< Ester 3 >
1 Sima na makambo oyo, mokonzi Kizerisesi apesaki lokumu epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi; atombolaki ye mpe atiaki ye likolo ya bakalaka nyonso.
After these events King Ahasuerus promoted Haman the son of Hammedatha the Agagite, and advanced him to a place above all the officials who were with him.
2 Bakalaka nyonso oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi bakomaki kofukama mpe kopesa Amani lokumu, pamba te mokonzi atindaki ete basala bongo mpo na ye. Kasi Maridoshe azalaki kofukamela ye te mpe azalaki kopesa ye lokumu te.
All the king’s courtiers who were in the king’s gate used to bow down before Haman, for so the king had commanded, but Mordecai did not bow down nor prostrate himself.
3 Bakalaka oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi batunaki Maridoshe: — Mpo na nini otosaka mitindo ya mokonzi te?
Then the king’s courtiers, who were in the king’s gate, said to Mordecai, ‘Why do you disobey the king’s command?’
4 Bazalaki koloba na ye bongo mikolo nyonso, kasi Maridoshe azalaki kaka koboya koyoka bango. Boye, bayebisaki Amani makambo yango mpo na koyeba soki ezaleli ya Maridoshe ekondimama mpe soki akokangama kaka na maloba na ye, pamba te ayebisaki bango ete azali Moyuda.
When they had spoken to him day after day without his listening to them, they informed Haman, to see whether Mordecai’s acts would be tolerated, for he had told them that he was a Jew.
5 Tango Amani asosolaki ete Maridoshe afukamelaka ye te mpe apesaka ye lokumu te, asilikaki makasi.
When Haman saw that Mordecai did not bow down nor prostrate himself before him, he was furious.
6 Nzokande Amani asilaki koyoka ete Maridoshe azali Moyuda. Boye amonaki ete likanisi ya koboma kaka Maridoshe ekoki te; alukaki nzela ya koboma Bayuda nyonso, bato ya Maridoshe, kati na mokili mobimba ya mokonzi Kizerisesi.
But it seemed to him beneath his dignity to lay hands on Mordecai alone, for they had told him who Mordecai’s people were. Instead Haman sought to destroy all the people of Mordecai, all the Jews throughout the kingdom of Ahasuerus.
7 Na sanza ya liboso, sanza ya Nisani, na mobu ya zomi na mibale ya Mokonzi Kizerisesi, babetaki zeke oyo babengaka « Puri » liboso ya Amani mpo na kopona mokolo mpe sanza ya koboma Bayuda. Bongo zeke ekweyaki na sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari.
In the first month (the month of Nisan) in the twelfth year of the reign of King Ahasuerus, Haman had “pur” (which means “lot”) cast before him to determine the best day and best month for his actions. The lot fell on the thirteenth day of the twelfth month – the month of Adar.
8 Amani alobaki na mokonzi Kizerisesi: — Ezali na bato moko oyo bakeseni na bato mosusu, bapanzani kati na bato mpe kati na bituka nyonso ya mokili na yo ya bokonzi; bizaleli na bango ekeseni na bizaleli ya bato mosusu, bongo batosaka mibeko ya mokonzi te; ezali malamu te mpo na mokonzi kotika bango na kimia.
So Haman said to King Ahasuerus, ‘There is a certain people scattered among the peoples in all the provinces of your kingdom, whose laws differ from those of every other and who do not keep the king’s laws. Therefore it is not right for the king to tolerate them.
9 Soki esepelisi mokonzi, tika ete abimisa mobeko ya koboma bango; mpe ngai nakopesa na maboko ya bakalaka oyo batalaka makambo ya mokonzi mbongo ya bibende ya palata nkoto zomi mpo ete batia yango kati na libenga ya mokonzi.
If it seems best to the king, let an order be given to destroy them, and I will pay ten thousand silver coins into the royal treasury.’
10 Mokonzi alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe apesaki yango epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi, monguna ya Bayuda.
So the king took off his signet ring from his hand and gave it to Haman son of Hammedatha the Agagite, the enemy of the Jews.
11 Mokonzi alobaki na Amani: — Bomba palata na yo! Sala nyonso oyo olingi epai ya bato yango.
‘The money is yours,’ the king said to Haman, ‘and the people also to do with them as you wish.’
12 Boye, na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya liboso, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi; mpe na mitindo ya Amani, bakomaki mitindo nyonso ya Amani epai ya bakalaka ya lokumu ya mokonzi, epai ya bayangeli ya etuka moko na moko mpe epai ya bakalaka ya ekolo moko na moko, kolanda lolenge ya kokoma ya etuka moko na moko mpe lokota ya ekolo moko na moko. Bakomaki yango na kombo ya mokonzi Kizerisesi mpe babetaki yango kashe ya mokonzi.
And so, on the thirteenth day of the first month, the king’s secretaries were summoned and as Haman instructed an edict was issued to the king’s satraps and provincial governors and the rulers of each of the peoples in their own script and their own language. The edict was written in the name of King Ahasuerus and sealed with his ring.
13 Bongo mikanda yango etindamaki na bituka nyonso ya mokonzi, na nzela ya bantoma, mpo na kobebisa, koboma mpe kolimwisa Bayuda nyonso, bilenge mpe mikolo, bana mpe basi, kaka na mokolo moko, mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari; mpe kobotola na makasi biloko na bango.
Dispatches were sent by couriers to all the king’s provinces, saying: Destroy, kill, put an end to all the Jews, young and old, little children and women, on the thirteenth day of the twelfth month, and plunder their possessions.
14 Basengelaki kopanza kati na bituka nyonso sango ya mobeko yango mpe kolakisa yango na bato ya bikolo nyonso mpo ete babongama mpo na mokolo wana.
A copy of the edict was to be published as a decree in every province – publicly displayed so that everyone might be ready for that day.
15 Boye, na mitindo ya mokonzi, bantoma bakendeki na lombangu mpe bapanzaki kati na Size, engumba mokonzi, sango ya mobeko ya mokonzi. Wana mokonzi mpe Amani bavandaki mpo na komela masanga, engumba Size ezalaki kati na matanga.
By command of the king the couriers raced off, and the edict was published in Susa itself. Then the king and Haman sat down to drink, but the city of Susa was in turmoil.