< Ba-Efeso 3 >

1 Yango wana, ngai Polo, mokangami na boloko mpo ete nazali mosali ya Yesu-Klisto mpo na bolamu na bino Bapagano—
Det er for denne Sags Skyld, at jeg, Paulus, Kristi Jesu Fange for eder, I Hedninger, —
2 Solo, boyokaki ete Nzambe apesaki ngai mosala ya ngolu na Ye mpo na bino
om I da have hørt om Husholdningen med den Guds Naade, som blev given mig til eder,
3 mpe ayebisaki ngai mabombami na nzela ya emoniseli, ndenge nasili kokomela bino na mwa maloba.
at ved Aabenbarelse blev Hemmeligheden kundgjort mig, saaledes som jeg foran kortelig har skrevet,
4 Tango bokotanga maloba yango, bokokoka kososola mayele na ngai kati na mabombami yango oyo etali Klisto.
hvoraf I, naar I læse det, kunne skønne min Indsigt i Kristi Hemmelighed,
5 Molimo ayebisaki mabombami yango te na bato ya bikeke ya kala, ndenge alakisi yango sik’oyo na bantoma mpe basakoli ya Nzambe oyo bazali bule.
som i andre Slægter ikke blev kundgjort for Menneskenes Børn, saaledes som den nu er bleven aabenbaret hans hellige Apostle og Profeter ved Aanden:
6 Mabombami yango ezali boye: Kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu, Bapagano bazali bakitani ya libula elongo na Isalaele, biteni ya nzoto moko, mpe basangani elongo kati na elaka moko.
Nemlig at Hedningerne ere Medarvinger og medindlemmede og meddelagtige i Forjættelsen i Kristus Jesus ved Evangeliet,
7 Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai lokola likabo na nzela ya nguya na Ye, nakoma mosali ya Sango Malamu.
hvis Tjener jeg er bleven ifølge den Guds Naades Gave, som blev given mig ved hans Magts Virkekraft.
8 Atako nazali moto ya suka kati na basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu ya kosakola epai ya Bapagano bomengo monene ya Klisto;
Mig, den allerringeste af alle hellige, blev denne Naade given at forkynde Hedningerne Evangeliet om Kristi uransagelige Rigdom
9 apesa ngai mpe ngolu ya kosunga bato nyonso mpo ete basosola ndenge nini Nzambe akokisaka mabombami oyo ezalaki wuta kala ya kobombama kati na Ye, Mokeli na nyonso, (aiōn g165)
og at oplyse alle om, hvilken Husholdningen med den Hemmelighed er, som fra Evighed har været skjult i Gud, der skabte alle Ting, (aiōn g165)
10 na tina ete bakonzi ya milimo mpe banguya kati na mboka ya milimo eyeba sik’oyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo emonisamaka na lolenge ebele,
for at Guds mangfoldige Visdom skulde nu ved Menigheden blive kundgjort for Magterne og Myndighederne i det himmelske,
11 kolanda mabongisi oyo asala wuta kala mpe akokisa kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso. (aiōn g165)
efter det evige Forsæt, som han fuldbyrdede ved Kristus Jesus, vor Herre, (aiōn g165)
12 Kati na Yesu-Klisto mpe na nzela ya kondima na biso kati na Ye, tozali na elikya ya kopusana na bonsomi nyonso pene ya Nzambe.
i hvem vi have Frimodigheden og Adgang med Tillid ved Troen paa ham.
13 Lisusu, nazali kosenga na bino ete bobungisa mpiko na bino te likolo ya pasi oyo ngai nazali komona mpo na bino, pamba te ezali nde nkembo na bino.
Derfor beder jeg, at I ikke tabe Modet over mine Trængsler, som jeg lider for eder, hvilket er en Ære for eder. —
14 Yango wana nafukamaka liboso ya Tata
For denne Sags Skyld bøjer jeg mine Knæ for Faderen,
15 oyo apesaka bomoi na mabota nyonso kati na Likolo mpe awa na mabele,
fra hvem enhver Faderlighed i Himle og paa Jord har sit Navn,
16 mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye,
at han vil give eder efter sin Herligheds Rigdom mægtigt at styrkes ved hans Aand i det indvortes Menneske;
17 mpo ete Klisto avanda kati na mitema na bino na nzela ya kondima. Nabondelaka mpe mpo ete bozwa misisa mpe bolenda kati na bolingo,
at Kristus maa bo ved Troen i eders Hjerter,
18 mpo ete bozwa nguya ya kososola elongo na basantu nyonso monene, molayi, mokuse mpe bozindo ya bolingo ya Klisto,
for at I, rodfæstede og grundfæstede i Kærlighed, kunne sammen med alle de hellige formaa at begribe, hvor stor Bredden og Længden og Dybden og Højden er,
19 mpe mpo ete bozwa nguya ya koyeba bolingo yango ya Klisto, oyo eleki boyebi nyonso, na tina ete botondisama kino na bofuluki nyonso ya Nzambe.
og at kende Kristi Kærlighed, som overgaar al Erkendelse, for at I kunne fyldes indtil hele Guds Fylde.
20 Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso,
Men ham, som formaar over alle Ting at gøre langt ud over det, som vi bede eller forstaa, efter den Magt, som er virksom i os,
21 tika ete nkembo ezala ya Ye kati na Lingomba mpe kati na Yesu-Klisto, mpo na bileko nyonso mpe mpo na libela na libela! Amen. (aiōn g165)
ham være Ære i Menigheden og i Kristus Jesus igennem alle Slægterne i Evighedernes Evighed! Amen. (aiōn g165)

< Ba-Efeso 3 >