< Mosakoli 9 >
1 Boye, nakanisaki mingi na makambo oyo nyonso mpe namonaki ete, ezala moto ya sembo, moto ya bwanya elongo na makambo nyonso oyo basalaka, bazali na maboko ya Nzambe; kasi moko te ayebaka soki bolingo to koyina ezelaka ye.
わたしはこのすべての事に心を用いて、このすべての事を明らかにしようとした。すなわち正しい者と賢い者、および彼らのわざが、神の手にあることを明らかにしようとした。愛するか憎むかは人にはわからない。彼らの前にあるすべてのことは空である。
2 Bato nyonso basukaka kaka ndenge moko: ezala moto ya sembo to moto mabe, ezala moto malamu to moto oyo asalaka masumu, ezala moto ya peto to moto ya mbindo, ezala moto oyo abonzaka mbeka to moto oyo abonzaka mbeka te. Ndenge ezalaka mpo na moto ya motema malamu ndenge mpe ezalaka mpo na moto ya masumu; ndenge ezalaka mpo na moto oyo alapaka ndayi ndenge mpe ezalaka mpo na moto oyo abangaka kolapa ndayi.
すべての人に臨むところは、みな同様である。正しい者にも正しくない者にも、善良な者にも悪い者にも、清い者にも汚れた者にも、犠牲をささげる者にも、犠牲をささげない者にも、その臨むところは同様である。善良な人も罪びとも異なることはない。誓いをなす者も、誓いをなすことを恐れる者も異なることはない。
3 Tala likambo oyo ezali mabe kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi: bato nyonso basukaka kaka ndenge moko; lisusu, mitema ya bato etonda na mabe, mpe bozoba ezalaka kati na mitema na bango wana bazali nanu na bomoi; mpe, sima na yango, bakokufa kaka.
すべての人に同一に臨むのは、日の下に行われるすべての事のうちの悪事である。また人の心は悪に満ち、その生きている間は、狂気がその心のうちにあり、その後は死者のもとに行くのである。
4 Moto nyonso oyo azali kati na bato ya bomoi azalaka na elikya; mbwa ya bomoi ezali malamu koleka nkosi oyo ekufa.
すべて生ける者に連なる者には望みがある。生ける犬は、死せるししにまさるからである。
5 Pamba te bato ya bomoi bayebaka ete bakokufa; kasi bato oyo bakufa bayebaka lisusu eloko moko te, bazalaka lisusu te na litomba ya kozwa, mpo ete babosana bango.
生きている者は死ぬべき事を知っている。しかし死者は何事をも知らない、また、もはや報いを受けることもない。その記憶に残る事がらさえも、ついに忘れられる。
6 Bolingo na bango, koyina na bango mpe baposa na bango esila kolimwa; bakozwa lisusu litomba ata moko te kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi.
その愛も、憎しみも、ねたみも、すでに消えうせて、彼らはもはや日の下に行われるすべての事に、永久にかかわることがない。
7 Kende, lia bilei na yo na esengo mpe mela masanga na yo ya vino na motema ya esengo; pamba te Nzambe asili kondima misala na yo.
あなたは行って、喜びをもってあなたのパンを食べ、楽しい心をもってあなたの酒を飲むがよい。神はすでに、あなたのわざをよみせられたからである。
8 Tika ete bilamba na yo ezala tango nyonso peto, mpe nzoto na yo elumba tango nyonso solo ya malasi.
あなたの衣を常に白くせよ。あなたの頭に油を絶やすな。
9 Sepela na bomoi na yo elongo na mwasi na yo, oyo olingaka na mikolo nyonso ya bomoi ya pamba oyo Nzambe apesi yo na se ya moyi; solo, na mikolo na yo nyonso ya pamba, pamba te yango nde ezali mbano ya bomoi na yo mpo na misala nyonso oyo omonelaka pasi na se ya moyi.
日の下で神から賜わったあなたの空なる命の日の間、あなたはその愛する妻と共に楽しく暮すがよい。これはあなたが世にあってうける分、あなたが日の下で労する労苦によって得るものだからである。
10 Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te. (Sheol )
すべてあなたの手のなしうる事は、力をつくしてなせ。あなたの行く陰府には、わざも、計略も、知識も、知恵もないからである。 (Sheol )
11 Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi: mimekano ezalaka kaka te mpo na moto oyo aleki mbangu, bitumba ezalaka kaka te mpo na bato ya makasi, bilei ezalaka kaka te mpo na bato ya bwanya, bomengo ezalaka kaka te mpo na bato oyo baleki na mayele, mpe bolamu ezalaka kaka te mpo na bato ya bososoli; pamba te pasi mpe bisengo ekomelaka mpe bango nyonso.
わたしはまた日の下を見たが、必ずしも速い者が競走に勝つのではなく、強い者が戦いに勝つのでもない。また賢い者がパンを得るのでもなく、さとき者が富を得るのでもない。また知識ある者が恵みを得るのでもない。しかし時と災難はすべての人に臨む。
12 Moto moko te ayebi tango nini ngonga na ye ekokoka: ndenge mbisi ekangamaka na monyama to ndenge banyama ekangamaka na motambo, ndenge wana mpe bato bakangamaka na mitambo ya pasi oyo ekweyelaka bango na mbalakata.
人はその時を知らない。魚がわざわいの網にかかり、鳥がわなにかかるように、人の子らもわざわいの時が突然彼らに臨む時、それにかかるのである。
13 Namonaki lisusu na se ya moyi, ndakisa moko ya bwanya oyo ezalaki na tina mingi mpo na ngai:
またわたしは日の下にこのような知恵の例を見た。これはわたしにとって大きな事である。
14 ezalaki na engumba moko ya moke oyo ezalaki mpe na bato moke; bongo mokonzi moko ya nguya ayaki kobundisa yango, azingelaki yango mpe atongaki milako mpo na kokonza engumba yango.
ここに一つの小さい町があって、そこに住む人は少なかったが、大いなる王が攻めて来て、これを囲み、これに向かって大きな雲梯を建てた。
15 Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mobola moko oyo azalaki moto ya bwanya; abikisaki yango na bwanya na ye, kasi moto moko te akanisaki mobola yango.
しかし、町のうちにひとりの貧しい知恵のある人がいて、その知恵をもって町を救った。ところがだれひとり、その貧しい人を記憶する者がなかった。
16 Boye namilobelaki: « Bwanya ezali malamu koleka makasi ya nzoto. » Kasi bwanya ya mobola etiolamaka, mpe bayokaka maloba na ye te.
そこでわたしは言う、「知恵は力にまさる。しかしかの貧しい人の知恵は軽んぜられ、その言葉は聞かれなかった」。
17 Bayokaka maloba ya kimia ya moto ya bwanya koleka makelele ya mokonzi ya bazoba.
静かに聞かれる知者の言葉は、愚かな者の中のつかさたる者の叫びにまさる。
18 Bwanya ezali malamu koleka bibundeli ya basoda, kasi mbeba moko ekoki koboma bolamu na yango nyonso.
知恵は戦いの武器にまさる。しかし、ひとりの罪びとは多くの良きわざを滅ぼす。