< Deteronomi 33 >
1 Tala lipamboli oyo Moyize, moto na Nzambe, asakolaki mpo na bana ya Isalaele liboso ete akufa.
This is the blessing that Moses the man of God pronounced upon the Israelites before his death.
2 Alobaki: « Yawe awutaki na Sinai; wuta na Seiri, abimelaki bango lokola moyi na tongo, angengaki epai na bango wuta na ngomba Parani, ayaki elongo na ebele ya bankoto ya ba-anjelu na Ye mpe asimbaki na loboko na Ye kongenga ya Mobeko.
He said: “The LORD came from Sinai and dawned upon us from Seir; He shone forth from Mount Paran and came with myriads of holy ones, with flaming fire at His right hand.
3 Solo, olingaka bato, basantu nyonso basimbami na loboko na Yo. Na makolo na Yo, bango nyonso bagumbamaka. Ezali epai na Yo nde bazwaka mateya.
Surely You love the people; all the holy ones are in Your hand, and they sit down at Your feet; each receives Your words—
4 Moyize apesa biso Mobeko oyo ezali bozwi ya lisanga ya Jakobi.
the law that Moses gave us, the possession of the assembly of Jacob.
5 Azalaki mokonzi ya Yeshuruni tango bakambi ya bato basanganaki elongo na mabota ya Isalaele.
So the LORD became King in Jeshurun when the leaders of the people gathered, when the tribes of Israel came together.
6 Tika ete Ribeni awumela na bomoi mpe akufa te, mpe tika ete bato na ye bazala moke te! »
Let Reuben live and not die, nor his men be few.”
7 Tala mapomboli oyo alobaki mpo na Yuda: « Oh Yawe, yoka koganga ya Yuda; zongisa ye epai ya bato na ye! Tika ete maboko na ye elongisa banzela na ye, mpe tika ete osunga ye liboso ya banguna na ye! »
And concerning Judah he said: “O LORD, hear the cry of Judah and bring him to his people. With his own hands he defends his cause, but may You be a help against his foes.”
8 Mpo na Levi, alobaki: « Urimi mpe Tumimi na Yo ezali mpo na moyengebene oyo omekaki ye motema na Masa, mpe oyo owelanaki na ye na mayi ya Meriba,
Concerning Levi he said: “Give Your Thummim to Levi and Your Urim to Your godly one, whom You tested at Massah and contested at the waters of Meribah.
9 oyo atalisaki bolingo epai na Yo koleka, bolingo epai ya baboti na ye, bandeko na ye mpe bana na ye moko, mpo na kotosa maloba na Yo mpe kobatela boyokani na Yo.
He said of his father and mother, ‘I do not consider them.’ He disregarded his brothers and did not know his own sons, for he kept Your word and maintained Your covenant.
10 Ateyaka makebisi na Yo epai ya Jakobi, mpe mibeko na Yo epai ya Isalaele; abonzaka ansa liboso na Yo, mpe mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo na Yo.
He will teach Your ordinances to Jacob and Your law to Israel; he will set incense before You and whole burnt offerings on Your altar.
11 Oh Yawe, pambola makasi na ye na mosala, mpe sepela na mosala ya maboko na ye. Buka loketo ya bato oyo bazali kotelemela ye, mpe loketo ya bayini na ye kino bakoka lisusu te kotelema. »
Bless his substance, O LORD, and accept the work of his hands. Smash the loins of those who rise against him, and of his foes so they can rise no more.”
12 Mpo na Benjame, alobaki: « Tika ete molingami ya Yawe azala na kimia pembeni na Ye, pamba te Ye nde abatelaka ye mokolo mobimba; mpe moto oyo Yawe alingaka apemaka na kati-kati ya mapeka na Ye! »
Concerning Benjamin he said: “May the beloved of the LORD rest secure in Him; God shields him all day long, and upon His shoulders he rests.”
13 Mpo na Jozefi, alobaki: « Tika ete Yawe apambola mokili na ye na nzela ya mamwe ya motuya, oyo ewutaka na likolo, mpe na nzela ya mayi ya mozindo oyo etiolaka na se ya mabele
Concerning Joseph he said: “May his land be blessed by the LORD with the precious dew from heaven above and the deep waters that lie beneath,
14 elongo na biloko oyo eleki motuya, oyo mayi ekolisaka mpe oyo eleki kitoko, oyo ebimaka sanza na sanza;
with the bountiful harvest from the sun and the abundant yield of the seasons,
15 na nzela ya bakado ya kitoko ya bangomba ya kala, mpe na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko ya bangomba mike oyo ewumelaka mobu na mobu;
with the best of the ancient mountains and the bounty of the everlasting hills,
16 na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko, bambuma oyo etondi kati na mokili! Tika ete Nzambe oyo avandaka kati na nzete moke oyo ezali kopela moto apambola moto ya Jozefi mpe elongi ya moto oyo babulisi kati na bandeko na ye!
with the choice gifts of the land and everything in it, and with the favor of Him who dwelt in the burning bush. May these rest on the head of Joseph and crown the brow of the prince of his brothers.
