< Deteronomi 30 >

1 Maloba oyo nawuti koloba, mapamboli mpe bilakeli mabe oyo napesi yo mpo ete opona, ekokokisama. Soki obateli yango malamu na motema na yo kati na bikolo nyonso epai wapi Yawe, Nzambe na yo, akobengana yo;
Mais quand s'accompliront pour toi toutes ces paroles, la bénédiction et la malédiction que je mets devant toi, et que tu les rappelleras dans ton cœur au milieu de toutes les nations chez lesquelles l'Éternel, ton Dieu, t'aura banni,
2 soki ozongi epai na Yawe, Nzambe na yo; soki yo mpe bana na yo botosi Ye, na mitema mpe na milimo na bino mobimba, na makambo nyonso oyo natindi yo lelo,
et que tu reviendras à l'Éternel, ton Dieu, et obéiras à sa voix en tout ce que je te prescris aujourd'hui, toi et tes fils, de tout ton cœur et de toute ton âme,
3 Yawe, Nzambe na yo, akoyokela yo mawa: akozongisa bato na yo, oyo bakendeki na bowumbu mpe akosangisa bino lisusu wuta na bikolo nyonso epai wapi apanzaki bino.
alors l'Éternel, ton Dieu, ramènera tes captifs et prendra pitié de toi, et de nouveau vous recueillera du milieu de tous les peuples, où l'Éternel, ton Dieu, t'aura disséminé.
4 Atako bokendeki na bamboka ya mosika kati na mokili, Yawe, Nzambe na bino, akoluka kosangisa bino longwa kuna mpe akozongisa bino.
Quand tes exilés seraient à l'extrémité de l'horizon, de là l'Éternel, ton Dieu, te recueillera, et de là Il te retirera.
5 Yawe, Nzambe na bino, akomema bino na mokili ya bakoko na bino, mpe bokozwa yango; akosalela bino bolamu mpe akokomisa bino ebele koleka bakoko na bino.
Et l'Éternel, ton Dieu, te ramènera dans le pays possédé par tes pères et possédé par toi, et Il te fera du bien et te rendra plus nombreux que tes pères.
6 Yawe, Nzambe na bino, akobulisa mitema na bino mpe mitema ya bakitani na bino mpo ete bolinga Ye na mitema mpe na milimo na bino mobimba, mpe mpo ete bozala na bomoi.
Et l'Éternel, ton Dieu, circoncira ton cœur, et le cœur de ta race pour que tu aimes l'Éternel, ton Dieu, de tout ton cœur et de toute ton âme, afin que tu vives.
7 Yawe, Nzambe na bino, akotia bilakeli nyonso ya mabe likolo ya banguna na bino, oyo bayinaka bino mpe banyokolaka bino.
Et l'Éternel, ton Dieu, rejettera toutes ces malédictions sur tes ennemis et sur les adversaires qui te persécutent.
8 Bokotosa lisusu Yawe mpe bokosalela mitindo na Ye nyonso oyo nazali kopesa bino lelo.
De ton côté tu reviendras à obéir à la voix de l'Éternel, et à pratiquer tous ses commandements que je te prescris en ce jour.
9 Bongo Yawe, Nzambe na bino, akosala ete bomona bolamu kati na misala nyonso ya maboko na bino, mpe akopesa bino bana ebele, bibwele ebele mpe bambuma ebele kati na mokili na bino. Yawe akosepela na bino lisusu mpe akosalela bino bolamu, ndenge kaka asepelaki na bakoko na bino,
Et l'Éternel, ton Dieu, accompagnera de l'abondance tout le travail de tes mains, la fécondité de tes flancs, la fécondité de ton bétail et la fécondité de ton sol, pour te faire prospérer, car l'Éternel retrouvera sa joie dans ton bonheur, comme Il trouvait sa joie dans celui de tes pères;
10 soki botosi Yawe, Nzambe na bino, mpe bobateli mitindo mpe bikateli na Ye, oyo ekomama kati na buku oyo ya Mobeko, mpe soki bozongi epai na Yawe, Nzambe na bino, na mitema mpe na milimo na bino mobimba.
pourvu que tu obéisses à la voix de l'Éternel, ton Dieu, en gardant ses commandements et ses statuts consignés dans ce livre de la Loi; pourvu que tu reviennes à l'Éternel, ton Dieu, de tout ton cœur et de toute ton âme.
