< Deteronomi 5 >

1 Moyize abengisaki Isalaele mobimba mpe alobaki: « Oh Isalaele, yoka malamu bikateli mpe mibeko oyo nakoyebisa yo lelo. Yekola yango, batela yango mpe salela yango.
Then Moses summoned all Israel and said to them: Hear, O Israel, the statutes and ordinances that I declare in your hearing this day. Learn them and observe them carefully.
2 Yawe, Nzambe na biso, asalaki boyokani elongo na biso elongo na ngomba Orebi.
The LORD our God made a covenant with us at Horeb.
3 Yawe asalaki te boyokani oyo na bakoko na biso kasi asalaki yango nde na biso, biso nyonso oyo tozali na bomoi awa na mokolo ya lelo.
He did not make this covenant with our fathers, but with all of us who are alive here today.
4 Yawe alobaki na bino kati na moto likolo ya ngomba ndenge moto alobanaka na moto miso na miso.
The LORD spoke with you face to face out of the fire on the mountain.
5 Na tango wana, natelemaki kati ya Yawe mpe bino mpo na koyebisa bino maloba na Yawe, pamba te bozalaki kobanga moto mpe bomataki te likolo ya ngomba. Tala maloba oyo alobaki:
At that time I was standing between the LORD and you to declare to you the word of the LORD, because you were afraid of the fire and would not go up the mountain. And He said:
6 ‹ Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.
“I am the LORD your God, who brought you out of the land of Egypt, out of the house of slavery.
7 Okozalaka na banzambe mosusu te, bobele Ngai.
You shall have no other gods before Me.
8 Okomisalelaka te nzambe ya ekeko to bililingi ya biloko oyo ezali na likolo, na se to na mayi oyo ezali na se ya mabele.
You shall not make for yourself an idol in the form of anything in the heavens above, on the earth below, or in the waters beneath.
9 Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.
You shall not bow down to them or worship them; for I, the LORD your God, am a jealous God, visiting the iniquity of the fathers on their children to the third and fourth generations of those who hate Me,
10 Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai.
but showing loving devotion to a thousand generations of those who love Me and keep My commandments.
11 Okotangaka te na pamba Kombo ya Yawe, Nzambe na yo, pamba te Yawe akopesa etumbu na moto nyonso oyo akotanga Kombo na Ye na pamba.
You shall not take the name of the LORD your God in vain, for the LORD will not leave anyone unpunished who takes His name in vain.
12 Kanisaka mokolo ya Saba mpe bulisaka yango, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo yango.
Observe the Sabbath day by keeping it holy, as the LORD your God has commanded you.
13 Okosalaka misala na yo nyonso mikolo motoba.
Six days you shall labor and do all your work,
14 Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba ya Yawe, Nzambe na yo. Na mokolo wana, okosalaka mosala ata moko te, ezala yo, mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, ngombe na yo, ane na yo, ebwele moko kati na bibwele na yo to mopaya oyo azali kati na bingumba na yo, mpo ete mosali na yo ya mobali mpe mwasi mosali na yo ya mwasi bakoka kopema ndenge yo ozali kopema.
but the seventh day is a Sabbath to the LORD your God, on which you must not do any work—neither you, nor your son or daughter, nor your manservant or maidservant, nor your ox or donkey or any of your livestock, nor the foreigner within your gates, so that your manservant and maidservant may rest as you do.
15 Kanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito, mpe Yawe, Nzambe na bino, abimisaki bino kuna na loboko na Ye ya nguya mpe na loboko na Ye ya kosembolama. Yango wana, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete otosa mokolo ya Saba.
Remember that you were a slave in the land of Egypt, and that the LORD your God brought you out of there with a mighty hand and an outstretched arm. That is why the LORD your God has commanded you to keep the Sabbath day.
16 Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo mpo ete ozala na bomoi ya molayi, mpe ozala moto ya esengo kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
Honor your father and your mother, as the LORD your God has commanded you, so that your days may be long and that it may go well with you in the land that the LORD your God is giving you.
17 Okobomaka te.
You shall not murder.
18 Okosalaka ekobo te.
You shall not commit adultery.
19 Okoyibaka te.
You shall not steal.
20 Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.
You shall not bear false witness against your neighbor.
