< Deteronomi 32 >

1 Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba! Oh mabele, yoka malamu maloba ya monoko na ngai!
Hear, O ye heavens, the things I speak, let the earth give ear to the words of my mouth.
2 Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula, mpe maloba na ngai ekita lokola londende, lokola mvula moke na likolo ya matiti, lokola mvula makasi na likolo ya milona!
Let my doctrine gather as the rain, let my speech distil as the dew, as a shower upon the herb, and as drops upon the grass.
3 Nakosakola Kombo ya Yawe. Bokumisa monene ya Nzambe na biso!
Because I will invoke the name of the Lord: give ye magnificence to our God.
4 Yawe azali lokola Libanga; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te; azali sembo mpe alima.
The works of God are perfect, and all his ways are judgments: God is faithful and without any iniquity, he is just and right.
5 Kasi bino, bomibebisaki liboso na Ye; bozali lisusu bana na Ye te, mpo na mabe na bino, bino molongo ya bana mabe mpe ya bapengwi.
They have sinned against him, and are nose of his children in their filth: they are a wicked and perverse generation.
6 Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe? Oh bato ya maboma, bato bazanga bwanya! Boni, Yawe azali Tata na bino te? Azali Mokeli na bino te? Ye nde asalaki bino mpe abongisaki bino.
Is this the return thou makest to the Lord, O foolish and senseless people? Is not he thy father, that hath possessed thee, and made thee, and created thee?
7 Bokanisa mikolo ya kala, mpe botala milongo oyo eleka kala! Botuna na batata na bino, mpe bakoyebisa bino. Botuna na bampaka na bino, mpe bakolimbolela bino.
Remember the days of old, think upon every generation: ask thy father, and he will declare to thee: thy elders and they will tell thee.
8 Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki na ekolo moko na moko mabele na yango, tango akabolaki bato nyonso, atiaki bandelo mpo na bato kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe.
When the Most High divided the nations: when he separated the sons of Adam, he appointed the bounds of people according to the number of the children of Israel.
9 Pamba te eteni ya Yawe ezali bato na Ye; Jakobi azali libula na Ye.
But the Lord’s portion is his people: Jacob the lot of his inheritance.
10 Amonaki ye na esobe, kati na mokili oyo ekawuka, etonda na koganga ya somo. Azingelaki ye, abatelaki ye, akengelaki ye lokola mbuma ya liso na Ye.
He found him in a desert land, in a place of horror, and of vast wilderness: he led him about, and taught him: and he kept him as the apple of his eye.
11 Azali lokola mpongo oyo ezali kolakisa bana na yango kopumbwa. Epumbwaka pembeni-pembeni ya bana na yango, etandaka mapapu na yango mpo na kokanga bana na yango, mpe ememaka yango likolo ya masala na yango.
As the eagle enticing her young to fly, and hovering over them, he spread his wings, and hath taken him and carried him on his shoulders.
12 Ye moko Yawe akambaki bango; nzambe moko te ya bapaya azalaki elongo na Ye.
The Lord alone was his leader: and there was no strange god with him.
13 Akambaki bango na bisika oyo eleki likolo kati na mokili, aleisaki bango bambuma ya elanga, amelisaki bango mafuta ya nzoyi oyo ezalaki kobima na libanga, mafuta oyo ezalaki kobima na mabele ya mabanga,
He set him upon high land: that he might eat the fruits of the fields, that he might suck honey out of the rock, and oil out of the hardest stone,
14 miliki ya bangombe mpe ya bameme; apesaki bango mafuta ya bameme mpe ya bantaba, ya bana meme mpe ya ntaba ya mafuta; mpe apesaki bameme ya mibali ya kitoko ya Bashani. Baliaki lisusu ble oyo eleki kitoko, bamelaki vino ya motane oyo ewutaki na bambuma ya vino.
Butter of the herd, and milk of the sheep with the fat of lambs, and of the rams of the breed of Basan: and goats with the marrow of wheat, and might drink the purest blood of the grape.
15 Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi; atondaki na biloko ya kolia, akomaki kilo mpe moselu; asundolaki Nzambe oyo akelaki ye mpe abwakaki Libanga na ye, Mobikisi na ye.
The beloved grew fat, and kicked: he grew fat, and thick and gross, he forsook God who made him, and departed from God his saviour.
16 Bapesaki Yawe kanda makasi likolo ya banzambe na bango ya bapaya, mpe bapesaki Ye kanda na nzela ya misala na bango ya mbindo.
They provoked him by strange gods, and stirred him up to anger, with their abominations.
