< Mosakoli 5 >

1 Batela makolo na yo tango ozali kokende na Ndako ya Nzambe; eleki malamu kokende kuna mpo na koyoka, kasi mpo na kobonza mbeka ya bazoba te, pamba te bayebaka te ete basalaka mabe.
Keep thy foot when thou goest to the house of God, and draw near to hear, rather than to give the sacrifice of fools: for they know not that they do evil.
2 Kowelela te kofungola monoko na yo, mpe tika ete motema na yo ewelela te kobimisa liloba liboso ya Nzambe! Pamba te Nzambe azali na likolo, mpe yo ozali na mabele. Boye, tika ete maloba na yo ezalaka mingi te!
Be not rash with thy mouth, and let not thy heart be hasty to utter anything before God: for God is in the heavens, and thou upon earth; therefore let thy words be few.
3 Ndenge ndoto eyaka soki moto azali na misala mingi, ndenge wana mpe maloba ebele ebimisaka bozoba.
For a dream cometh through the multitude of business, and a fool's voice through a multitude of words.
4 Soki olapi ndayi liboso ya Nzambe, kowumela te mpo na kokokisa yango; pamba te Nzambe asepelaka na bazoba te; kokisa ndayi na yo.
When thou vowest a vow unto God, defer not to pay it; for he hath no pleasure in fools: pay that which thou hast vowed.
5 Eleki malamu ete olapa na yo kutu ndayi te na esika ya kolapa ndayi mpe ozanga kokokisa yango.
Better is it that thou shouldest not vow, than that thou shouldest vow and not pay.
6 Kotika te ete monoko na yo ememisa yo masumu, mpe kokende koloba te liboso ya basali ya Nzambe: « Ndayi na ngai ezalaki libunga. » Mpo na nini Nzambe atomboka mpo na maloba na yo mpe abebisa misala ya maboko na yo?
Suffer not thy mouth to cause thy flesh to sin; neither say thou before the angel, that it was an inadvertence. Wherefore should God be wroth at thy voice, and destroy the work of thy hands?
7 Ndoto ebele mpe maloba ebele ezali kaka pamba; yango wana tosa nde Nzambe.
For in the multitude of dreams are vanities; so with many words: but fear God.
8 Soki omoni ete bazali konyokola mobola kati na mokili, bongo boyengebene mpe bosembo etiolami, kokamwa likambo yango te; pamba te mokambi moko azali na se ya mokambi mosusu; mpe na likolo na bango mibale, ezali na bakonzi mosusu oyo baleki na bokonzi.
If thou seest the oppression of the poor, and violent perverting of judgment and justice in a province, marvel not at the matter; for a higher than the high is watching, and there are higher than they.
9 Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.
Moreover the earth is every way profitable: the king [himself] is dependent upon the field.
10 Moto oyo alingaka mbongo atondaka yango te, mpe moto oyo alingaka bomengo, bozwi na ye etondisaka ye te. Wana mpe ezali kaka pamba.
He that loveth silver shall not be satisfied with silver, nor he that loveth abundance with increase. This also is vanity.
11 Ndenge bozwi ya moto ekomaka ebele, ndenge wana mpe bato oyo baliaka yango bakomaka ebele; bongo litomba nini nkolo na yango akozwa, soki kaka te komona yango na miso?
When goods increase, they are increased that eat them; and what profit is there to the owner thereof, except the beholding [of them] with his eyes?
12 Pongi ya mosali ezalaka ya kimia, ata soki alie moke to mingi; kasi bomengo ya mozwi ezangisaka ye pongi.
The sleep of the labourer is sweet, whether he have eaten little or much; but the fulness of the rich doth not suffer him to sleep.
13 Namoni mabe moko na se ya moyi, epesaka penza mawa: moto abombi bomengo na ye, kasi ememeli ye pasi;
There is a grievous evil that I have seen under the sun: riches kept for the owners thereof to their hurt;
14 likambo moko ya mabe ya mbalakata ebebisi bomengo yango, mpe mwana na ye azangi libula ya kokitana na yango.
or those riches perish by some evil circumstance, and if he have begotten a son, there is nothing in his hand.
15 Ndenge abotamaki bolumbu wuta na libumu ya mama na ye, ndenge mpe akozanga bolumbu, akomema ata mbuma moko te ya mosala na ye.
As he came forth from his mother's womb, naked shall he go away again as he came, and shall take nothing of his labour, which he may carry away in his hand.
16 Oyo mpe ezali lisusu pasi oyo epesaka mawa: ndenge moto ayaki, ndenge mpe akozonga. Bongo litomba na ye ezali nini? Asali kaka mpo na mopepe?
And this also is a grievous evil, that in all points as he came so doth he go away, and what profit hath he, in having laboured for the wind?
17 Alekisi mikolo nyonso ya bomoi na ye kati na molili, na pasi, na komitungisa mpe na kanda.
All his days also he eateth in darkness, and hath much vexation, and sickness, and irritation.
18 Mpo na yango, tala likambo oyo ngai namoni ete ezali malamu: ebongi na moto kolia, komela mpe kosepela na mbuma ya mosala na ye na se ya moyi, na mikolo ya bomoi oyo Nzambe apesi ye, pamba te yango nde libula na ye.
Behold what I have seen good and comely: [it is] to eat and to drink, and to enjoy good in all his labour wherewith [man] laboureth under the sun, all the days of his life which God hath given him: for that is his portion.
19 Kutu, epai na moto nyonso oyo Nzambe apesi bomengo mpe biloko ebele, bongo apesi ye lisusu makoki ya kosalela yango, ya kozwa libula na ye mpe ya kosepela na mbuma ya mosala na ye, wana ezali penza likabo ya Nzambe!
Every man also to whom God hath given riches and wealth, and power to eat thereof, and to take his portion and to rejoice in his labour: that is a gift of God.
20 Nzokande, wana Nzambe akotondisa motema na ye na esengo, moto yango akosala keba te na motango ya mikolo ya bomoi na ye.
For he will not much remember the days of his life, because God answereth [him] with the joy of his heart.

< Mosakoli 5 >