< Mosakoli 7 >

1 Kokende sango ya malamu eleki malasi ya solo kitoko na motuya, mpe mokolo ya kufa eleki mokolo ya mbotama na malamu.
טוב שם משמן טוב ויום המות מיום הולדו
2 Kokende na ndako ya matanga ezali malamu koleka kokende na ndako oyo ezali na feti, pamba te kufa ezali suka ya moto nyonso; yango wana, bato nyonso oyo bazali na bomoi basengeli kokanisaka na tina na yango.
טוב ללכת אל בית אבל מלכת אל בית משתה--באשר הוא סוף כל האדם והחי יתן אל לבו
3 Mawa eleki koseka na malamu, pamba te elongi ya mawa eyeisaka motema esengo.
טוב כעס משחוק כי ברע פנים ייטב לב
4 Motema ya moto ya bwanya ezalaka kati na ndako ya matanga, kasi motema ya zoba ezalaka kati na ndako ya bisengo.
לב חכמים בבית אבל ולב כסילים בבית שמחה
5 Koyoka pamela ya moto ya bwanya ezali malamu koleka koyoka banzembo ya zoba.
טוב לשמע גערת חכם--מאיש שמע שיר כסילים
6 Koseka ya bazoba ezalaka lokola makelele ya basende oyo ezali kozika na se ya nzungu; wana mpe ezali pamba.
כי כקול הסירים תחת הסיר כן שחק הכסיל וגם זה הבל
7 Minyoko ekomisaka moto ya bwanya zoba, mpe bakado epengwisaka motema.
כי העשק יהולל חכם ויאבד את לב מתנה
8 Suka ya likambo ezali malamu koleka ebandeli ya likambo; kokanga motema ezali malamu koleka lolendo.
טוב אחרית דבר מראשיתו טוב ארך רוח מגבה רוח
9 Kotombokaka noki te, pamba te kanda evandaka kati na bazoba.
אל תבהל ברוחך לכעוס כי כעס בחיק כסילים ינוח
10 Kolobaka te: « Mpo na nini mikolo eleki ezali malamu koleka mikolo ya lelo? » Pamba te bwanya etindaka te bato kotuna mituna ya boye.
אל תאמר מה היה--שהימים הראשנים היו טובים מאלה כי לא מחכמה שאלת על זה
11 Bwanya ezali lokola libula, ezalaka malamu mpe epesaka litomba na bato oyo bamonaka moyi.
טובה חכמה עם נחלה ויתר לראי השמש
12 Bwanya ezali lokola nguba, ndenge mpe mosolo ezalaka nguba; kasi litomba ya boyebi ezali ete ebatelaka bomoi ya bato oyo bazali na yango.
כי בצל החכמה בצל הכסף ויתרון דעת החכמה תחיה בעליה
13 Tala malamu misala ya Nzambe: Nani akoki kosembola eloko oyo Ye asili kogumba?
ראה את מעשה האלהים כי מי יוכל לתקן את אשר עותו
14 Na mokolo ya malamu, sepela; na mokolo ya mabe, kanisa; pamba te Nzambe nde asala nyonso mibale mpo ete moto ayeba te makambo oyo ekoya sima na ye.
ביום טובה היה בטוב וביום רעה ראה גם את זה לעמת זה עשה האלהים על דברת שלא ימצא האדם אחריו מאומה
15 Na mikolo ya pamba ya bomoi na ngai, namonaki makambo oyo nyonso: Moto ya sembo akufi mpo na bosembo na ye, mpe moto mabe awumeli na bomoi mpo na mabe na ye.
את הכל ראיתי בימי הבלי יש צדיק אבד בצדקו ויש רשע מאריך ברעתו
16 Kolekisa ndelo te ya kozala moto ya sembo to ya kozala moto ya bwanya; mpo na nini komibebisa?
אל תהי צדיק הרבה ואל תתחכם יותר למה תשומם
17 Kolekisa ndelo te ya kozala moto mabe to ya kozala zoba; mpo na nini kokufa liboso ete mikolo ya bomoi na yo ekoka?
אל תרשע הרבה ואל תהי סכל למה תמות בלא עתך
18 Ezali malamu kokangama na toli ya liboso mpe kosimba toli ya mibale, pamba te moto oyo atosaka Nzambe akosalela toli nyonso mibale.
טוב אשר תאחז בזה וגם מזה אל תנח את ידך כי ירא אלהים יצא את כלם
19 Bwanya ekomisaka moto oyo azali na yango makasi koleka bakambi zomi kati na engumba.
החכמה תעז לחכם--מעשרה שליטים אשר היו בעיר
20 Kati na mokili, ezali na moto moko te ya sembo oyo asalaka kaka malamu, bongo azanga kosala masumu.
כי אדם אין צדיק בארץ--אשר יעשה טוב ולא יחטא
21 Kotiaka matoyi na bilobaloba ya bato te, noki te okoyoka mosali na yo kotiola yo;
גם לכל הדברים אשר ידברו אל תתן לבך אשר לא תשמע את עבדך מקללך
22 pamba te, oyebi malamu, kati na motema na yo, ete yo mpe otiolaka bato mosusu mbala mingi.
כי גם פעמים רבות ידע לבך אשר גם את (אתה) קללת אחרים
23 Namekaki kososola makambo wana nyonso na nzela ya bwanya, namilobelaki: « Nakosala nyonso mpo ete nakoma moto ya bwanya, » kasi bwanya ezalaki kaka mosika na ngai.
כל זה נסיתי בחכמה אמרתי אחכמה והיא רחוקה ממני
24 Nyonso oyo ezalisami ezali mosika, mozindo mpe mozindo makasi; nani akoki komona yango?
רחוק מה שהיה ועמק עמק מי ימצאנו
25 Boye, na motema na ngai mobimba, namipesaki mpo na kososola, koyeba, koluka bwanya mpe boyebi; mpe mpo na kososola bozoba ya mabe elongo na liboma ya bozoba.
סבותי אני ולבי לדעת ולתור ובקש חכמה וחשבון ולדעת רשע כסל והסכלות הוללות
26 Namoni likambo oyo: mwasi oyo motema na ye ezali lokola motambo to monyama, oyo maboko na ye ezali lokola minyololo, azali mabe koleka kufa; mobali oyo asepelisaka Nzambe akotikala kokangama te na motambo na ye, kaka mobali oyo asalaka masumu nde akokangama na motambo na ye.
ומוצא אני מר ממות את האשה אשר היא מצודים וחרמים לבה--אסורים ידיה טוב לפני האלהים ימלט ממנה וחוטא ילכד בה
27 Mosakoli alobi: « Tala makambo oyo nasosoli sima na koyekola mwasi moko na moko mpo na kozwa mayele:
ראה זה מצאתי אמרה קהלת אחת לאחת למצא חשבון
28 Nazali koluka, kasi nanu namoni te. Namoni mobali moko ya sembo kati na mibali nkoto moko, kasi namoni ata mwasi moko te ya sembo kati na basi nyonso!
אשר עוד בקשה נפשי ולא מצאתי אדם אחד מאלף מצאתי--ואשה בכל אלה לא מצאתי
29 Tala makambo oyo nasosoli: Nzambe asala bato mpo ete bazala malamu, kasi bato bamilukelaka mindondo bango moko. »
לבד ראה זה מצאתי אשר עשה האלהים את האדם ישר והמה בקשו חשבנות רבים

< Mosakoli 7 >