< Ba-Efeso 5 >

1 Boye, lokola bozali bana oyo Nzambe alingaka mingi, bomekolaka Ye.
Therefore imitate God, as his dear children,
2 Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.
and live a life of love, following the example of the Christ, who loved you and gave himself for you as ‘an offering and a sacrifice to God, that should be fragrant and acceptable.’
3 Tika ete kindumba, lolenge nyonso ya makambo ya soni mpe lokoso etangamaka kutu te kati na bino, pamba te ebongi te mpo na basantu.
As for unchastity and every kind of impurity, or greed, do not let them even be mentioned among you, as befits Christ’s People,
4 Ezali mpe malamu te mpo na bino kobimisaka maloba ya bozoba, ya bosoto mpe ya maseki, kasi ebongi nde kozongisaka matondi.
nor shameful conduct, nor foolish talk or jesting, for they are wholly out of place among you; but rather thanksgiving.
5 Pamba te, boyeba yango malamu, moto nyonso oyo asalaka kindumba, makambo ya soni to atondi na lokoso oyo ekokani na kosambela bikeko, akokota te na Bokonzi ya Klisto mpe ya Nzambe.
For of this you may be sure — that no one who is unchaste or impure or greedy of gain (for to be greedy of gain is idolatry) has any place awaiting him in the kingdom of the Christ and God.
6 Tika ete moko te akosa bino na maloba ezanga tina, pamba te ezali mpo na biloko ya ndenge wana nde kanda ya Nzambe ekweyelaka bato oyo batosaka Ye te.
Do not let any one deceive you with specious arguments. Those are the sins that bring down the Wrath of God upon the disobedient.
7 Bosanganaka te elongo na bato wana.
Therefore have nothing to do with such people.
8 Na kala, bozalaki molili, kasi sik’oyo bokomi pole kati na Nkolo. Boye, botambolaka lokola bana ya pole,
For, although you were once in Darkness, now, by your union with the Lord, you are in the Light. Live as ‘Children of Light’ —
9 pamba te mbuma ya pole ezali: boboto, bosembo, mpe bosolo.
For the outcome of life in the Light may be seen in every form of goodness, righteousness, and sincerity —
10 Bosalaka makasi mpo na kososola makambo oyo esepelisaka Nkolo.
Always trying to find out what is pleasing to the Lord.
11 Bosanganaka te na misala ya molili, oyo ebotaka mbuma te, kasi bobimisaka yango na pwasa.
Take no part in deeds of Darkness, from which no good can come; on the contrary, expose them.
12 Pamba te makambo nyonso oyo esalemaka na nkuku ezalaka soni mpo na kolobela yango.
It is degrading even to speak of the things continually done by them in secret.
13 Nzokande nyonso oyo pole ebimisaka na pwasa emonana polele,
All such actions, when exposed, have their true character made manifest by the Light.
14 pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba: « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »
For everything that has its true character made manifest is clear as light. And that is why it is said — ‘Sleeper, awake! Arise from the dead, And the Christ shall give thee light!’
15 Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya.
Take great care, then, how you live — not unwisely but wisely,
16 Bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu, pamba te mikolo ezali mabe.
making the most of every opportunity; for these are evil days.
17 Yango wana, bozalaka bazoba te, kasi bososolaka oyo ebengami mokano ya Nkolo.
Therefore do not grow thoughtless, but try to understand what the Lord’s will is.
18 Bolangwaka masanga te, pamba te ememaka na mobulu; kasi botondisamaka na Molimo,
Do not drink wine to excess, for that leads to profligacy; but seek to be filled with the Spirit of God, and speak to one another in psalms and hymns and sacred songs.
19 bolendisanaka na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu, mpe na nzela ya banzembo oyo ewutaka na Molimo; boyembelaka mpe bosanzolaka Nkolo wuta na mozindo ya mitema na bino;
Sing and make music in your hearts to the Lord.
20 bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso;
Always give thanks for everything to our God and Father, in the Name of our Lord Jesus Christ;
21 mpe lokola botosaka Klisto, botosanaka bamoko na bamosusu.
and submit to one another from reverence for him.
22 Basi, botosaka mibali na bino ndenge botosaka Nkolo.
Wives should submit to their husbands as submitting to the Lord.
23 Pamba te mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Klisto azali Mokonzi ya Lingomba oyo ezali nzoto na Ye, mpe Ye azali Mobikisi na yango.
For a man is the Head of his wife, as the Christ is the Head of the Church — being indeed himself the Saviour of his Body.
24 Kasi lokola Lingomba etosaka Klisto, tika ete basi mpe batosaka mibali na bango na makambo nyonso.
But as the Church submits to the Christ, so also should wives submit to their husbands in everything.
25 Mibali, bolingaka basi na bino ndenge Klisto alingaki Lingomba mpe amikabaki mpo na yango
Husbands, love your wives, just as the Christ loved the Church, and gave himself for her,
26 mpo na kokomisa yango bule sima na Ye kopetola yango na mayi na nzela ya Liloba na Ye,
to make her holy, after purifying her by the Washing with the Water, according to his promise;
27 mpe mpo na kotalisa yango epai na Ye moko lokola Lingomba etonda na nkembo, ezanga litono to likwanza to mbeba, kasi lokola Lingomba ya bule mpe ezanga pamela.
so that he might himself bring the Church, in all her beauty, into his own presence, with no spot or wrinkle or blemish of any kind, but that she might be holy and faultless.
28 Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko.
That is how husbands ought to love their wives — as if they were their own bodies. A man who loves his wife is really loving himself;
29 Pamba te moko te asila koyina nzoto na ye; kasi aleisaka mpe abatelaka yango malamu, ndenge kaka Klisto asalaka mpo na Lingomba,
for no one ever yet hated his own body. But every one feeds his body and cares for it, just as the Christ for the Church;
30 pamba te tozali biteni ya nzoto na Ye.
for we are members of his Body.
31 Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko.
‘For this cause a man shall leave his father and mother, and be united to his wife; and the man and his wife shall become one.’
32 Ezali wana na mabombami minene, kasi ngai nazali koloba na tina na Klisto mpe Lingomba.
In this there is a profound truth — I am speaking of Christ and his Church.
33 Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.
However, for you individually, let each love his wife as if she were himself; and the wife be careful to respect her husband.

< Ba-Efeso 5 >