< Ba-Efeso 1 >

1 Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe; Epai ya basantu mpe bandimi ya Yesu-Klisto, oyo bazali kati na Efeso:
ܦܘܠܘܤ ܫܠܝܚܐ ܕܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ ܒܨܒܝܢܗ ܕܐܠܗܐ ܠܐܝܠܝܢ ܕܐܝܬܝܗܘܢ ܒܐܦܤܘܤ ܩܕܝܫܐ ܘܡܗܝܡܢܐ ܒܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ
2 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
ܫܠܡܐ ܥܡܟܘܢ ܘܛܝܒܘܬܐ ܡܢ ܐܠܗܐ ܐܒܘܢ ܘܡܢ ܡܪܢ ܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ
3 Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.
ܡܒܪܟ ܗܘ ܐܠܗܐ ܐܒܘܗܝ ܕܡܪܢ ܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ ܗܘ ܕܒܪܟܢ ܒܟܠ ܒܘܪܟܢ ܕܪܘܚ ܒܫܡܝܐ ܒܡܫܝܚܐ
4 Pamba te, kati na Klisto, apona biso liboso ete akela mokili, mpo ete tozala bato ya bule mpe bazanga pamela na miso na Ye. Kati na bolingo na Ye,
ܐܝܟܢܐ ܕܩܕܡ ܓܒܢ ܒܗ ܡܢ ܩܕܡ ܬܪܡܝܬܗ ܕܥܠܡܐ ܕܢܗܘܐ ܩܕܝܫܐ ܘܕܠܐ ܡܘܡ ܩܕܡܘܗܝ ܘܒܚܘܒܐ ܩܕܡ ܪܫܡܢ ܠܗ
5 abongisa biso wuta kala mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko,
ܘܤܡܢ ܠܒܢܝܐ ܒܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ ܐܝܟ ܕܫܦܪ ܠܨܒܝܢܗ
6 mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye, oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.
ܕܢܫܬܒܚ ܫܘܒܚܐ ܕܛܝܒܘܬܗ ܗܘ ܕܐܫܦܥ ܥܠܝܢ ܒܝܕ ܚܒܝܒܗ
7 Kati na Klisto, tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, mpe bolimbisi ya masumu, kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe
ܕܒܗ ܐܝܬ ܠܢ ܦܘܪܩܢܐ ܘܒܕܡܗ ܫܘܒܩܢܐ ܕܚܛܗܐ ܐܝܟ ܥܘܬܪܐ ܕܛܝܒܘܬܗ
8 oyo akabolelaki biso yango na bofuluki, na kopesa biso bwanya mpe bososoli nyonso,
ܗܝ ܕܐܬܝܬܪܬ ܒܢ ܒܟܠ ܚܟܡܐ ܘܒܟܠ ܤܘܟܠ
9 mpe na kolakisa biso mabombami ya mokano na Ye, mabombami oyo abongisa kati na Klisto kolanda bolamu na Ye,
ܘܐܘܕܥܢ ܐܪܙܐ ܕܨܒܝܢܗ ܗܘ ܕܩܕܡ ܗܘܐ ܤܡ ܕܢܤܥܘܪ ܒܗ
10 mpo na kokokisa yango na tango ya suka: kosangisa kati na Klisto bikelamu nyonso oyo ezali kati na Likolo mpe oyo ezali na mabele.
ܠܡܕܒܪܢܘܬܐ ܕܡܘܠܝܗܘܢ ܕܙܒܢܐ ܕܟܠܡܕܡ ܡܢ ܕܪܝܫ ܢܬܚܕܬ ܒܡܫܝܚܐ ܕܒܫܡܝܐ ܘܒܐܪܥܐ
11 Kati na Klisto, Nzambe aponaki biso lisusu mpo ete tokitana na libula na biso, kolanda mabongisi ya Ye oyo akokisaka nyonso, kolanda makanisi ya mokano na Ye,
ܘܒܗ ܚܢܢ ܐܬܓܒܝܢ ܐܝܟ ܕܩܕܡ ܪܫܡܢ ܘܨܒܐ ܗܘ ܕܟܠ ܤܥܪ ܐܝܟ ܬܪܥܝܬܐ ܕܨܒܝܢܗ
12 mpo ete tosanzola nkembo na Ye, biso ba-oyo tozalaki bato ya liboso mpo na kotia elikya na biso kati na Klisto.
ܕܢܗܘܐ ܚܢܢ ܐܝܠܝܢ ܕܩܕܡܢ ܤܒܪܢ ܒܡܫܝܚܐ ܠܗܕܪܐ ܕܬܫܒܘܚܬܗ
13 Bino mpe, sima na bino koyoka Liloba ya solo, Sango Malamu ya lobiko na bino, bondimelaki Klisto; mpe Nzambe apesaki bino Molimo Mosantu oyo alakaki mpe, na nzela ya Molimo yango, abetaki bino kashe
ܕܐܦ ܐܢܬܘܢ ܒܗ ܫܡܥܬܘܢ ܡܠܬܐ ܕܩܘܫܬܐ ܕܐܝܬܝܗ ܤܒܪܬܐ ܕܚܝܝܟܘܢ ܘܒܗ ܗܝܡܢܬܘܢ ܘܐܬܚܬܡܬܘܢ ܒܪܘܚܐ ܕܩܘܕܫܐ ܕܡܠܝܟܐ ܗܘܬ
14 lokola ndanga ya libula na biso kino basikolami na Ye bakangolama mpo na kosanzola nkembo na Ye.
