< Ester 6 >

1 Na butu wana, lokola mokonzi akokaki kolala te, asengaki ete bamemela ye buku ya masolo, masolo ya bokonzi na ye, mpo ete batanga yango liboso na ye.
Esa noche el rey no pudo dormir nada; y envió por los libros de los registros; y mientras alguien los leía al rey,
2 Emonanaki ete bakomaki boye kati na yango: Maridoshe afundaki Bigitani mpe Tereshi, basoda mibale oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kokengela ekuke ya mokonzi, oyo basalaki likita mpo na koboma mokonzi Kizerisesi.
Resultó que estaba registrado en el libro cómo Mardoqueo había dado a conocer los planes de Bigtan y Teres, dos de los sirvientes del rey, guardianes de la puerta, por quienes había sido planeado un ataque contra el rey.
3 Mokonzi atunaki: — Lokumu mpe lifuti nini Maridoshe azwaki mpo na yango? Basali na ye bazongisaki: — Basala ata eloko moko te mpo na ye.
Y el rey dijo: ¿Qué honor y recompensa se le ha dado a Mardoqueo por esto? Entonces los criados que servían al rey dijeron: No se ha hecho nada por él.
4 Mokonzi atunaki: — Nani azali kati na lopango? Nzokande Amani awutaki kokota na lopango ya libanda ya ndako ya mokonzi mpo na kosolola na ye mpo ete badiembika Maridoshe na nzete oyo atelemisaki mpo na ye.
Entonces el rey dijo: ¿Quién está en el atrio exterior? Ahora Amán había entrado en él atrio exterior para obtener la autoridad del rey para colgar a Mardoqueo en la horca que él había preparado para él.
5 Basali ya mokonzi bazongisaki: — Ezali Amani nde azali kati na lopango. Mokonzi alobaki: — Bokotisa ye.
Y los siervos del rey le dijeron: Mira, Amán está esperando en el atrio exterior. Y el rey dijo: Déjalo entrar.
6 Tango Amani akotaki, mokonzi atunaki ye: — Tokoki kosala nini mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu? Amani amilobelaki: « Nani lisusu oyo mokonzi akoki kopesa lokumu soki ngai te? »
Y entró Amán. Y el rey le dijo: ¿Qué se debe hacer al hombre a quien el rey se complace en honrar? Entonces el pensamiento vino a la mente de Amán: ¿A quién, más que a mí, le complacería al rey honrar?
7 Amani azongiselaki mokonzi: — Mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu,
Entonces respondiendo Aman al rey, dijo: Porque el hombre a quien el rey se deleita en honrar,
8 tika ete bamema nzambala ya bokonzi oyo mokonzi alataka elongo na mpunda oyo mokonzi amataka mpe batia motole ya bokonzi na moto ya mpunda yango.
Que tomen las túnicas que generalmente se pone el rey, y el caballo sobre el cual va el rey, y la corona que tiene sobre su cabeza.
9 Tika ete bapesa nzambala mpe mpunda yango epai ya kalaka oyo aleki na lokumu kati na bakalaka ya mokonzi, mpe tika ete balatisa nzambala na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu, mpe tika ete batambolisa ye likolo ya mpunda na balabala ya engumba na kotatola liboso na ye: « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo ye alingi kopesa lokumu! »
Que se entreguen las túnicas y el caballo a uno de los más nobles capitanes del rey, para que puedan ponerlos sobre el hombre al que el rey se complace en honrar, y dejarlo que ande a caballo por las plaza del pueblo, con hombres que gritan delante de él, así trate al hombre a quien el rey se deleita en honrar.
10 Mokonzi alobaki na Amani: — Kende noki koluka nzambala mpe mpunda ndenge olobi, mpe sala yango mpo na Moyuda Maridoshe oyo asalaka mosala na ye na ekuke ya mokonzi. Kati na makambo nyonso oyo osili koloba, kotika ata eloko moko te.
Entonces el rey dijo a Amán: Ve rápido, y toma la túnica y el caballo, como has dicho, y haz lo mismo con Mardoqueo, el judío, que está sentado en la puerta del rey; ve que hagan todo lo que has dicho.
11 Amani azwaki nzambala mpe mpunda, alatisaki Maridoshe nzambala yango mpe atambolisaki ye likolo ya mpunda na balabala nyonso ya engumba na kotatola liboso na ye: « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo alingi kopesa lokumu! »
Entonces Amán tomó la túnica y el caballo, y vistiendo a Mardoqueo con la túnica, lo hizo ir a caballo por las calles de la ciudad, clamando delante de él, así se trata al hombre que el rey se deleita en honrar.
12 Sima, Maridoshe azongaki na ekuke ya mokonzi; kasi Amani azongaki noki na ndako na ye, na soni mpe azipa moto na ye.
Y Mardoqueo volvió a la puerta del rey. Pero Amán regresó rápidamente a su casa, triste y con la cabeza cubierta.
13 Amani ayebisaki mwasi na ye, Zereshi, mpe baninga na ye nyonso makambo oyo ekomelaki ye. Bapesi toli na ye mpe mwasi na ye, Zereshi, balobaki na ye: — Lokola kokweyisama na yo ebandi liboso ya Maridoshe oyo azali Moyuda, okokoka kolonga ye te; solo penza, okokweyisama lisusu na se koleka!
Y Amán le dio a su esposa Zeres y a todos sus amigos un relato de lo que había ocurrido. Entonces sus sabios y su esposa Zeres le dijeron: Si Mardoqueo, que está empezando a vencerte, es de la semilla de los judíos, no podrás hacer nada contra él, pero ciertamente caerás ante él.
14 Wana bazalaki nanu kosolola na ye, basoda ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, bayaki mpe bamemaki Amani na lombangu na feti oyo Ester abongisaki.
Mientras aún estaban hablando, los siervos del rey vinieron a llevar a Aman a la fiesta que Ester había preparado.

< Ester 6 >