21 Okolulaka te mwasi ya moninga na yo; okolulaka te ndako ya moninga na yo, elanga na ye, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo. › »
You shall not covet your neighbor’s wife. You shall not covet your neighbor’s house or field, or his manservant or maidservant, or his ox or donkey, or anything that belongs to your neighbor.”
22 Oyo nde mibeko oyo Yawe alobaki na mongongo makasi kati na moto epai ya lisanga mobimba oyo ezalaki likolo ya ngomba kati na mapata mpe molili makasi; mpe abakisaki ata likambo moko te. Bongo akomaki yango na bitando mibale ya mabanga mpe apesaki ngai yango.
The LORD spoke these commandments in a loud voice to your whole assembly out of the fire, the cloud, and the deep darkness on the mountain; He added nothing more. And He wrote them on two tablets of stone and gave them to me.
23 Tango boyokaki mongongo kobima kati na molili, wana ngomba ezalaki kopela moto, bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bampaka na bino bayaki epai na ngai.
And when you heard the voice out of the darkness while the mountain was blazing with fire, all the heads of your tribes and your elders approached me,
24 Balobaki: « Yawe, Nzambe na biso, alakisi biso nkembo na Ye mpe lokumu na Ye; mpe toyoki mongongo na Ye wuta na moto. Lelo, tomoni ete moto akoki kozala na bomoi ata soki Nzambe asololi na ye.
and you said, “Behold, the LORD our God has shown us His glory and greatness, and we have heard His voice out of the fire. Today we have seen that a man can live even if God speaks with him.
25 Kasi sik’oyo mpo na nini tokufa kaka boye? Moto ya monene oyo ekoki kozikisa biso mpe koboma biso soki tokobi koyoka mongongo na Yawe, Nzambe na biso, kolobela biso.
But now, why should we die? For this great fire will consume us, and we will die, if we hear the voice of the LORD our God any longer.
26 Pamba te nani kati na mokili akoki koyoka mongongo ya Nzambe na bomoi koloba kati na moto ndenge biso toyokaki bongo atikala na bomoi?
For who of all flesh has heard the voice of the living God speaking out of the fire, as we have, and survived?
27 Pusana pembeni mpe yoka makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba; bongo na sima, okoyebisa biso makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba na yo; mpe biso tokoyoka mpe tokotosa yango. »
Go near and listen to all that the LORD our God says. Then you can tell us everything the LORD our God tells you; we will listen and obey.”
28 Yawe ayokaki bino tango boyebisaki ngai mpe alobaki na ngai: « Nayoki makambo oyo bato oyo balobi na yo. Nyonso oyo balobi ezali malamu.
And the LORD heard the words you spoke to me, and He said to me, “I have heard the words that these people have spoken to you. They have done well in all that they have spoken.
29 Oh, soki mitema na bango ezalaki penza ya kobongama mpo na kobanga Ngai mpe kobatela mibeko na Ngai tango nyonso, mpo ete bakoka kozala tango nyonso malamu elongo na bana na bango!
If only they had such a heart to fear Me and keep all My commandments always, so that it might be well with them and with their children forever.
30 Kende, yebisa bango: ‹ Bozonga na bandako na bino. ›
Go and tell them: ‘Return to your tents.’
31 Kasi yo, vanda awa elongo na Ngai mpo ete napesa yo mibeko nyonso, bikateli nyonso, mpe mitindo nyonso oyo okoteya bango mpo ete basalela yango kati na mokili oyo nakopesa bango lokola libula. »
But you stand here with Me, that I may speak to you all the commandments and statutes and ordinances you are to teach them to follow in the land that I am giving them to possess.”
32 Yango wana, bosala keba na oyo nyonso Yawe, Nzambe na bino, atindi bino; bobaluka te ezala na ngambo moko to na ngambo mosusu.
So be careful to do as the LORD your God has commanded you; you are not to turn aside to the right or to the left.
33 Botambola na banzela nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino mpo ete bozala na bomoi, mpo ete bozala bato ya esengo, mpe mpo ete bobakisa mikolo ya bomoi na bino kati na mokili oyo bokokamata.
You must walk in all the ways that the LORD your God has commanded you, so that you may live and prosper and prolong your days in the land that you will possess.

< Deteronomi 5 >