ܗܝ ܕܐܝܬܝܗ ܪܗܒܘܢܐ ܕܝܪܬܘܬܢ ܠܦܘܪܩܢܐ ܕܐܝܠܝܢ ܕܚܐܝܢ ܘܠܫܘܒܚܐ ܕܐܝܩܪܗ
15 Yango wana, wuta tango nayokaki sango ya kondima na bino kati na Nkolo Yesu mpe bolingo na bino mpo na basantu nyonso,
ܡܛܠ ܗܢܐ ܐܦ ܐܢܐ ܗܐ ܡܢ ܕܫܡܥܬ ܗܝܡܢܘܬܟܘܢ ܕܒܡܪܢ ܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ ܘܚܘܒܟܘܢ ܕܠܘܬ ܩܕܝܫܐ
16 nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe mpo na bino, nakanisaka bino na mabondeli na ngai
ܠܐ ܡܫܬܠܐ ܐܢܐ ܠܡܘܕܝܘ ܥܠ ܐܦܝܟܘܢ ܘܠܡܥܗܕܟܘܢ ܒܨܠܘܬܝ
17 mpe nasengaka ete Nzambe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo ya bwanya mpe ya emoniseli mpo ete bokoka koyeba Ye malamu.
ܕܐܠܗܗ ܕܡܪܢ ܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ ܐܒܐ ܕܬܫܒܘܚܬܐ ܢܬܠ ܠܟܘܢ ܪܘܚܐ ܕܚܟܡܬܐ ܘܕܓܠܝܢܐ ܒܝܕܥܬܗ
18 Nasambelaka ete angengisa miso ya mitema na bino mpo ete bokoka kososola elikya oyo ezali kati na kobengama na bino, bomengo ya nkembo ya libula na Ye, oyo akopesa bino elongo na basantu,
ܘܢܢܗܪܢ ܥܝܢܐ ܕܠܒܘܬܟܘܢ ܕܬܕܥܘܢ ܡܢܘ ܤܒܪܐ ܕܩܪܝܢܗ ܘܡܢܘ ܥܘܬܪܐ ܕܫܘܒܚܐ ܕܝܪܬܘܬܗ ܒܩܕܝܫܐ
19 mpe monene makasi ya nguya na Ye mpo na biso oyo tozali na kondima. Abimisaki nguya yango na makasi na yango nyonso
ܘܡܢܐ ܗܝ ܝܬܝܪܘܬܐ ܕܪܒܘܬܐ ܕܚܝܠܗ ܒܢ ܒܐܝܠܝܢ ܕܡܗܝܡܢܝܢܢ ܐܝܟ ܡܥܒܕܢܘܬܐ ܕܬܘܩܦܐ ܕܚܝܠܗ
20 mpe asalelaki yango kati na Klisto tango asekwisaki Ye kati na bakufi mpe avandisaki Ye na ngambo ya loboko na Ye ya mobali kati na Likolo,
ܕܥܒܕ ܒܡܫܝܚܐ ܘܐܩܝܡܗ ܡܢ ܒܝܬ ܡܝܬܐ ܘܐܘܬܒܗ ܡܢ ܝܡܝܢܗ ܒܫܡܝܐ
21 na likolo ya milimo nyonso, ya bokonzi nyonso, ya nguya nyonso, ya bokasi nyonso, mpe ya kombo nyonso oyo bato bakoki kotanga, na tango oyo kaka te kasi mpe na tango oyo ekoya. (aiōn g165)
ܠܥܠ ܡܢ ܟܠܗܝܢ ܐܪܟܘܤ ܘܫܘܠܛܢܐ ܘܚܝܠܐ ܘܡܪܘܬܐ ܘܠܥܠ ܡܢ ܟܠ ܫܡ ܕܡܫܬܡܗ ܠܐ ܒܠܚܘܕ ܒܥܠܡܐ ܗܢܐ ܐܠܐ ܐܦ ܒܕܥܬܝܕ (aiōn g165)
22 Nzambe atia nyonso na se ya matambe ya Yesu mpe apona Yesu mpo ete akonza nyonso lokola Mokonzi ya Lingomba
ܘܫܥܒܕ ܟܠܡܕܡ ܬܚܝܬ ܪܓܠܘܗܝ ܘܠܗ ܕܐܝܬܘܗܝ ܠܥܠ ܡܢ ܟܠ ܝܗܒܗ ܪܫܐ ܠܥܕܬܐ
23 oyo ezali nzoto na Ye. Nzambe oyo atondisaka nyonso kati na bato nyonso amimonisaka kati na Yesu, na mobimba ya bonzambe na Ye.
ܕܐܝܬܝܗ ܓܘܫܡܗ ܘܫܘܡܠܝܐ ܕܗܘ ܕܟܠ ܒܟܠ ܡܫܡܠܐ

< Ba-Efeso 1 >