17 Na lokumu, azali lokola mwana liboso ya ngombe; maseke na ye ezali lokola ya mpakasa. Na nzela na yango nde ebetaka bikolo, ata bikolo oyo ezali na suka ya mokili. Tala ndenge nini bato ya Efrayimi bazali ebele penza, tala ndenge nini bato ya Manase bazali penza ebele! »
His majesty is like a firstborn bull, and his horns are like those of a wild ox. With them he will gore the nations, even to the ends of the earth. Such are the myriads of Ephraim, and such are the thousands of Manasseh.”
18 Mpo na Zabuloni, alobaki: « Oh Zabuloni, sepela na kobima na yo! Mpe yo Isakari, tika ete osepela kati na bandako na yo ya kapo.
Concerning Zebulun he said: “Rejoice, Zebulun, in your journeys, and Issachar, in your tents.
19 Bakobengisa bato na likolo ya ngomba, mpe bakobonza kuna bambeka ya bosembo, bakosala feti mpo na bomengo ya bibale minene, mpe mpo na bozwi oyo ebombama na zelo ya libongo. »
They will call the peoples to a mountain; there they will offer sacrifices of righteousness. For they will feast on the abundance of the seas and the hidden treasures of the sand.”
20 Mpo na Gadi, alobaki: « Tika ete apambolama, moto oyo akoyeisa mokili ya Gadi monene! Gadi akowumela kuna lokola nkosi oyo ezali kopasola banda na lokolo kino na moto.
Concerning Gad he said: “Blessed is he who enlarges the domain of Gad! He lies down like a lion and tears off an arm or a head.
21 Aponaki mabele ya kitoko mpo na ye moko, bapesaki ye eteni oyo ebongi na mokambi. Atambolaki liboso ya bato; mpe asalaki mosala kolanda bosembo ya Yawe mpe bikateli na Ye liboso ya Isalaele. »
He chose the best land for himself, because a ruler’s portion was reserved for him there. He came with the leaders of the people; he administered the LORD’s justice and His ordinances for Israel.”
22 Mpo na Dani, alobaki: « Dani azali mwana ya nkosi oyo epumbwaka wuta na Bashani. »
Concerning Dan he said: “Dan is a lion’s cub, leaping out of Bashan.”
23 Mpo na Nefitali alobaki: « Nefitali atondi na bolamu mpe na mapamboli na Yawe, akozwa libula ya weste mpe ya sude. »
Concerning Naphtali he said: “Naphtali is abounding with favor, full of the blessing of the LORD; he shall take possession of the sea and the south.”
24 Mpo na Aseri, alobaki: « Aseri azali mwana mobali oyo aleki na mapamboli. Tika ete bandeko na ye basalela ye mpe tika ete makolo na ye ezinda na mafuta.
And concerning Asher he said: “May Asher be the most blessed of sons; may he be the most favored among his brothers and dip his foot in oil.
25 Bikangelo ya bikuke na yo ekozala ya bibende mpe ya bronze. Mpe tika ete makasi na yo ewumela ndenge mikolo na yo ezali.
May the bolts of your gate be iron and bronze, and may your strength match your days.”
26 Moko te akokani na Nzambe ya Yeshuruni, Nzambe oyo atambolaka na likolo lokola mpunda mpo na kosunga yo, mpe na mapata, kati na nkembo na Ye.
“There is none like the God of Jeshurun, who rides the heavens to your aid, and the clouds in His majesty.
27 Nzambe ya tango nyonso azali ekimelo na yo, azali tango nyonso Mosungi awa na se. Ezali Ye nde abenganaka banguna na yo liboso na yo mpe apesaka yo mitindo ya koboma bango.
The eternal God is your dwelling place, and underneath are the everlasting arms. He drives out the enemy before you, giving the command, ‘Destroy him!’
28 Boye Isalaele akowumela na kimia, mpe etima ya Jakobi ezali kotiola kati na mokili ya ble mpe ya vino ya sika, epai wapi likolo ezali kokitisa mamwe.
So Israel dwells securely; the fountain of Jacob lives untroubled in a land of grain and new wine, where even the heavens drip with dew.
29 Oh Isalaele, ozali solo libota ya esengo! Libota nini ekokani na yo, yo libota oyo Yawe abikisi? Ye azali nde nguba na yo mpe mosungi na yo ya nkembo. Banguna na yo bakokima liboso na yo, mpe okonyata bisika na bango, oyo eleki likolo. »
Blessed are you, O Israel! Who is like you, a people saved by the LORD? He is the shield that protects you, the sword in which you boast. Your enemies will cower before you, and you shall trample their high places.”