< Deteronomi 34 >

1 Wuta na bitando ya Moabi, Moyize amataki na likolo ya ngomba Nebo kino na songe ya ngomba Pisiga oyo etalana na Jeriko. Kuna, Yawe alakisaki ye mokili mobimba: wuta na Galadi kino na Dani,
Y subió Moisés de los campos de Moab al monte de Nebo, a la cumbre de Pisga, que está enfrente de Jericó; y le mostró el SEÑOR toda la tierra de Galaad hasta Dan,
2 etuka nyonso ya Nefitali, ya Efrayimi mpe ya Manase; mokili nyonso ya Yuda kino na ebale monene Mediterane,
y a todo Neftalí, y la tierra de Efraín y de Manasés, toda la tierra de Judá hasta el mar postrero;
3 mpe etuka ya Negevi mpe etuka ya lubwaku ya Jeriko, engumba ya banzete ya mbila kino na Tsoari.
y el mediodía, y la campiña, la vega de Jericó, ciudad de las palmas, hasta Zoar.
4 Bongo Yawe alobaki na ye: « Tala mokili oyo nalakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi, tango nalobaki na bango: ‹ Nakopesa yango epai ya bakitani na bino. › Nasali ete omona yango na miso na yo moko, kasi okokota kuna te. »
Y le dijo el SEÑOR: Esta es la tierra de que juré a Abraham, a Isaac, y a Jacob, diciendo: A tu simiente la daré. Te la he hecho ver con tus ojos, mas no pasarás allá.
5 Moyize, mosali na Yawe, akufaki kuna na Moabi ndenge Yawe alobaki na ye.
Y murió allí Moisés siervo del SEÑOR, en la tierra de Moab, conforme al dicho del SEÑOR.
6 Ye moko Nzambe akundaki ye kati na Moabi, na lubwaku oyo etalana na Beti-Peori; mpe kino lelo, moto moko te ayebi esika oyo kunda na ye ezali.
Y lo enterró en el valle, en tierra de Moab, enfrente de Bet-peor; y ninguno sabe su sepulcro hasta hoy.
7 Moyize azalaki na mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama tango akufaki. Miso na ye elembaki te mpe makasi na ye esilaki te.
Y era Moisés de edad de ciento veinte años cuando murió; sus ojos nunca se oscurecieron, ni perdió su vigor.
8 Bana ya Isalaele balelaki Moyize mikolo tuku misato, na etando ya Moabi kino tango ya kolela mpe ya matanga esilaki.
Y lloraron los hijos de Israel a Moisés en los campos de Moab treinta días; y así se cumplieron los días del lloro del luto de Moisés.
9 Jozue, mwana mobali ya Nuni, atondisamaki na Molimo ya bwanya, pamba te Moyize atielaki ye maboko. Bana ya Isalaele bayokelaki ye mpe batosaki mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.
Y Josué hijo de Nun fue lleno del Espíritu de sabiduría, porque Moisés había puesto sus manos sobre él; y los hijos de Israel le escucharon, e hicieron como el SEÑOR mandó a Moisés.
10 Wuta mokolo wana, mosakoli moko te atikalaki lisusu kobima kati na Isalaele, oyo akokanaki na Moyize oyo Yawe azalaki kosolola na ye miso na miso,
Y nunca más se levantó profeta en Israel como Moisés, a quien haya conocido el SEÑOR cara a cara;
11 oyo asalaki bikamwa nyonso mpe bilembo nyonso ya minene oyo Yawe atindaki ye kosala kati na Ejipito liboso ya Faraon, ya bakalaka na ye nyonso mpe ya mokili na ye mobimba;
en todas las señales y los milagros que le envió el SEÑOR a hacer en tierra de Egipto a Faraón, y a todos sus siervos, y a toda su tierra;
12 pamba te moto moko te atikalaki komonisa misala ya nguya mpe ya somo lokola misala oyo Moyize asalaki na miso ya bana nyonso ya Isalaele.
y en toda la mano fuerte, y en todo el espanto grande que hizo Moisés a ojos de todo Israel.

< Deteronomi 34 >