< Deteronomi 4 >

1 Sik’oyo Isalaele, yoka malamu mitindo mpe mibeko oyo nalingi koteya yo. Salela yango mpo ete ozala na bomoi mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na yo, apesi yo.
People of Israel, pay attention to the rules and regulations I'm teaching you to observe. That way you can stay alive, and go in and take over the country the Lord, the God of your forefathers, is giving you.
2 Kobakisa eloko moko te na oyo natindi yo mpe kolongola eloko moko te kati na yango, kasi tosa mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo.
You are not to add to or take away from what I'm telling you, so that you can keep the commandments of the Lord your God that I'm ordering you to follow.
3 Bomonaki bino moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki na Bala ya Peori: abomaki kati na bino bato nyonso oyo bamipesaki na kosalela Bala ya Peori.
You've seen for yourselves what the Lord did at Baal-peor where the Lord your God killed everyone among you who worshiped Baal of Peor.
4 Kasi bino oyo bokangamaki na Yawe, Nzambe na bino, bino nyonso bozali na bomoi na mokolo ya lelo.
Those of you who were faithful to the Lord your God are still alive today, every one of you.
5 Tala, nateyaki bino mitindo mpe mibeko ndenge Yawe, Nzambe na ngai, atindaki ngai, mpo ete bokoka kotosa yango na mokili oyo bokokota mpo na kozwa yango.
Listen, I have taught you the rules and regulations just as the Lord my God ordered me to do, so you can follow them in the country that you are about to enter and take over.
6 Botosa yango mpe bosalela yango na bokebi; yango nde ekokomisa bino bato ya bwanya mpe ya mayele na miso ya bikolo oyo bakoyoka sango ya mitindo mpe mibeko yango; mpe bakoganga: « Solo, libota monene oyo ezali na bato ya bwanya mpe na bato ya mayele. »
Be careful to observe them, because this will demonstrate your wisdom and insight to the other people living there who are watching. They will find out about all these rules and say, “The people of this great nation are very wise and have good insight.”
7 Pamba te ekolo nini lisusu ya monene, oyo banzambe na yango ezali pembeni na yango ndenge Yawe, Nzambe na biso, azalaka pembeni na biso tango nyonso oyo tobelelaka Ye?
What nation is as great as us, having a god so close to them as the Lord our God is to us whenever we call on him?
8 Mpe ekolo nini mosusu ya monene, oyo ekoki kozala na mitindo mpe mibeko ya sembo lokola Mobeko oyo natie lelo liboso na bino?
What nation is as great as us, having such good rules and regulations like all these laws that I'm placing before you today?
9 Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.
Just make sure to be very careful, and really watch what you do, so you don't forget the things you've have seen. Keep them in mind as long as you live. Teach them to your children and grandchildren.
10 Kanisa mokolo oyo otelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na Orebi tango Yawe alobaki na ngai: « Sangisa bato oyo liboso na Ngai mpo na koyoka maloba na Ngai, mpo ete bakoka koyeba kopesa Ngai lokumu tango nyonso bakozala na mokili oyo mpe bakoka koteya yango na bana na bango. »
That day when you stood in the presence of the Lord your God at Horeb, the Lord told me, “Have the people come to me and to hear what I have to say, so they may learn to have respect for me throughout their lives here on earth, and so they may teach this to their children.”
11 Yango wana, bino bopusanaki mpe botelemaki na ebandeli ya ngomba tango ezalaki kopela moto oyo ekomaki kino na likolo elongo na mapata ya mwindo mpe molili makasi.
You gathered and stood at the foot of the mountain. The mountain was on fire, shooting out flames into the sky and producing thick dark clouds.
12 Yawe alobelaki bino wuta na moto; boyokaki lokito ya maloba na ye kasi bomonaki ata nzoto te; mongongo kaka nde ezalaki koyokana.
The Lord spoke to you from the fire. You heard the words, but you didn't see the form of anyone speaking—there was just a voice.
13 Atalisaki bino boyokani na Ye, mibeko zomi oyo bosengeli kosalela, mpe akomaki yango na bitando mibale ya mabanga.
He explained to you his agreement, the Ten Commandments, which he ordered you to follow. He wrote them down on two tablets of stone.
14 Na tango wana kaka, Yawe atindaki ngai koteya bino bikateli mpe mibeko oyo bosengeli kosalela na mokili oyo bokokende mpo na kozwa yango.
This was the time that the Lord ordered me to teach you the rules and regulations that you are to follow when you arrive in the country you're going to own once you've crossed the Jordan.