11 Makambo oyo nazali kotinda yo lelo, ezali penza pasi te mpe elekeli yo te na makasi.
Car ce commandement que je te prescris en ce jour, ne passe point ta portée, et n'est pas à grande distance;
12 Ezali te kati na Likolo mpo ete okoka kotuna: « Nani akomata kuna na Likolo mpo na kozwela ngai yango mpe kosakolela ngai yango mpo ete nakoka kotosa yango? »
il n'est pas au ciel pour que tu dises: Qui montera pour nous au ciel et nous l'en rapportera, et nous l'exposera pour que nous l'accomplissions?
13 Ezali te na ngambo mosusu ya ebale monene mpo ete okoka kotuna: « Nani akokatisa ebale monene mpo na kokamata yango mpe kosakolela ngai yango, mpo ete nakoka kotosa yango? »
Il n'est pas au delà de la mer, pour que tu dises: Qui traversera pour nous la mer et nous l'en rapportera, et nous l'exposera pour que nous l'accomplissions?
14 Te, liloba yango ezali pene na yo, ezali kati na monoko na yo mpe kati na motema na yo, mpo ete okoka kotosa yango.
Mais cette parole est tout près de toi, dans ta bouche et dans ton cœur pour que tu l'accomplisses.
15 Tala, nasili kotia lelo, liboso na yo, bomoi mpe bolamu, kufa mpe mabe.
Vois! j'ai mis aujourd'hui devant toi la vie et le bien, la mort et le mal,
16 Tala likambo oyo Ngai natindi yo lelo: linga Yawe, Nzambe na yo, tambola na banzela na Ye mpe batela mitindo na Ye, bikateli na Ye mpe mibeko na Ye. Bongo okozala na bomoi, mpe bokokoma ebele; mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa.
en te prescrivant aujourd'hui d'aimer l'Éternel, ton Dieu, de marcher dans ses voies et de garder ses commandements et ses statuts et ses lois, afin que tu vives et t'accroisses et que l'Éternel, ton Dieu, te bénisse dans le pays dont tu viens faire la conquête.
17 Kasi soki motema na yo epengwi mpe otosi te, soki okosami na kogumbamela banzambe mosusu mpe na kosambela yango,
Mais si ton cœur se détourne et si tu désobéis, et si tu te laisses aller à adorer d'autres dieux et à les servir,
18 nalobi na yo, na mokolo ya lelo, ete okobebisama solo, okowumela lisusu te kati na mokili oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi bokokota mpo na kozwa.
je vous déclare aujourd'hui que vous êtes perdus; vous n'aurez pas de longs jours dans le pays dont après le passage du Jourdain tu viens faire la conquête.
19 Na mokolo ya lelo, nazwi likolo mpe se lokola batatoli mpo na yo: nasili kotia liboso na yo bomoi mpe kufa, mapamboli mpe bilakeli mabe. Sik’oyo, pona bomoi mpo ete yo mpe bana na yo bozala na bomoi.
J'en prends aujourd'hui à témoin contre vous les Cieux et la terre: j'ai mis devant toi la vie et la mort, la bénédiction et la malédiction; choisis donc la vie afin que tu vives, toi et ta race,
20 Mpe pona kolinga Yawe, Nzambe na yo, koyoka mongongo na Ye mpe kokangama na Ye, pamba te azali bomoi na yo mpe akopesa yo mibu ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na yo —Abrayami, Izaki mpe Jakobi.
en aimant l'Éternel, ton Dieu, en obéissant à sa voix, en t'attachant à lui (car Il est ta vie et prolongera tes jours), en demeurant dans le pays que l'Éternel a juré à tes pères, à Abraham, à Isaac et à Jacob, de leur donner.

< Deteronomi 30 >