na lombangu, alobaki: — Nasali lisumu epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe epai na bino.
Da forderte Pharao eilend Mose und Aaron und sprach: Ich habe mich versündigt an dem HERRN, eurem Gott, und an euch;
17 Sik’oyo lisusu, bolimbisa lisumu na ngai. Bobondela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete alongola etumbu oyo ya kufa kati na ngai.
vergebt mir meine Sünde nur noch diesmal und bittet den HERRN, euren Gott, daß er doch nur diesen Tod von mir wegnehme.
18 Moyize atikaki Faraon mpe abondelaki Yawe.
Und er ging aus von Pharao und bat den HERRN.
19 Bongo Yawe akomisaki mopepe ya este ekumbaki moko ya weste oyo ememaki mabanki mpe ebwakaki yango na ebale monene ya Barozo. Ata libanki moko te etikalaki na bisika nyonso ya Ejipito.
Da wendete der HERR den Wind, also daß er sehr stark aus Westen ging und hob die Heuschrecken auf und warf sie ins Schilfmeer, daß nicht eine übrigblieb an allen Orten Ägyptens.
20 Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende.
Aber der HERR verstockte Pharaos Herz, daß er die Kinder Israel nicht ließ.
21 Yawe alobaki na Moyize: — Sembola loboko na yo likolo mpo ete molili epanzana na mokili ya Ejipito, molili oyo ekosala ete bato batambola na kosimbasimba.
Der HERR sprach zu Mose: Recke deine Hand gen Himmel, daß es so finster werde in Ägyptenland, daß man's greifen mag.
22 Boye Moyize asembolaki loboko na ye likolo mpe molili makasi ezipaki mokili mobimba ya Ejipito mikolo misato.
Und Mose reckte seine Hand gen Himmel; da ward eine dicke Finsternis in ganz Ägyptenland drei Tage,
23 Na mikolo misato yango, moto moko te akokaki komona moto mosusu mpe kolongwa na esika oyo azali mpo na kokende na esika mosusu. Nzokande pole ezalaki na bisika nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kovanda.
daß niemand den andern sah noch aufstand von dem Ort, da er war, in drei Tagen. Aber bei allen Kindern Israel war es licht in ihren Wohnungen.
24 Faraon abengisaki Moyize mpe alobaki: — Bokende kogumbamela Yawe; bokende bino nyonso nzela moko, ezala basi mpe bana na bino. Kasi botika kaka bangombe, bameme mpe bantaba na bino.
Da forderte Pharao Mose und sprach: Ziehet hin und dienet dem Herrn; allein eure Schafe und Rinder laßt hier; laßt auch eure Kindlein mit euch ziehen.
25 Kasi Moyize alobaki: — Okopesa biso mbeka mpe makabo ya kotumba oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso.
Mose sprach: Du mußt uns auch Opfer und Brandopfer geben, die wir unserm Gott, dem HERRN, tun mögen.
26 Bitonga na biso ya bibwele mpe ekokende nzela moko na biso; ata linzaka moko te ya ebwele ekotikala. Pamba te ezali kati na bibwele yango nde tokopona oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso; mpe wana tokomi nanu kuna te, toyebi te ebwele nini tokobonza mpo na kogumbamela Yawe.
Unser Vieh soll mit uns gehen und nicht eine Klaue dahintenbleiben; denn wir wissen nicht, womit wir dem HERRN dienen sollen, bis wir dahin kommen.
27 Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi; mpe Faraon aboyaki kaka kotika bango kokende.
Aber der HERR verstockte das Herz Pharao daß er sie nicht lassen wollte.
28 Faraon alobaki na Moyize: — Longwa liboso na ngai mpe keba na yo! Koya lisusu liboso na ngai te! Mokolo oyo okoya lisusu liboso na ngai, okokufa.
Und Pharao sprach zu ihm: Gehe von mir und hüte dich, daß du nicht mehr vor meine Augen kommst; denn welches Tages du vor meine Augen kommst, sollst du sterben.
29 Moyize azongisaki: — Ndenge kaka olobi, nakotikala koya lisusu liboso na yo te!
Mose antwortete: Wie du gesagt hast; ich will nicht mehr vor deine Augen kommen.

< Kobima 10 >