< Ba-Efeso 2 >

1 Bozalaki bakufi mpo na mabe mpe masumu na bino,
І вас (оживив), що були мертві провинами й гріхами вашими,
2 oyo bozalaki kosala na kala mpo na kobika bomoi na bino tango bozalaki kotambola kolanda baposa ya mokili oyo, mpe tango bozalaki kolanda mokonzi ya milimo mabe, molimo oyo ezali kosala sik’oyo kati na bato oyo bazangi botosi epai ya Nzambe. (aiōn g165)
в котрих колись ходили по віку сьвіта сього, робом князя власти воздушної, духа, що тепер орудує в синах перекору, (aiōn g165)
3 Biso nyonso mpe, na kala, tozalaki elongo na bango, tozalaki kotambola kolanda baposa na biso ya nzoto, tozalaki kokokisa nyonso oyo nzoto mpe makanisi na biso ezalaki kotinda biso kosala. Lokola bato mosusu, kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela biso mpo na mabe ya bomoto na biso.
між котрими й ми всі жили колись у хотінню тіла нашого, чинивши волю тїла й думок, і були по природї дітьми гнїва, як і инші.
4 Kasi mpo ete Nzambe atondi na mawa mpe alingaki biso na bolingo monene,
Бог же, багатий на милость, по превеликій любові своїй, котрою полюбив нас,
5 atako tozalaki bakufi mpo na masumu na biso, akomisaki biso bato ya bomoi elongo na Klisto. Bobikisami nde na ngolu…
і нас, мертвих провинами, оживив укупі з Христом (благодаттю ви спасені),
6 Kati na Yesu-Klisto, Nzambe asekwisaki biso elongo na Klisto mpe avandisaki biso elongo na Ye na bisika ya Likolo
і воскресив з Ним, і дав нам сидіти вкупі на небесних (місцях) у Христї Ісусї,
7 mpo na kotalisa na bato ya bikeke oyo esengeli koya na sima, bomengo monene ya ngolu na Ye, oyo alakisaki kati na Yesu-Klisto na nzela ya boboto na Ye epai na biso. (aiōn g165)
щоб показав у віках грядущих безмірне багацтво благодати своєї благостю до нас через Ісуса Христа. (aiōn g165)
8 Pamba te bobikisami nde na ngolu, na nzela ya kondima—mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali nde likabo kowuta na Nzambe—
Благодатю бо ви спасені через віру; і се не од вас: се Божий дар;
9 ezali na nzela ya misala na bino te mpo ete moko te akoka komikumisa.
не від дїл, щоб нїхто не хвалив ся.
10 Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe: Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.
Його бо ми твориво, сотворені в Христї Ісусї на добрі дїла, котрі наперед призначив Бог, щоб ми в них ходили.
11 Yango wana, bobosanaka te ete na kala, bozalaki Bapagano kolanda mbotama na bino; mpe bato oyo bamibengaka « bato bakatama ngenga » bazalaki kobenga bino « bato bakatama ngenga te, » atako bazalaki bato bakatama ngenga kati na banzoto na bango na nzela ya mosala ya maboko ya bato.
Тим же споминайте, що ви (були) колись погане в тїлї, звані необрізаннєм від рекомого обрізання у плотї, рукотвореного;
12 Bobosanaka mpe te ete na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Klisto, bozangaki makoki ya bana mboka kati na Isalaele, bozalaki bapaya liboso ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozalaki bato bazanga elikya mpe bazanga Nzambe kati na mokili.
що були ви того часу без Христа, відчужені від громади Ізраїлевої і чужі завітові обітування, не маючи надії і безбожні в сьвітї.
13 Kasi sik’oyo, kati na Yesu-Klisto, bino oyo na kala bozalaki mosika, bokomi pene na nzela ya mbeka ya makila ya Klisto.
Тепер же в Христї Ісусї ви, що були колись далеко, стали близькі кровю Христовою.
14 Solo, azali Ye moko kimia na biso: atiaki bomoko kati na Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, akweyisaki mir ya bonguna oyo ezalaki kokabola bango,
Він бо мир наш, що зробив з обох одно, і розвалив середню перегородню стіну;
15 alongolaki Mobeko elongo na mitindo mpe malako na yango mpo na kokela, kati na Ye moko, moto ya sika na nzela ya Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, na kotia kimia,
вражду тілом своїм, закон заповідей наукою обернув у ніщо, щоб з двох зробити собою одного нового чоловіка, роблячи мир,
16 mpe mpo na koyokanisa, kati na nzoto se moko, masanga nyonso mibale elongo na Nzambe na nzela ya ekulusu oyo abomaki na yango bonguna oyo ezalaki kati na bango.
і примирити з Богом обох ув одному тїлї хрестом, убивши ворогуваннє на ньому;
17 Ayaki mpe ateyaki kimia epai na bino oyo bozalaki mosika, mpe kimia epai na bato oyo bazalaki pene.
і прийшовши благовістив мир вам, далеким і близьким,
18 Pamba te na nzela na Ye, biso mpe bango tokotaka epai ya Tata kati na Molimo moko.
тим що через Його маємо приступ обоє в одному Дусї до Отця.
19 Boye bozali lisusu te bapaya to baleki nzela, kasi bozali nde bankolo mboka elongo na basantu, bozali mpe bato ya libota ya Nzambe.
Тим-же оце вже ви більш не чужі і захожі, а товариші сьвятим і домашні Божі;
20 Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba.
збудовані на підвалиш апостолів і пророків, а угловий (камінь) сам Ісус Христос;
21 Kati na Yesu-Klisto, ndako mobimba esangani malamu mpe ezali kokola mpo ete ekoma Tempelo ya bule kati na Nkolo.
на котрому вся будівля, докупи споєна, росте в церкву сьвяту в Господї.
22 Mpe kati na Ye, bino mpe bozali kotongama lisanga mpo ete bokoma Ndako oyo Nzambe avandaka kati na yango na nzela ya Molimo na Ye.
На Ньому й ви вбудовуєтесь на оселю Божу Духом.

< Ba-Efeso 2 >