< Deteronomi 29 >

1 Tala maloba ya boyokani oyo Yawe atindaki Moyize kosala elongo na bana ya Isalaele na etando ya Moabi, na likolo ya boyokani oyo asalaki na bango na ngomba Orebi.
Вот слова завета, который Господь повелел Моисею поставить с сынами Израилевыми в земле Моавитской, кроме завета, который Господь поставил с ними на Хориве.
2 Moyize abengisaki bana nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango: « Miso na bino emonaki makambo nyonso oyo Yawe asalaki na Ejipito epai ya Faraon, epai ya basali na ye nyonso mpe kati na mokili na ye mobimba.
И созвал Моисей всех сынов Израилевых и сказал им: вы видели все, что сделал Господь пред глазами вашими в земле Египетской с фараоном и всеми рабами его и всею землею его;
3 Na miso na bino moko, bomonaki komekama monene, bilembo minene mpe bikamwa.
те великие казни, которые видели глаза твои, и те великие знамения и чудеса, руку крепкую и мышцу простертую;
4 Kasi kino na mokolo ya lelo, Yawe apesaki bino te mayele mpo na kososola to miso mpo na komona to matoyi mpo na koyoka.
но до сего дня не дал вам Господь Бог сердца, чтобы разуметь, очей, чтобы видеть, и ушей, чтобы слышать.
5 Na mibu tuku minei oyo Ngai Yawe nakambaki bino na esobe, bilamba na bino enzulukaki te mpe basandale na makolo na bino ekufaki te.
Сорок лет водил вас по пустыне, и одежды ваши на вас не обветшали, и обувь твоя не обветшала на ноге твоей;
6 Boliaki mapa te mpe bomelaki vino te to masanga mosusu oyo elangwisaka. Nasalaki yango mpo boyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
хлеба вы не ели и вина и сикера не пили, дабы вы знали, что Я Господь Бог ваш.
7 Tango bokomaki na esika oyo, Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe Ogi, mokonzi ya Bashani, bayaki kobundisa biso, kasi tolongaki bango.
И когда пришли вы на место сие, выступил против нас Сигон, царь Есевонский, и Ог, царь Васанский, чтобы сразиться с нами, и мы поразили их;
8 Tozwaki mokili na bango mpe topesaki yango lokola libula epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe epai ya ndambo ya libota ya Manase.
и взяли землю их и отдали ее в удел колену Рувимову и Гадову и половине колена Манассиина.
9 Bosalela malamu maloba ya boyokani oyo mpo ete bomona bolamu na makambo nyonso oyo bokosala.
Соблюдайте же все слова завета сего и исполняйте их, чтобы вам иметь успех во всем, что ни будете делать.
10 Bino nyonso, bokotelema lelo na miso ya Yawe, Nzambe na bino: bakambi na bino, bakonzi na bino ya masanga, bampaka na bino, bakonzi na bino ya basoda mpe bato mosusu kati na Isalaele
Все вы сегодня стоите пред лицем Господа Бога вашего, начальники колен ваших, старейшины ваши, судьи ваши, надзиратели ваши, все Израильтяне,
11 elongo na bana na bino mpe basi na bino mpe bapaya oyo bazali kati na milako na bino mpo na kobukela bino bakoni mpe kotokelaka bino mayi.
дети ваши, жены ваши и пришельцы твои, находящиеся в стане твоем, от секущего дрова твои до черпающего воду твою,
12 Botelemi awa mpo na kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe na bino; boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kosala elongo na bino, na mokolo ya lelo, na kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe,
чтобы вступить тебе в завет Господа Бога твоего и в клятвенный договор с Ним, который Господь Бог твой сегодня поставляет с тобою,
13 mpo na koyebisa bino, na mokolo ya lelo, ete bozali bato na Ye, mpe Ye azali Nzambe na bino ndenge alakaki yango, na nzela ya ndayi, epai na bino mpe bakoko na bino —Abrayami, Izaki mpe Jakobi.
дабы соделать тебя сегодня Его народом, и Ему быть тебе Богом, как Он говорил тебе и как клялся отцам твоим Аврааму, Исааку и Иакову.
14 Yawe azali kosala boyokani oyo, na nzela ya ndayi esangana na bilakeli mabe, elongo na bino kaka te,
Не с вами только одними я поставляю сей завет и сей клятвенный договор,
15 kasi mpe elongo na ba-oyo bazali awa kati na biso, na mokolo ya lelo, liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mpe elongo na ba-oyo bazali awa te elongo na biso.
но как с теми, которые сегодня здесь с нами стоят пред лицем Господа Бога нашего, так и с теми, которых нет здесь с нами сегодня.
16 Bino moko boyebi ndenge nini tozalaki na Ejipito mpe ndenge nini tokatisaki bamboka oyo tolekaki.
Ибо вы знаете, как мы жили в земле Египетской и как мы проходили посреди народов, чрез которые вы прошли,
17 Bomonaki kati na bango biloko na bango ya mbindo, banzambe ya bikeko basala na libaya, na libanga, na palata mpe na wolo.
