< Ba-Efeso 4 >

1 Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Nkolo, nazali kosenga na bino ete botambolaka na lolenge oyo ebongi na bato oyo Nzambe abengi:
Therefore I, the prisoner in the Lord, exhort you to walk worthily of the calling with which you are called,
2 bozalaka tango nyonso bato oyo batondi na komikitisa, na boboto mpe na motema molayi; boyikanaka mpiko kati na bolingo,
with all humility and meekness, with long suffering, forbearing one another in divine love;
3 bosalaka makasi mpo na kobatela bomoko ya Molimo na nzela ya kimia oyo esangisi bino.
endeavoring to keep the unity of the Spirit in the bond of peace.
4 Nzoto ezali se moko, Molimo mpe azali se moko, ndenge kaka Nzambe abenga bino na elikya se moko.
There is one body and one Spirit, as ye indeed are called in one hope of your calling;
5 Nkolo azali se moko, kondima mpe ezali se moko, libatisi mpe ezali se moko.
one Lord, one faith, one baptism,
6 Nzambe azali se moko, azali mpe Tata ya bato nyonso; aleki bato nyonso, asalaka na nzela ya bato nyonso mpe azali kati na bato nyonso.
one God and Father of all, who is above all, and through all, and above you all, and in all.
7 Nzokande kati na biso, moto nyonso azwaki ngolu kolanda ndenge Klisto akabolaki.
And to each one of you grace is given according to the measure of the gift of Christ.
8 Yango wana Nzambe alobi: « Tango amataki na likolo, amemaki bakangami mpe apesaki makabo epai na bato. »
Therefore he says, Having ascended upon high, he led captivity captive, and gave gifts to the people.
9 Nzokande, « amataki na likolo » elingi koloba penza nini? Elingi kaka koloba ete, liboso, akitaki kino na se ya mabele.
But what is that which ascended, except that which descended into the lower parts of the earth?
10 Ye oyo akitaki na se ya mabele, ezali kaka Ye wana oyo amataki na likolo koleka Likolo nyonso, mpo ete atondisa mokili mobimba.
But the one having descended and the one having ascended above all the heavens, that he might fill all things, is the same.
11 Ezali Ye moko Klisto nde akomisaki bamoko bantoma, bamosusu basakoli, bapanzi Sango Malamu, babateli bibwele mpe balakisi,
And he gave some, apostles; some, prophets; and some, evangelists; and some, pastors and teachers;
12 mpo na kopesa na basantu makoki ya kokokisa lotomo na bango, na tina ete nzoto ya Klisto etongama malamu.
unto the perfection of the saints, in the work of the ministry, in the edification of the body of Christ:
13 Boye, biso nyonso tokokoma na bomoko kati na kondima mpe kati na boyebi ya Mwana na Nzambe, mpe tokokoma bato oyo bakembi kolanda ndenge Klisto azali ya kokoka.
until we may all come into the unity of the faith, and of the perfect knowledge of the Son of God, into a perfect man, into the measure of the likeness of the fulness of Christ:
14 Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe.
in order that we may be no longer infants, tossed by the waves and carried about by every wind of teaching, in the caprice of the people, in their craftiness, pursuant to their method of delusion;
15 Kasi wana tokolobaka bosolo kati na bolingo, tokokolaka na makambo nyonso kati na Klisto oyo azali moto.
but speaking the truth in divine love, let its grow up in him in all things, who is the head, Christ;
16 Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki.
from whom the whole body, being assimilated and knitted together through every joint of the supply, according to the working in each several part, makes increase of the body in the edification of itself in divine love.
17 Boye, tala makambo oyo nazali koyebisa bino mpe kobetela sete kati na Nkolo: Botambolaka lisusu te lokola Bapagano oyo balandaka makanisi na bango, oyo ezanga tina.
Therefore I say this, and witness in the Lord, that you no longer walk about as the Gentiles also walk about in the vanity of their mind,
18 Pamba te molili ezipi mayele na bango mpe bazali ya kokabwana na bomoi ya sika oyo Nzambe apesaka, mpo ete bazangi boyebi mpe bazali mitema mabanga.
being darkened in their understanding, alienated from the life of God through the ignorance being in themselves, on account of the blindness of their heart;
19 Lokola babungisa bomoto na bango, bamipesaki na makambo ya soni mpo na kosala na lokoso makambo nyonso ya bosoto.
who being past feeling have given themselves up to debauchery, unto the working of all impurity with greediness.
20 Kasi bino boyekolaki Klisto ndenge wana te,
But you did not so learn Christ:
21 soki ya solo ezalaki penza Ye nde boyokaki tango bateyaki bino solo oyo ezali kati na Yesu
if indeed ye have heard him, and been taught in him, as the truth is in Jesus:
22 mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta,
that with reference to your former life, you are to lay aside the old man, who is corrupt in the lusts of deception;
23 mpo ete Molimo akomisa mayele mpe makanisi na bino ya sika,
and to be renewed in the spirit of your mind,
24 mpe mpo ete bolata bomoto ya sika oyo ekelami kolanda Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya bosolo.
and to put on the new man, who has been created in harmony with God in the righteousness and holiness of the truth.
25 Yango wana, tika ete moko na moko kati na bino abwaka lokuta mpe alobaka solo na moninga na ye, pamba te biso nyonso tozali kaka biteni ya nzoto moko.
Therefore, having laid aside lying, speak the truth each one with his neighbors: because we are members of one another.
26 Soki bosiliki, bosalaka masumu te; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma.
Be ye angry, and sin not: let not the sun go down upon your provocation:
27 Bopesaka na Satana nzela te.
neither give place to the devil.
28 Tika ete moyibi ayiba lisusu te, kasi amipesa nde na mosala; mpe tika ete maboko na ye esala na bosembo nyonso mpo ete azwa eloko ya kosunga na yango moto oyo azali kati na bosenga.
Let the one stealing steal no more: but rather let him labor, working with his own hands doing that which is good, that he may have to give to the one having need.
29 Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.
Let no corrupt communication go forth out of your mouth, but if anything is good unto edification of need, in order that he may give grace to those who hear.
30 Boyokisaka Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te; pamba te, na nzela ya Molimo yango, Nzambe abetaki bino kashe na Ye mpo na mokolo ya kokangolama.
And grieve not the Holy Spirit of God, by whom you were sealed unto the day of redemption.
31 Bolimwisaka kati na bino bololo ya mitema, koyinana, kanda, koswana, mafinga mpe lolenge nyonso ya misala mabe.
Let all bitterness, and wrath, and anger, and clamor, and blasphemy, depart from you, with all evil.
32 Botalisanaka boboto, boyokelanaka mawa mpe bolimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino kati na Klisto.
But be ye kind toward one another, merciful, forgiving one another, as indeed God in Christ forgave you.

< Ba-Efeso 4 >