17 Babonzaki bambeka epai ya milimo mabe oyo ezali Nzambe te; babonzaki yango epai ya banzambe oyo bango bayebaki te, banzambe oyo ebimaki sika, banzambe oyo bakoko na bino basambelaki te.
They sacrificed to devils and not to God: to gods whom they knew not: that were newly come up, whom their fathers worshipped not.
18 Bobosanaki Libanga oyo ebotaki bino mpe bomonaki pamba Nzambe oyo apesaki bino bomoi.
Thou hast forsaken the God that beget thee, and hast forgotten the Lord that created thee.
19 Yawe amonaki likambo oyo mpe abwakaki bango, pamba te bana na bango ya mibali mpe ya basi bapesaki Ye kanda.
The Lord saw, and was moved to wrath: because his own sons and daughters provoked him.
20 Alobaki: « Nakobombela bango elongi na Ngai, mpe nakotala ndenge nini suka na bango ekozala, pamba te bazali molongo ya bato mabe, bana bazanga boyengebene.
And he said: I will hide my face from them, and will consider what their last end shall be: for it is a perverse generation, and unfaithful children.
21 Bazwelaki Ngai mbanda oyo azali ata nzambe te, batumbolaki kanda na Ngai likolo ya biloko oyo ekoki kutu kozala ata banzambe ya bikeko te. Boye, Ngai mpe nakosala ete bango mpe bayokela oyo ezali ata ekolo te zuwa; nakosala ete ekolo moko ya bazoba epesa bango kanda.
They have provoked me with that which was no god, and have angered me with their vanities: and I will provoke them with that which is no people, and will vex them with a foolish nation.
22 Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto, mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi, ekotumba mabele, bambuma na yango mpe miboko ya bangomba. (Sheol h7585)
A fire is kindled in my wrath, and shall burn even to the lowest hell: and shall devour the earth with her increase, and shall burn the foundations of the mountains. (Sheol h7585)
23 Nakobakisela bango pasi likolo ya pasi, nakobwakela bango makonga na Ngai.
I will heap evils upon them, and will spend my arrows among them.
24 Nakotindela bango nzala makasi, bokono oyo esalaka nzoto moto-moto mpo ete esilisa bango, mpe etumbu oyo ekoboma bango. Nakotindela bango minu ya banyama ya zamba, ngenge ya nyoka oyo etambolaka na libumu.
They shall be consumed with famine, and birds shall devour them with a most bitter bite: I will send the teeth of beasts upon them, with the fury of creatures that trail upon the ground, and of serpents.
25 Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana; kati na bandako na bango, somo ekokonza; bilenge mibali mpe bilenge basi, bana mike mpe bampaka, bango nyonso bakokufa.
Without, the sword shall lay them waste, and terror within, both the young man and the virgin, the sucking child with the man in years.
26 Nalobaki: Nakopanza bango mpe nakosala ete bato babosana bango.
I said: Where are they? I will make the memory of them to cease from among men.
27 Kasi nazali kobanga ete banguna bafinga Ngai mpe bayini na bango bamikosa te na koloba: ‹ Tolongaki na makasi na biso moko, Yawe asalaki eloko moko te. › »
But for the wrath of the enemies I have deferred it: lest perhaps their enemies might be proud, and should say: Our mighty hand, and not the Lord, hath done all these things.
28 Bato oyo bazali ekolo ezanga mayele, bazali na bososoli te kati na bango.
They are a nation without counsel, and without wisdom.
29 Soki kaka bazalaki bato ya bwanya, balingaki kososola likambo oyo mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala!
O that they would be wise and would understand, and would provide for their last end.
30 Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko, to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomi soki Libanga na bango atekaki bango te to soki Yawe asundolaki bango te?
How should one pursue after a thousand, and two chase ten thousand? Was it not, because their God had sold them, and the Lord had shut them up?
31 Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te; bango moko banguna na biso bayebi yango.
For our God is not as their gods: our enemies themselves are judges.
32 Bilanga na bango ya vino ewuti na bilanga ya vino ya Sodome mpe na bilanga ya Gomore. Bambuma na bango etondi na ngenge, mpe maboke ya bambuma na bango ezali bololo.
Their vines are of the vineyard of Sodom, and of the suburbs of Gomorrha: their grapes are grapes of gall, and their clusters most bitter.
33 Vino na bango ezali ngenge ya banyoka, ngenge ya etupa, ngenge oyo ebomaka.
Their wine is the gall of dragons, and the venom of asps, which is incurable.
34 « Boni, ebombami epai na Ngai te? Ekangami te lokola elembo na bomengo na Ngai?
Are not these things stored up with me, and sealed up in my treasures?
