< Deteronomi 7 >

1 Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo ozali kokende mpo na kozwa yango lokola libula mpe tango akobengana liboso na yo bikolo ebele—bato ya Iti, ya Girigazi, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, bikolo sambo oyo eleki yo na motango ya bato mpe na makasi—
Quando o SENHOR teu Deus te houver introduzido na terra na qual tu hás de entrar para possuí-la, e houver expulsado de diante de ti muitas nações, aos heteus, aos gergeseus, e aos amorreus, e aos cananeus, e aos perizeus, e aos heveus, e aos jebuseus, sete nações maiores e mais fortes que tu;
2 mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te; okosala ata boyokani moko te elongo na bango; koyokela bango mawa te.
E o SENHOR teu Deus as houver entregue diante de ti, e as ferires, por completo as destruirás: não farás com eles aliança, nem as pouparás.
3 Okosangana ata moke te na bango na nzela ya libala, okopesa te na libala bana na yo ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe okozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na yo ya mibali;
E não aparentarás com eles: não darás tua filha a seu filho, nem tomarás a sua filha para teu filho.
4 noki te, bakopengwisa bana na yo ya mibali na miso na Ngai mpo ete basalela Ngai lisusu te kasi basalela banzambe mosusu, bongo Yawe akosilikela bino mpe akobebisa yo noki.
Porque desviará a teu filho de me seguir, e servirão a deuses alheios; e o furor do SENHOR se acenderá sobre vós, e te destruirá logo.
5 Tala makambo oyo bosengeli kosala bango: bokokweyisa bitumbelo na bango, bokopanza bikeko na bango, bokobuka makonzi ya nzambe mwasi Ashera mpe bokotumba na moto banzambe na bango ya bikeko,
Mas assim haveis de fazer com eles: destruireis seus altares, e quebrareis suas colunas sagradas, cortareis seus mastros de idolatria, e queimareis suas esculturas a fogo.
6 pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe, Nzambe na bino, aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali na mokili mpo ete bozala bato na Ye, bozwi na Ye moko penza.
Porque tu és povo santo ao SENHOR teu Deus: o SENHOR teu Deus te escolheu para ser-lhe um povo especial, mais que todos os povos que estão sobre a face da terra.
7 Ezali te mpo ete bozalaki mingi koleka bato mosusu nde Yawe alakisaki bino bolingo na Ye, bozalaki kutu moke koleka bato nyonso.
Não por ser vós mais que todos os povos vos quis o SENHOR, e vos escolheu; porque vós éreis os menores de todos os povos:
8 Kasi ezali mpo ete Yawe alingaka bino mpe abatelaka ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na bino. Yango wana, na loboko na Ye ya nguya, Yawe abimisaki bino mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu, na maboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito.
Mas sim porque o SENHOR vos amou, e quis guardar o juramento que jurou a vossos pais, vos tirou o SENHOR com mão forte, e vos resgatou de casa de servos, da mão de Faraó, rei do Egito.
9 Boye yeba ete Yawe, Nzambe na yo, azali Nzambe moko kaka ya solo; azali Nzambe ya boyengebene, abatelaka boyokani mpe bolingo na Ye kino na molongo ya nkoto ya bakitani oyo balingaka Ye mpe babatelaka mibeko na Ye.
Conhece, pois, que o SENHOR teu Deus é Deus, Deus fiel, que guarda o pacto e a misericórdia aos que lhe amam e guardam seus mandamentos, até as mil gerações;
10 Kasi azelaka te kopesa etumbu na moto oyo ayinaka Ye mpe abomaka ye mbala moko.
E que retribui em sua face ao que lhe aborrece, destruindo-o: nem o dilatará ao que lhe odeia, em sua face lhe retribuirá.
11 Yango wana, bosala keba mpo na kosalela mitindo, bikateli mpe mibeko oyo napesi bino lelo.
Guarda portanto os mandamentos, e estatutos, e regulamentos que eu te mando hoje que cumpras.
12 Soki bokosala keba na mibeko oyo mpe bokosalela yango malamu, Yawe, Nzambe na bino, akobatela bolingo mpe boyokani na Ye elongo na bino ndenge alapaki ndayi epai ya bakoko na bino.
E será que, por haver ouvido estes regulamentos, e guardado e os praticado, o SENHOR teu Deus guardará contigo o pacto e a misericórdia que jurou a teus pais;
13 Akolinga bino mpe akopambola bino, akokomisa bino ebele, akopambola mabota na bino, mbuma ya mabele na bino: milona na bino, vino ya sika mpe mafuta; akopambola bitonga ya bangombe na bino, bameme na bino mpe bantaba na bino kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino yango.
