< Ester 7 >

1 Mokonzi mpe Amani bakendeki mpe bakomaki na feti oyo Ester, mwasi ya mokonzi, abongisaki.
The king and Haman went to Queen Esther's dinner.
2 Mpe wana bazalaki komela vino na mokolo oyo ya mibale, mokonzi atunaki lisusu Ester: — Ester, mwasi ya mokonzi, bosenga na yo ezali nini? Ekopesamela yo. Posa na yo ezali nini? Ekopesamela yo, ata soki ezali koleka kati-kati ya mokili na ngai ya bokonzi.
At this second dinner, as they were drinking wine, the king asked Esther again, “What are you really asking for, Queen Esther? It will be given to you. What do you want? You shall have it, as much as half my empire!”
3 Ester, mwasi ya mokonzi, azongisaki: — Ah mokonzi! Soki nazwi ngolu na miso na yo, mpe soki yango esepelisi yo mokonzi, tika ete opesa ngai bomoi na ngai; yango nde ezali bosenga na ngai. Mpe lisusu, tika ete obatela bato na ngai; yango nde ezali bosenga na ngai.
Queen Esther answered, “If the king looks on me favorably, and if it please Your Majesty to grant me my life, that is my request; and the lives of my people, that is what I ask.
4 Pamba te ngai mpe bato na ngai, tosili kotekama mpo ete babebisa biso, baboma biso mpe balimwisa biso! Soki ata batekaki biso mpo ete tozala bawumbu ya basi to ya mibali, nalingaki na ngai kovanda kimia; pamba te pasi ata moko te ya lolenge oyo ekokaki kotinda ngai ete natungisa mokonzi!
For my people and I have been sold to be destroyed, killed, and annihilated. If we had only been sold as slaves, I would have kept quiet, because our suffering would not have justified disturbing the king.”
5 Mokonzi Kizerisesi atunaki Ester, mwasi ya mokonzi: — Moto yango nani oyo ameki kobongisa likambo ya boye? Azali wapi?
The king asked Queen Esther, demanding to know, “Who is this? Where is the man who has dared to do this?”
6 Ester azongiselaki ye: — Monyokoli mpe monguna! Ezali Amani, moto oyo ya pasi! Amani abangaki makasi liboso ya mokonzi mpe ya mwasi ya mokonzi.
“The man, the opponent, the enemy, is this evil Haman!” Esther replied. Haman shook with terror in front of the king and the queen.
7 Mokonzi atelemaki na kanda makasi, atikaki vino na ye mpe abimaki na elanga ya ndako ya mokonzi. Tango Amani asosolaki ete mokonzi asili kokata etumbu na ye, atikalaki wana mpo na kobondela Ester, mwasi ya mokonzi, mpo ete abikisa bomoi na ye.
The king was furious. He got up, leaving his wine, and went out into the palace garden. Haman stayed behind to beg for his life from Queen Esther, for he realized the king planned an evil end for him.
8 Tango kaka mokonzi azongaki na esika oyo basalelaki feti longwa na elanga ya ndako ya mokonzi, Amani amikweyisaki na kiti monene oyo Ester, mwasi ya mokonzi, ayekamaki. Mokonzi agangaki: — Eh! Alingi lisusu kotungisa mwasi ya mokonzi na miso na ngai kati na ndako na ngai? Tango kaka mokonzi asilisaki koloba, bazipaki elongi ya Amani.
When the king came back in from the palace garden to the dining room, Haman had thrown himself on the couch where Queen Esther was. The king shouted out, “Is he even going to rape the queen here in the palace, right in front of me?” As soon as the king said this, the servants covered Haman's face.
9 Bongo Aribona, moko kati na basoda oyo baboma bango mokongo, alobaki liboso ya mokonzi: — Ezali na nzete moko oyo Amani atelemisaki mpo na Maridoshe, oyo alobaki makambo mpo na bolamu ya mokonzi! Ezali kati na lopango ya Amani mpe ezali na bametele tuku mibale na mitano na bosanda! Mokonzi apesaki mitindo: — Bodiembika ye moko kuna!
Then Harbonah, one of the eunuchs attending the king, said: “Haman set up a pole beside his house for Mordecai, the one whose report saved the king's life. The pole is fifty cubits high.” “Impale him on it!” the king ordered.
10 Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.
So they impaled Haman on the pole that he had set up for Mordecai. Then the anger of the king died down.

< Ester 7 >