< Mosakoli 12 >

1 Kanisa Mokeli na yo, na mikolo nyonso ya bolenge na yo, liboso ete mikolo ya pasi ekomela yo, mpe mibu epusana, mibu oyo okoloba na tina na yango: « Nazali kosepela na ngai na yango te; »
Remember your Creator in the days of your youth, before the days of adversity come and the years approach of which you will say, “I find no pleasure in them,”
2 liboso ete moyi mpe pole, sanza mpe minzoto, ekoma molili, mpe mapata ezonga sima na mvula;
before the light of the sun, moon, and stars is darkened, and the clouds return after the rain,
3 tango bakengeli ya ndako bakolenga, mpe bato ya makasi bakofukama; tango basi oyo banikaka ble bakotika konika yango mpo ete bazali lisusu mingi te, mpe bato oyo batalaka na maninisa bakobungisa kitoko na bango;
on the day the keepers of the house tremble and the strong men stoop, when those grinding cease because they are few and those watching through windows see dimly,
4 tango bikangelo ya ekuke ekokangama na balabala, mpe makelele ya basi oyo banikaka ble ekosila; tango bato balamukaka na banzembo ya bandeke mpe bayembi ya basi batikaka koyemba;
when the doors to the street are shut and the sound of the mill fades away, when one rises at the sound of a bird and all the daughters of song grow faint,
5 tango bato bakomaka kobanga komata likolo, mpe bakomaka kobanga makama na nzela; tango nzete ya pome ebimisaka mbuma, tango mabanki ekomaka kilo, mpe baposa ekokisamaka lisusu te; pamba te moto akendaka na ndako ya libela, mpe basi oyo balelaka na bibembe basanganaka na balabala.
when men fear the heights and dangers of the road, when the almond tree blossoms, the grasshopper loses its spring, and the caper berry shrivels— for then man goes to his eternal home and mourners walk the streets.
6 Solo, kanisa Mokeli na yo liboso ete singa ya palata ekatana, kopo ya wolo efinana, eloko ya mayi ebukana na libulu ya mayi, mpe mashini oyo babendelaka mayi na libulu ebukana;
Remember Him before the silver cord is snapped and the golden bowl is crushed, before the pitcher is shattered at the spring and the wheel is broken at the well,
7 liboso ete putulu ezonga na mabele epai wapi ewutaki, mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.
before the dust returns to the ground from which it came and the spirit returns to God who gave it.
8 Pamba na pamba, elobi mosakoli, makambo nyonso ezali kaka pamba.
“Futility of futilities,” says the Teacher. “Everything is futile!”
9 Mosakoli azalaki kaka moto ya bwanya te, kasi azalaki mpe koyekolisa bato boyebi; akanisaki mingi, alukaki mingi mpe atiaki na molongo masese ebele penza.
Not only was the Teacher wise, but he also taught the people knowledge; he pondered, searched out, and arranged many proverbs.
10 Mosakoli asalaki makasi mpo na koluka koyeba maloba ya elengi mpe kokoma na bosembo makambo ya solo.
The Teacher searched to find delightful sayings and to record accurate words of truth.
11 Maloba ya bato ya bwanya ezali lokola banzube, mpe buku ya masese na bango ezali lokola basete oyo ekotaka makasi na libaya. Masese yango nyonso ewuti epai ya Mobateli mpate moko.
The words of the wise are like goads, and the anthologies of the masters are like firmly embedded nails driven by a single Shepherd.
12 Mwana na ngai, keba ete obakisa eloko moko te na likolo na yango. Suka ezali te mpo na kokoma mikanda ebele, mpe koyekola mingi elembisaka nzoto.
And by these, my son, be further warned: There is no end to the making of many books, and much study wearies the body.
13 Yoka suka ya mateya nyonso: Tosa Nzambe mpe batela mibeko na Ye, pamba te yango nde eleki na tina mpo na moto.
When all has been heard, the conclusion of the matter is this: Fear God and keep His commandments, because this is the whole duty of man.
14 Pamba te, Nzambe akomema misala nyonso na kosambisama, ezala oyo ebombama, ya malamu to ya mabe.
For God will bring every deed into judgment, along with every hidden thing, whether good or evil.

< Mosakoli 12 >