E te amará, e te abençoará, e te multiplicará, e abençoará o fruto de teu ventre, e o fruto de tua terra, e teu grão, e teu mosto, e teu azeite, a cria de tuas vacas, e os rebanhos de tuas ovelhas, na terra que jurou a teus pais que te daria.
14 Bokopambolama koleka bato nyonso. Mobali moko te to mwasi moko te akozanga bana, mpe ebwele na yo moko te ekozanga bana.
Bendito serás mais que todos os povos: não haverá em ti homem nem mulher estéril, nem em teus animais.
15 Yawe akobatela yo na bokono nyonso, akobwakela yo ata bokono moko te oyo yo oyebaki te na Ejipito, kasi akokweyisa yango likolo ya bayini na yo.
E tirará o SENHOR de ti toda enfermidade; e todas as más pragas do Egito, que tu sabes, não as porá sobre ti, antes as porá sobre todos os que te odiarem.
16 Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.
E consumirás a todos os povos que te dá o SENHOR teu Deus: não os perdoará teu olho; nem servirás a seus deuses, que te será tropeço.
17 Tango mosusu okomilobela: « Bikolo oyo ezali makasi koleka biso, ndenge nini tokolonga kobengana yango? »
Quando disseres em teu coração: Estas nações são muitas mais que eu, como as poderei desarraigar?;
18 Te! Kobanga yango soki moke te! Kanisa malamu makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, asalaki Faraon mpe Ejipito mobimba.
Não tenhas medo deles: lembra-te bem do que fez o SENHOR teu Deus com Faraó e com todo o Egito;
19 Omonaki na miso na yo komekama makasi, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa, loboko ya nguya mpe loboko esembolama oyo na nzela na yango Yawe, Nzambe na yo, abimisaki yo na Ejipito. Yawe, Nzambe na yo, akosala ndenge moko epai ya bato oyo ozali kobanga.
Das grandes provas que viram teus olhos, e dos sinais e milagres, e da mão forte e braço estendido com que o SENHOR teu Deus te tirou: assim fará o SENHOR teu Deus com todos os povos de cuja presença tu temerdes.
20 Mpe kutu, Yawe, Nzambe na yo, akotindela bango banzoyi ya minene kino tango bato oyo bakotikala mpe bakobombama liboso na yo bakokufa.
E também enviará o SENHOR teu Deus sobre eles vespas, até que pereçam os que restarem, e os que se houverem escondido de diante de ti.
21 Kolenga te liboso na bango, pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe Monene mpe ya somo.
Não desmaies diante deles, que o SENHOR teu Deus está em meio de ti, Deus grande e terrível.
22 Yawe, Nzambe na yo, akobengana moke-moke bikolo oyo ezali liboso na yo; okokoka te kosilisa bango na mbala moko, noki te banyama mabe ekokoma ebele zingazinga na yo.
E o SENHOR teu Deus expulsará a estas nações de diante de ti pouco a pouco: não as poderás acabar logo, para que os animais do campo não se aumentem contra ti.
23 Kasi Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, akotia bango noki na mobulu monene kino bakobebisama.
Mas o SENHOR teu Deus as entregará diante de ti, e ele as quebrantará com grande destroço, até que sejam destruídos.
24 Yawe akokaba bakonzi na bango na maboko na yo, mpe okolimwisa bakombo na bango na mokili; moko te akokoka kotelemela yo, okobebisa bango.
E ele entregará seus reis em tua mão, e tu destruirás o nome deles de debaixo do céu: ninguém te fará testa até que os destruas.
25 Okotumba na moto banzambe na bango ya bikeko. Kolula te mpe kozwa te palata mpe wolo oyo ezali na likolo na yango, ekoki kozala motambo mpo na yo; pamba te ezali nkele na miso ya Yawe, Nzambe na yo.
As esculturas de seus deuses queimarás no fogo: não cobiçarás prata nem ouro de sobre elas para tomá-lo para ti, para que não tropeces nisso, pois é abominação ao SENHOR teu Deus;
26 Kokotisa te mpe kolinga te eloko ya mbindo kati na ndako na yo. Okotia yango pembeni mpo na kobebisa yango nyonso. Zwa yango lokola eloko ya nkele mpe ya mbindo, pamba te etiami pembeni mpo na kobebisama.
E não meterás abominação em tua casa, para que não sejas anátema como isso; por completo o aborrecerás e o abominarás; porque é anátema.

< Deteronomi 7 >