и видели мерзости их и кумиры их, деревянные и каменные, серебряные и золотые, которые у них.
18 Bosala keba ete, na mokolo ya lelo, mobali moko te, mwasi moko te, etuka moko te to libota moko te epengwa na nzela ya Yawe, Nzambe na biso, mpo na kokende kogumbamela banzambe wana ya bikeko. Bosala keba ete, kati na bino, ezala na mosisa moko te oyo ekobota ngenge ya bololo ya ndenge wana.
Да не будет между вами мужчины или женщины, или рода или колена, которых сердце уклонилось бы ныне от Господа Бога нашего, чтобы ходить служить богам тех народов; да не будет между вами корня, произращающего яд и полынь,
19 Sima na koyoka maloba oyo ya bilakeli, tika ete moto moko te kati na bino amipambola na koloba: ‹ Nakolonga na makambo na ngai nyonso atako natamboli kolanda baposa ya motema na ngai moko. › Pamba te, moto oyo akosala mabe oyo akomema moto oyo ayebi likambo te na libunga na ye.
такого человека, который, услышав слова проклятия сего, похвалялся бы в сердце своем, говоря: “я буду счастлив, несмотря на то, что буду ходить по произволу сердца моего”; и пропадет таким образом сытый с голодным;
20 Yawe akolimbisa ye te; kanda makasi na Ye mpe zuwa na Ye ekokweyela moto wana. Bilakeli nyonso ya mabe oyo ekomama kati na buku oyo ekokweyela ye mpe Yawe akolongola kombo na ye kati na mokili.
не простит Господь такому, но тотчас возгорится гнев Господа и ярость Его на такого человека, и падет на него все проклятие завета сего, написанное в сей книге закона, и изгладит Господь имя его из поднебесной;
21 Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko.
и отделит его Господь на погибель от всех колен Израилевых, сообразно со всеми проклятиями завета, написанными в сей книге закона.
22 Milongo ya bana na bino oyo ekoya sima na bino mpe bapaya oyo bakowuta na mikili ya mosika bakomona bitumbu oyo Yawe akokweyisela mokili wana.
И скажет последующий род, дети ваши, которые будут после вас, и чужеземец, который придет из земли дальней, увидев поражение земли сей и болезни, которыми изнурит ее Господь:
23 Mokili mobimba ekopela na moto ya sofolo mpe ekotonda na mungwa. Bakolona ata eloko moko te, eloko moko te ekobima mpe matiti ekobota te. Mokili yango ekobebisama ndenge Sodome mpe Gomore, Adima mpe Tseboyimi, ebebisamaki: bingumba oyo Yawe abebisaki na kanda na Ye ya makasi.
сера и соль, пожарище - вся земля; не засевается и не произращает она, и не выходит на ней никакой травы, как по истреблении Содома, Гоморры, Адмы и Севоима, которые ниспроверг Господь во гневе Своем и в ярости Своей.
24 Bikolo nyonso ekotuna: ‹ Mpo na nini Yawe asali likambo ya boye na mokili oyo? Mpo na nini kanda makasi boye? ›
И скажут все народы: за что Господь так поступил с сею землею? какая великая ярость гнева Его!
25 Mpe eyano ekozala: ‹ Esalemaki bongo, pamba te bato oyo babukaki boyokani oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, asalaki elongo na bango tango abimisaki bango na Ejipito.
И скажут: за то, что они оставили завет Господа Бога отцов своих, который Он поставил с ними, когда вывел их из земли Египетской,
26 Bakendeki kosambela banzambe mosusu mpe bagumbamelaki bango, banzambe oyo bayebaki te mpe oyo Ye apekisaki bango.
и пошли и стали служить иным богам и поклоняться им, богам, которых они не знали и которых Он не назначал им:
27 Yango wana, kanda ya Yawe epeli na mokili wana mpe amemi bilakeli mabe nyonso oyo ekomami na buku oyo, kati na mokili wana.
за то возгорелся гнев Господа на землю сию, и навел Он на нее все проклятия завета, написанные в сей книге закона,
28 Yawe apikolaki bango na mokili na bango na kanda na Ye ya makasi mpe na kotomboka na Ye ya makasi. Abwakaki bango na mokili mosusu ndenge ezali komonana lelo. ›
и извергнул их Господь из земли их в гневе, ярости и великом негодовании, и поверг их на другую землю, как ныне видим.
29 Makambo oyo ebombama ezali mpo na Yawe, Nzambe na biso; mpe makambo oyo emonisami ezali mpo na biso mpe bakitani na biso, mpo na tango nyonso, mpo ete tokoka kosalela maloba nyonso ya mibeko oyo. »
Сокрытое принадлежит Господу Богу нашему, а открытое - нам и сынам нашим до века, чтобы мы исполняли все слова закона сего.

< Deteronomi 29 >