< Ester 10 >

1 Mokonzi Kizerisesi akataki mpako mpo na bato ya mokili na ye ya bokonzi kino na bituka oyo ezalaki pene ya ebale.
King Ahasuerus imposed a tribute on the land and the coasts.
2 Bongo misala nyonso ya bokonzi mpe ya nguya na ye, elongo na makambo nyonso ya lokumu ya Maridoshe oyo mokonzi atombolaki, ekomamaki kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Medi mpe ya Persi.
All the acts of his power and of his might, and the full account of the greatness of Mordecai to which the king advanced him, are they not recorded in the book of the chronicles of the kings of Media and Persia?
3 Moyuda Maridoshe azalaki moto ya mibale kati na bokonzi sima na mokonzi Kizerisesi. Maridoshe azalaki moto monene mpe ya lokumu na miso ya Bayuda, bandeko na ye; pamba te azalaki koluka bolamu ya bato na ye mpe kobundela bolamu ya Bayuda nyonso.
For Mordecai the Jew was next in rank to King Ahasuerus, and great among the Jews, and loved by them all. He sought the good of his people and promoted the welfare of their descendants.

< Ester 10 >