15 Bongo, bomisenzela malamu, pamba te bomonaki nzoto te na mokolo oyo Yawe alobelaki bino na ngomba Orebi wuta na moto.
You didn't see any form when the Lord spoke to you from the fire at Horeb, so be very careful
16 Bomibebisa te na kosala ekeko, elilingi ya mwasi to ya mobali,
that you don't spoil your relationship with the Lord by making an idol for yourselves in any shape or form, whether it looks like a male or female,
17 ya nyama nyonso ya mokili to ya ndeke nyonso oyo epumbwaka na likolo,
or any land animal or bird that flies,
18 ya ekelamu nyonso oyo etambolaka na libumu to ya mbisi nyonso oyo etiolaka na se ya mayi.
or of any animal that crawls on the ground or any fish in the deep sea.
19 Mpe tango botalaka na mapata mpe bomonaka moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu oyo ezali na likolo, bokosama te mpo na kofukamela mpe kogumbamela biloko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesa na bikolo nyonso oyo ezali na mokili.
When you look up at the sky and see the sun, moon, and stars—all the heavenly bodies—don't be tempted to bow down to them. Don't worship them like all the other nations on earth in the way that the Lord has allowed.
20 Kasi mpo na bino, Yawe azwaki bino mpe abimisaki bino na fulu ya moto ya bibende, oyo ezalaki Ejipito, mpo ete bozala bato ya libula na Ye ndenge bozali sik’oyo.
Remember that the Lord took you and led you out of the iron furnace which was Egypt to be his own people, just as you are today.
21 Yawe asilikelaki ngai likolo na bino mpe alapaki ndayi na makasi nyonso ete nakoki te kokatisa Yordani mpe kokota na mokili kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.
But the Lord was angry with me because of you, and he vowed that I wouldn't cross the Jordan to enter the good land that the Lord your God is giving you to own.
22 Nakokufa na mokili oyo mpe nakokatisa Yordani te; kasi bino, etikali moke bokatisa mpe bokamata mokili oyo ya kitoko.
So I will not be crossing the Jordan, because I have to die here in this land. But you will cross over and occupy that good land.
23 Bozala na bokebi mpe bobosana te boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki elongo na bino. Mpe bomisalela ekeko te na lolenge nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apekisaki.
However, be careful not to forget the agreement of the Lord your God that he made with you. Don't make an idol for yourselves in the form of anything, because he has forbidden you to do this.
24 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali moto oyo ezikisaka, azali Nzambe na zuwa.
For the Lord your God is a fire that burns everything up. He is an exclusive God.
25 Tango bokozala na bana mpe bakoko, mpe bokowumela tango molayi na mokili, soki bokosami mpe bosali ekeko ya lolenge nyonso, soki bosali mabe na miso ya Yawe, Nzambe na bino, soki botumboli kanda na Ye,
After you have been living in the country for a long time and have had children and grandchildren, if you then spoil the relationship you have with the Lord and make an idol in any form. The Lord your God sees this as evil makes him angry.
26 soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino: bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo;
If you do this, I call on heaven and earth to be witnesses against you today that you will be completely wiped out from the country that you are crossing the Jordan to occupy. You will not live long there—you will be totally destroyed.
27 Yawe akopanza bino kati na bato. Kasi ndambo kaka ya bato kati na bino nde bakowumela kati na bikolo epai wapi Yawe akomema bino.
The Lord will scatter you among the other nations, and not many of you will survive in the countries where the Lord has exiled you.
28 Kuna, bokogumbamela banzambe oyo esalemi na maboko ya bato, banzambe ya banzete to ya mabanga, oyo ekoki komona te, koyoka te, kolia te mpe koyoka solo te.
There you will worship gods of wood and stone made by human beings. These idols can't see or hear or eat or smell.
29 Kasi soki, wuta na mokili wana, boluki Yawe, Nzambe na bino, bokomona Ye soki boluki Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.
However, if while you're there you decide to come to the Lord your God, you will find him if you come to him whole-heartedly, with complete commitment.
30 Tango bokozala na mawa mpe pasi nyonso oyo ekokomela bino, sima na mikolo, bokozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokotosa Ye.
When you are in trouble, after you've experienced all these things, then eventually you will return to the Lord your God and do what he says.
31 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya mawa, akosundola bino te, akobebisa bino te mpe akobosana te boyokani oyo asala na bakoko na bino tango alapaki ndayi.
The Lord your God is a merciful God. He won't abandon you or destroy you or forget the agreement he made with your forefathers, confirmed by a solemn promise.
32 Luka koyeba makambo oyo esalema na mikolo ya liboso, liboso ete yo obotama, wuta mokolo oyo Nzambe asala moto na mokili; luka oyeba makambo oyo esalema kati na mokili banda na suka moko kino na suka mosusu, soki likambo ya monene boye esila kosalema, soki likambo ya boye esila koyokana.
Think about it! Examine the whole of history from the beginning of time, long before you existed, when God made human beings, right up until now. Ask this question anywhere, from one end of the earth to the other: Has anything as amazing as this ever happened before; has anyone ever heard anything like this?
