< Deteronomi 27 >
1 Moyize mpe bampaka ya Isalaele bapesaki mitindo oyo epai ya bato: « Bobatela mitindo nyonso oyo nalingi kopesa bino lelo.
Et Moïse et les Anciens d'Israël intimèrent au peuple cet ordre: Gardez la totalité du commandement que je vous prescris en ce jour.
2 Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino, bokotelemisa ndambo ya mabanga minene mpe bokopakola yango pembe.
Au jour où vous passerez le Jourdain pour entrer dans le pays que l'Éternel, ton Dieu, te donne, tu érigeras de grandes pierres et les enduiras de chaux et
3 Bokokoma na likolo na yango, maloba nyonso ya mobeko tango bokosilisa kokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Nzambe na bino akopesa bino, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge kaka Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alakaki bino.
tu y graveras toutes les paroles de cette loi, quand tu seras passé, afin que tu parviennes au pays que l'Éternel, ton Dieu, te donne, pays découlant de lait et de miel, comme l'Éternel, Dieu de tes pères, te l'a promis.
4 Mpe tango bokosilisa kokatisa Yordani, bokotelemisa mabanga yango na ngomba Ebali ndenge natindi bino yango lelo, mpe bokopakola yango pembe.
Après le passage du Jourdain, vous ferez donc l'érection de ces pierres, que je vous ordonne aujourd'hui, sur le mont Ebal et vous les enduirez de chaux.
5 Kuna, bokotonga etumbelo ya mabanga mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokosalela ata esalelo moko te ya ebende.
Et tu bâtiras là un autel à l'Éternel, ton Dieu, et un autel de pierres sur lesquelles tu ne porteras pas le fer;
6 Bokotonga na mabanga balokota na bilanga etumbelo mpo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokobonza na likolo na yango bambeka ya kotumba.
c'est de pierres brutes que tu bâtiras l'Autel de l'Éternel, ton Dieu; et tu y offriras des holocaustes à l'Éternel, ton Dieu.
7 Na likolo ya etumbelo yango, bokobonza bambeka ya boyokani; bokolia yango kaka na esika wana mpe bokosepela na miso ya Yawe, Nzambe na bino.
Et tu feras des sacrifices pacifiques; et tu mangeras là et te réjouiras devant l'Éternel, ton Dieu;
8 Bokokoma na konguluta maloba nyonso ya mobeko oyo na likolo ya mabanga oyo botelemisi. »
et tu graveras sur les pierres toutes les paroles de cette Loi, en caractères nets.
9 Sima na yango, Moyize mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi balobaki na lisanga mobimba ya Isalaele: « Oh Isalaele, bovanda kimia mpe boyoka! Bokomi lelo libota ya Yawe, Nzambe na bino.
Alors Moïse et les Prêtres, les Lévites, parlèrent à tout Israël en ces termes: Israël, fais silence et sois-attentif! Aujourd'hui tu es devenu le peuple de l'Éternel, ton Dieu.
10 Botosa Yawe, Nzambe na bino, mpe bosalela mitindo mpe bikateli na Ye oyo nalingi kopesa bino lelo. »
Obéis donc à la voix de l'Éternel, ton Dieu, et pratique ses commandements et ses statuts que je te prescris aujourd'hui.
11 Kaka na mokolo wana, Moyize apesaki mitindo oyo epai na bato:
Et ce jour-là Moïse donna cet ordre au peuple:
12 « Tala mabota oyo ekotelema na ngomba Garizimi mpo na kopambola bato tango bokokatisa Yordani: libota ya Simeoni, ya Levi, ya Yuda, ya Isakari, ya Jozefi, mpe ya Benjame.
Ceux-ci se placeront, pour bénir le peuple, sur le mont Garizim, quand vous aurez passé le Jourdain: Siméon et Lévi et Juda et Issaschar et Joseph et Benjamin.
13 Mpe tala mabota oyo ekotelema na ngomba Ebali mpo na kolakela bato mabe: libota ya Ribeni, ya Gadi, ya Aseri, ya Zabuloni, ya Dani mpe ya Nefitali. »
Et ceux-ci se placeront, pour prononcer la malédiction, sur le mont Ebal: Ruben, Gad, et Asser et Zabulon, Dan et Nephthali.
14 Balevi bakoloba epai ya bana nyonso ya Isalaele maloba oyo na mongongo makasi:
Puis les Lévites prendront la parole et diront à tous les hommes d'Israël d'une voix élevée:
15 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosala nzambe ya ekeko na libanga, na nzete to na ebende banyangwisa na moto, mpo na kotia yango na esika ya sekele! Yawe amonaka lokola biloko ya nkele, banzambe ya bikeko oyo bato ya misala ya maboko basalaka! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
Maudit soit l'homme qui fait une image sculptée ou jetée en fonte, abomination de l'Éternel, œuvre de main d'artiste, et l'érige en secret. Et tout le peuple répondra et dira: Ainsi soit-il!
16 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosambwisa tata na ye to mama na ye! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
Maudit celui qui avilit son père et sa mère. Et tout le peuple dira: Ainsi soit-il!
17 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akopusa libanga oyo batie lokola mondelo na mabele ya moninga na ye! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
Maudit celui qui déplace la borne de son prochain. Et tout le peuple dira: Ainsi soit-il!
18 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokamba mokufi miso na nzela ya mabe. » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
Maudit celui qui fourvoie l'aveugle en chemin. Et tout le peuple dira: Ainsi soit-il!
19 « Alakelama mabe moto nyonso oyo akokata makambo na ndenge ya mabe mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
Maudit celui qui fait plier le droit de l'étranger, de l'orphelin et de la veuve. Et tout le peuple dira: Ainsi soit-il!
20 « Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye, pamba te asambwisi mbeto ya tata na ye! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
Maudit celui qui partage le lit de la femme de son père; car il a soulevé la couverture de son père. Et tout le peuple dira: Ainsi soit-il!
21 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
Maudit celui qui a commerce avec un animal quelconque. Et tout le peuple dira: Ainsi soit-il!
22 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na ndeko na ye ya mwasi, mwana ya tata na ye to mwana ya mama na ye! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
Maudit celui qui partage le lit de sa sœur, fille de son père ou fille de sa mère. Et tout le peuple dira: Ainsi soit-il!
23 « Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mama ya mwasi na ye! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
Maudit celui qui partage le lit de sa belle-mère. Et tout le peuple dira: Ainsi soit-il!
24 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nkuku! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
Maudit celui qui frappe son prochain clandestinement. Et tout le peuple dira: Ainsi soit-il!
25 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akozwa kanyaka mpo na koboma moto oyo ayebi likambo te! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
Maudit celui qui accepte des présents pour attenter à une vie, au sang innocent. Et tout le peuple dira: Ainsi soit-il!
26 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokokisa te mpe akotia te na misala, maloba ya mibeko oyo! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
Maudit celui qui ne met pas à effet les paroles de cette Loi pour la pratiquer. Et tout le peuple dira: Ainsi soit-il!