35 Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »
Revenge is mine, and I will repay them in due time, that their foot may slide: the day of destruction is at hand, and the time makes haste to come.
36 Yawe akosambisa bato na Ye, mpe akoyokela basali na Ye mawa; tango akomona ete makasi na bango esili, mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko te oyo bakoki kokanga to kokangola.
The Lord will judge his people, and will have mercy on his servants: he shall see that their hand is weakened, and that they who were shut up have also failed, and they that remained are consumed.
37 Bongo akoloba: « Wapi banzambe na bango? Wapi libanga epai wapi babombamaki?
And he shall say: Where are their gods, in whom they trusted?
38 Wapi banzambe oyo ezalaki kolia mafuta ya bambeka na bango mpe komela makabo na bango ya vino? Tika ete etelema mpo na kosalisa bino mpe kopesa bino ebombamelo!
Of whose victims they ate the fat, and drank the wine of their drink offerings: let them arise and help you, and protect you in your distress.
39 Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe; mosusu azali te! Nabomaka mpe napesaka bomoi; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.
See ye that I alone am, and there is no other God besides me: I will kill and I will make to live: I will strike, and I will heal, and there is none that can deliver out of my hand.
40 Natomboli loboko na Ngai na likolo, mpe nalobi: Na Kombo na Ngai,
I will lift up my hand to heaven, and I will say: I live for ever.
41 tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai, mpe loboko na Ngai ekosimba yango mpo na kosambisa, nakozongisa mabe na mabe epai ya bayini na Ngai, mpe nakofuta ba-oyo balingaka Ngai te.
If I shall whet my sword as the lightning, and my hand take hold on judgment: I will render vengeance to my enemies, and repay them that hate me.
42 Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato, nakolangwisa makonga na Ngai na makila ya bato oyo babomi, ya bakangami mpe ya mito ya bakonzi ya banguna. »
I will make my arrows drunk with blood, and my sword shall devour flesh, of the blood of the slain and of the captivity, of the bare head of the enemies.
43 Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.
Praise his people, ye nations, for he will revenge the blood of his servants: and will render vengeance to their enemies, and he will be merciful to the land of his people.
44 Moyize ayaki mpe alobaki maloba nyonso ya nzembo oyo, mpe bato nyonso bazalaki koyoka ye; azalaki elongo na Oze, mwana mobali ya Nuni.
So Moses came and spoke all the words of this canticle in the ears of the people, and Josue the son of Nun.
45 Tango Moyize asilisaki koloba maloba oyo nyonso epai ya bana nyonso ya Isalaele,
And he ended all these words, speaking to all Israel.
46 alobaki na bango lisusu: « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo.
And he said to them: Set your hearts on all the words, which I testify to you this day: which you shall command your children to observe and to do, and to fulfill all that is written in this law:
47 Ezali maloba ya pamba te epai na bino, kasi ezali nde bomoi na bino. Ezali na nzela na yango nde bokozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »
For they are not commanded you in vain, but that every one should live in them, and that doing them you may continue a long time in the land whither you are going over the Jordan to possess it.
48 Na mokolo wana kaka, Yawe alobaki na Moyize:
And the Lord spoke to Moses the same day, saying:
49 « Mata na ngomba Abarimi, ngomba Nebo oyo ezali kati na Moabi mpe etalana na Jeriko; mpe tala mokili ya Kanana, mokili oyo nazali kopesa epai ya bana ya Isalaele lokola libula na bango.
Go up into this mountain Abarim, (that is to say, of passages, ) unto mount Nebo, which is in the land of Moab over against Jericho: and see the land of Chanaan, which I will deliver to the children of Israel to possess, and die thou in the mountain.
50 Okokufa na ngomba oyo okomata; mpe kuna, okokende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ndenge Aron, ndeko na yo ya mobali, akufaki na ngomba Ori mpe akutanaki na bakoko na ye,
When thou art gone up into it thou shalt be gathered to thy people, as Aaron thy brother died in mount Her, and was gathered to his people:
51 pamba te bino mibale botambolaki te na boyengebene liboso na Ngai, na miso ya bana ya Isalaele, na mayi ya Meriba, pembeni ya Kadeshi, kati na esobe ya Tsini, mpe bobatelaki te bosantu na Ngai kati na bana ya Isalaele.
Because you trespassed against me in the midst of the children of Israel, at the waters of contradiction in Cades of the desert of Sin: and you did not sanctify me among the children of Israel.
52 Yango wana okomona mokili yango kaka na mosika, okokota te na mokili oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. »
Thou shalt see the land before thee, which I will give to the children of Israel, but thou shalt not enter into it.

< Deteronomi 32 >