33 Boni, ezali na bato bayoka mongongo ya Nzambe kolobela bango kati na moto ndenge bino boyokaki mpe botikali na bomoi?
Has a people ever heard the voice of God speaking out of the fire, like you have, and survived?
34 Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino?
Has any god tried to take a nation out of another nation and make them his own, using tests and signs and miracles and war—with his great power and incredible strength and terrifying actions—like the Lord your God did for you in Egypt, before your very eyes?
35 Omonaki makambo nyonso wana mpo oyeba ete Yawe kaka nde azali Nzambe, mosusu azali te.
You were shown all this so you could be certain that the Lord is God and there is no one like him.
36 Wuta na likolo, ayebisaki yo na mongongo na Ye mpo na koteya yo; na se, Yawe alakisaki yo moto na ye ya monene mpe oyokaki mongongo na Ye kobima kati na moto.
He made you hear his voice from heaven so you would obey him. On earth he revealed himself though blazing fire, and you heard him speak to you from the fire.
37 Lokola alingaki bakoko na yo mpe aponaki bakitani na bango, abimisaki yo na Ejipito na nguya na Ye mpe na makasi na Ye ya monene
Because he loved your forefathers, he chose you, their descendants. He himself led you out of Egypt by his great power,
38 mpo na kobengana liboso na yo bikolo minene mpe ya makasi koleka yo mpe kokotisa yo na bamboka na bango mpo na kopesa yo yango lokola libula ndenge yango ezali na mokolo ya lelo.
driving out ahead of you nations that were greater and stronger than you, in order to lead you to their land and give it to you as yours to own, just as you do today.
39 Yeba yango lelo mpe tia yango na motema na yo ete Yawe kaka nde azali Nzambe na likolo mpe na se, mosusu azali te.
So today be sure about this and never forget: the Lord is the only God in heaven above and on the earth below.
40 Batela bikateli mpe mitindo na Ye, oyo nazali kopesa yo lelo mpo ete ozala moto ya esengo, yo mpe bana na yo sima na yo, mpe mpo ete owumela tango molayi na mokili oyo Yawe, Nzambe, na yo apesi yo mpo na libela.
Observe his rules and regulations that I'm giving you right now, so that you and your children will do well, and that you may have long lives in the country that the Lord your God is giving you for all time.
41 Moyize aponaki bingumba misato na ngambo ya este ya Yordani,
Then Moses assigned three sanctuary towns to the east of the Jordan
42 mpo ete moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nko te, na kozanga koyina ye liboso, akoka kokimela na moko kati na bingumba yango mpe akoka kobikisa bomoi na ye.
where a person could run to after accidentally killing someone without deliberate hatred. To save their life they could run to one of these towns:
43 Tala bingumba yango: Mpo na libota ya Ribeni, engumba Betseri kati na etando ya esobe; mpo na libota ya Gadi, engumba Ramoti ya Galadi, mpe mpo na libota ya Manase, engumba Golani kati na Bashani.
Bezer in the desert plain belonging to the tribe of Reuben; Ramoth in Gilead belonging to the tribe of Gad, or Golan in Bashan belonging to the tribe of Manasseh.
44 Tala Mobeko oyo Moyize atiaki liboso ya bana ya Isalaele:
This is the law that Moses placed before the Israelites.
45 Tala malako, bikateli mpe mibeko oyo Moyize apesaki na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito;
These are the laws, rules, and regulations Moses gave them after they had come out of Egypt.
46 mpe tango bazalaki na lubwaku etalana na Beti-Peori, na ngambo ya este ya Yordani, kati na mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni oyo Moyize mpe bana ya Isalaele balongaki tango babimaki na Ejipito.
This was when they were in the valley to the east of the Jordan near Beth-peor in the country of Sihon king of the Amorites. He had ruled from Heshbon and had been defeated by Moses and the Israelites after they had left Egypt.
47 Bazwaki mokili na ye mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani. Bakonzi nyonso mibale bazalaki bato ya Amori mpe bakonzaki na ngambo ya este ya Yordani.
They took over his country and the country of Og king of Bashan. (They were the two kings of the Amorites who previously ruled on the east side of the Jordan.)
48 Bana ya Isalaele bavandaki na etando oyo ebandaki na Aroeri, na ngomba Arinoni kino na ngomba Sirioni oyo babengi Erimoni;
The territory went from the town of Aroer on the edge of the Arnon Valley all the way to Mount Sirion, otherwise known as Mount Hermon,
49 bakisa Araba nyonso na este ya Yordani kino na ebale monene ya Araba, na ebandeli ya ngomba Pisiga.
and included all the Arabah to the east of the Jordan down as far as the Dead Sea beside the slopes of Mount Pisgah.

< Deteronomi 4 >