< Ba-Efeso 6 >

1 Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo.
Enfants, obéissez à vos parents dans le Seigneur, car cela est juste.
2 Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka: Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu
« Honore ton père et ta mère — c’est le premier commandement, accompagné d’une promesse. —
3 mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili.
afin que tu sois heureux et que tu vives longtemps sur la terre. »
4 Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.
Et vous, pères, n’exaspérez pas vos enfants, mais élevez-les en les corrigeant et en les avertissant selon le Seigneur.
5 Bino bawumbu, botosaka bankolo na bino ya mokili, na limemia, na kobanga mpe na bosembo ya mitema, lokola nde bozali kotosa Klisto;
Serviteurs, obéissez à vos maîtres selon la chair avec respect et crainte et dans la simplicité de votre cœur, comme au Christ,
6 na miso na bango kaka te, lokola nde bozali koluka kosepelisa bato, kasi lokola bawumbu ya Klisto, oyo bazali kosala mokano ya Nzambe wuta na mitema na bango.
ne faisant pas seulement le service sous leurs yeux, comme pour plaire aux hommes, mais en serviteurs du Christ, qui font de bon cœur la volonté de Dieu.
7 Bosalaka na esengo lokola bawumbu ya Nkolo, kasi lokola bawumbu ya bato te,
Servez-les avec affection, comme servant le Seigneur, et non des hommes,
8 pamba te boyebi malamu ete Nkolo akofuta moto nyonso mpo na bolamu nyonso oyo asalaka, azala mowumbu to monsomi.
assurés que chacun, soit esclave, soit libre, sera récompensé par le Seigneur de ce qu’il aura fait de bien.
9 Bongo mpo na bino bankolo, bosalaka mpe ndenge wana epai ya bawumbu na bino. Bobangisaka bango te, lokola boyebi malamu ete Nkolo na bango, oyo azali kati na Likolo azali mpe Nkolo na bino mpe aponaka bilongi te.
Et vous, maîtres, agissez de même à leur égard et laissez là les menaces, sachant que leur Seigneur et le vôtre est dans les cieux et qu’il ne fait pas acception de personne.
10 Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene.
Au reste, frères, fortifiez-vous dans le Seigneur et dans sa vertu toute-puissante.
11 Bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele mabe ya Satana.
Revêtez-vous de l’armure de Dieu, afin de pouvoir résister aux embûches du diable.
12 Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo. (aiōn g165)
Car nous n’avons pas à lutter contre la chair et le sang, mais contre les princes, contre les puissances, contre les dominateurs de ce monde de ténèbres, contre les esprits mauvais répandus dans l’air. (aiōn g165)
13 Yango wana, bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kolonga na mokolo mabe ya Satana mpe kotelema ngwi kino na suka sima na bino kobunda.
C’est pourquoi prenez l’armure de Dieu, afin de pouvoir résister au jour mauvais, et après avoir tout surmonté, rester debout.
14 Boye botelema ngwi, bolataka solo lokola mokaba na loketo, bosembo lokola ebombelo ya tolo,
Soyez donc fermes, les reins ceints de la vérité, revêtus de la cuirasse de justice,
15 molende ya kopanza Sango Malamu ya kimia lokola sapato na makolo na bino.
et les sandales aux pieds, prêts à annoncer l’Évangile de paix.
16 Na likolo na nyonso, bobakisaka kondima lokola nguba oyo bokoboma na yango moto ya makonga nyonso oyo Satana akobwakaka.
Et surtout, prenez le bouclier de la foi, par lequel vous pourrez éteindre tous les traits enflammés du Malin.
17 Bolataka lobiko lokola ekoti ya ebende, mpe bozwaka Liloba na Nzambe lokola mopanga ya Molimo.
Prenez aussi le casque du salut, et le glaive de l’Esprit, qui est la parole de Dieu.
18 Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso.
Faites en tout temps par l’Esprit toutes sortes de prières et de supplications; et pour cela, veillez avec une persévérance continuelle et priez pour tous les saints,
19 Bobondelaka mpe mpo na ngai mpo ete, tango nyonso nakozala koteya, Nzambe apesa ngai maloba oyo nasengeli kotatola mpo na kosakola mabombami ya Sango Malamu, na kozanga bobangi.
et pour moi, afin qu’il me soit donné d’ouvrir les lèvres et de prêcher avec liberté le mystère de l’Évangile,
20 Ezali mpo na Sango Malamu yango nde nazali motindami kati na minyololo. Boye, bobondelaka mpo ete natatolaka yango na kozanga bobangi, ndenge nasengeli penza kolobela yango.
à l’égard duquel je fais fonction d’ambassadeur dans les chaînes, et afin que j’en parle avec assurance comme il convient.
21 Tishike oyo, kati na Nkolo, azali ndeko molingami mpe mosali ya sembo, akoyebisa bino makambo nyonso, mpo ete bino mpe boyeba ndenge nini nazali mpe makambo nini nazali kosala.
Quant à savoir ce qui me concerne et ce que je fais, Tychique, le bien-aimé frère et fidèle ministre dans le Seigneur, vous fera tout connaître.
22 Ezali na tina yango nde nazali kotinda ye epai na bino, mpo ete apesa bino basango na tina na ngai mpe alendisa bino.
Je vous l’envoie tout exprès, pour que vous connaissiez notre situation et pour qu’il console vos cœurs.
23 Tika ete Nzambe Tata mpe Nkolo Yesu-Klisto bapesa na bandeko nyonso kimia, bolingo mpe kondima!
Paix aux frères, charité et foi, de la part de Dieu le Père et du Seigneur Jésus-Christ!
24 Tika ete ngolu ezala na bato nyonso oyo balingaka Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na bolingo oyo ekoki kobeba te!
Que la grâce soit avec tous ceux qui aiment Notre-Seigneur Jésus-Christ d’un amour incorruptible.

< Ba-Efeso 6 >