< Mosakoli 11 >

1 Bwaka lipa na yo na likolo ya mayi, pamba te sima na mikolo ebele, okomona yango lisusu.
Cast thy bread upon the waters, for thou shall find it after many days.
2 Kaba biloko na yo na bato sambo to mwambe, pamba te oyebi te pasi nini ekoki koya na mokili.
Give a portion to seven, yea, even to eight, for thou know not what evil shall be upon the earth.
3 Soki mapata etondi na mayi, ebetisaka mvula na mokili. Nzete etikalaka kaka na esika oyo ekweyi, ezala na ngambo ya sude to na ngambo ya nor.
If the clouds are full of rain, they empty themselves upon the earth, and if a tree falls toward the south, or toward the north, in the place where the tree falls, there shall it be.
4 Moto oyo atalaka mopepe akolona nkona te, moto oyo atalaka mapata akobuka bambuma te.
He who observes the wind shall not sow, and he who regards the clouds shall not reap.
5 Ndenge oyebi te nzela ya mopepe to ndenge nini moto asalemaka kati na libumu ya mama na ye, ndenge wana mpe okokoka te kososola misala ya Nzambe oyo azali Mokeli ya nyonso.
As thou know not what is the way of the wind, nor how the bones grow in the womb of her who is with child, even so thou know not the work of God who does all.
6 Na tongo, lona milona na yo, mpe na pokwa, kopemisa maboko na yo te, pamba te oyebi te milona nini ekobima, ya tongo to ya pokwa to mpe nyonso mibale ekobima malamu.
In the morning sow thy seed, and in the evening withhold not thy hand, for thou know not which shall prosper, whether this or that, or whether they both shall be alike good.
7 Pole ezali malamu, mpe miso esepelaka komona moyi.
Truly the light is sweet, and a pleasant thing it is for the eyes to behold the sun.
8 Yango wana, soki moto asali mibu ebele na bomoi, tika ye asepela na mibu yango nyonso; kasi tika ete abosana te ete mibu ya pasi ekozala ebele, mpe ete makambo nyonso oyo ekoya sima ezali pamba.
Yea, if a man lives many years, let him rejoice in them all. But let him remember the days of darkness, for they shall be many. All that comes is vanity.
9 Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.
Rejoice, O young man, in thy youth, and let thy heart cheer thee in the days of thy youth, and walk in the ways of thy heart, and in the sight of thine eyes. But know thou, that for all these things God will bring thee into judgment.
10 Yango wana, longola mawa na motema na yo, longola pasi na nzoto na yo; pamba te bolenge mpe bomwana ezali pamba.
Therefore remove sorrow from thy heart, and put away evil from thy flesh, for youth and the dawn of life are vanity.

< Mosakoli 11 >