< Mosakoli 8 >
1 Nani azali lokola moto ya bwanya? Nani ayebi kolimbola makambo? Bwanya engengisaka elongi ya moto, mpe efungolaka elongi oyo ekangama.
Who is like the wise man, and who knoweth the explanation of a thing? A man's wisdom brighteneth his countenance, and the harshness of his face is changed.
2 Nalobi: Tosaka mitindo ya mokonzi, pamba te olapaki ndayi liboso ya Nzambe.
I counsel thee to keep the king's commandment, and that on account of the oath of God.
3 Kolongwaka na lombangu te liboso ya mokonzi mpe kobundelaka likambo ya mabe te, pamba te mokonzi asalaka kaka makambo oyo esepelisaka ye.
Be not in haste to depart from his presence; persist not in an evil thing; for whatever pleaseth him, that he doeth.
4 Lokola liloba ya mokonzi ezalaka na bokonzi, nani akoki koloba na ye: « Ozali kosala nini? »
For the word of the king is powerful; and who can say to him, “What doest thou?”
5 Moto nyonso oyo atosaka mibeko na ye akokweyela pasi te, mpe motema ya moto ya bwanya eyebaka tango ya malamu mpe lolenge ya malamu ya kosalela.
He that keepeth the commandment shall experience no evil; and the heart of the wise man hath regard to time and judgment.
6 Pamba te, ezali na tango ya malamu mpe na lolenge ya malamu ya kosalela na likambo nyonso. Atako bongo, pasi ekweyelaka kaka moto.
For to every thing there is a time and judgment. For the misery of man is great upon him.
7 Lokola moto moko te ayebi makambo oyo ekoya sima, nani akoki koyebisa moninga ndenge ekoyela ye?
For no one knoweth what shall be; for who can tell him how it shall be?
8 Ndenge moto moko te azali na bokonzi likolo ya pema ya bomoi na ye mpo ete akanga yango, ndenge mpe moto moko te azali na bokonzi likolo ya mokolo na ye ya kufa. Ndenge moto moko te apemaka na tango ya bitumba, ndenge mpe misala mabe ebikisaka te bato oyo basalaka yango.
No man hath power over the spirit to retain the spirit, and no man hath power over the day of death; and there is no discharge in that war; and wickedness shall not deliver those that are guilty of it.
9 Namonaki makambo nyonso wana, tango natiaki mayele na ngai mpo na koluka koyeba makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi. Ezali na tango oyo moto amatelaka bato mosusu mpo na konyokola bango.
All this have I seen, and I have given heed to all things that are done under the sun. There is a time when man ruleth over man to his hurt.
10 Mpe lisusu, namonaki ete bazali kokunda bato mabe; bongo bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga na Esika ya bule bazalaki kokumisa bato mabe wana kati na engumba mpo na makambo oyo bazalaki kosala. Wana mpe ezali kaka pamba.
And so I saw the wicked buried, while the righteous came and went from the holy place, and were forgotten in the city. This also is vanity.
11 Soki etumbu epesami noki te mpo na mabe oyo esalemi, mitema ya bato etondaka na makanisi ya kosala mabe.
Because sentence against an evil work is not executed speedily, therefore doth the heart of the sons of men become bold within them to do evil.
12 Atako moto oyo asalaka masumu asali mabe mbala nkama moko mpe awumeli tango molayi na bomoi, nayebi solo ete bato oyo batosaka Nzambe bakozala bato ya esengo; pamba te bazali na botosi liboso na Ye.
But though a sinner do evil a hundred times, and have his days prolonged, yet surely I know that it shall be well with them that fear God, that fear before him.
13 Nzokande, lokola bato mabe batosaka Nzambe te, makambo na bango mpe ekotambola malamu te, mpe mikolo ya bomoi na bango ekowumela te lokola elili.
But it shall not be well with the wicked: he shall be like a shadow, and shall not prolong his days, because he feareth not before God.
14 Ezali lisusu na eloko moko ya pamba oyo elekaka na mokili: bato ya sembo bazwaka lifuti oyo ebongi na bato mabe, mpe bato mabe bazwaka lifuti oyo ebongi na bato ya sembo. Nazali koloba solo ete wana mpe ezali kaka pamba.
There is a vanity which taketh place upon the earth, that there are righteous men to whom it happeneth according to the work of the wicked, and that there are wicked men to whom it happeneth according to the work of the righteous. I said, “This also is vanity!”
15 Bongo, nakumisaki esengo, pamba te ezali na eloko moko te na se ya moyi oyo eleki malamu mpo na moto, soki kaka te kolia, komela mpe kosepela. Boye esengo esengeli kobila ye kati na mosala na ye mikolo nyonso ya bomoi oyo Nzambe apesa ye na se ya moyi.
Then I commended joy; because nothing is good for a man under the sun, except to eat and to drink and to be joyful; for it is this that abideth with him for his labor during the days of his life which God giveth him under the sun.
16 Tango natiaki mayele na ngai mpo na koluka koyeba bwanya mpe kososola mosala ya moto kati na mokili, —ata soki miso na ye ezwaka pongi te, ezala na moyi to na butu—
When I applied my mind to know wisdom, and to see the business which is done upon the earth, —that one seeth no sleep with his eyes by day or by night, —
17 namonaki nyonso oyo Nzambe asala. Moto moko te akoki kososola makambo oyo elekaka na se ya moyi. Soki asali makasi mpo na koyeba, akotikala te kososola tina na yango; mpe ata soki moto ya bwanya abeti tolo ete ayebi, akotikala kaka kososola yango te.
then I saw the whole work of God, that a man cannot comprehend that which is done under the sun; how much soever he labor to search it out, yet shall he not comprehend it; yea, though a wise man resolve to know it, yet shall he not be able to comprehend it.