< Deteronomi 26 >
1 Tango bokokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, tango bokozwa yango mpe bokovanda kuna,
「你進去得了耶和華-你上帝所賜你為業之地居住,
2 moko na moko kati na bino akozwa ndambo ya bambuma ya liboso ya biloko nyonso oyo akozwa na mabele ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino; akotia yango na kitunga mpe akokende na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye.
就要從耶和華-你上帝賜你的地上將所收的各種初熟的土產取些來,盛在筐子裏,往耶和華-你上帝所選擇要立為他名的居所去,
3 Akoloba na Nganga-Nzambe oyo akozala na mosala na tango wana: « Natatoli lelo liboso ya Yawe, Nzambe na yo, ete nakomi na mokili oyo Yawe alakaki kopesa na bakoko na biso na nzela ya ndayi. »
見當時作祭司的,對他說:『我今日向耶和華-你上帝明認,我已來到耶和華向我們列祖起誓應許賜給我們的地。』
4 Nganga-Nzambe akozwa kitunga na maboko na ye mpe akokitisa yango liboso ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino.
祭司就從你手裏取過筐子來,放在耶和華-你上帝的壇前。
5 Bongo okoloba liboso ya Yawe, Nzambe na yo: « Koko na ngai azalaki moto ya Arami oyo azalaki koyengayenga; akendeki na Ejipito na bato moke, awumelaki kuna mpe akomaki ekolo monene, ekolo ya nguya mpe ya bato ebele.
你要在耶和華-你上帝面前說:『我祖原是一個將亡的亞蘭人,下到埃及寄居。他人口稀少,在那裏卻成了又大又強、人數很多的國民。
6 Kasi bato ya Ejipito banyokolaki biso, bayokisaki biso pasi mpe bapesaki biso misala makasi.
埃及人惡待我們,苦害我們,將苦工加在我們身上。
7 Boye togangaki epai na Yawe, Nzambe ya bakoko na biso. Wana ayokaki mingongo na biso, amonaki mawa, pasi mpe minyoko na biso;
於是我們哀求耶和華-我們列祖的上帝,耶和華聽見我們的聲音,看見我們所受的困苦、勞碌、欺壓,
8 Yawe abimisaki biso na Ejipito na somo makasi, na bilembo minene mpe na bikamwa, na nzela ya loboko na Ye ya nguya mpe esembolama.
他就用大能的手和伸出來的膀臂,並大可畏的事與神蹟奇事,領我們出了埃及,
9 Amemaki biso na esika oyo mpe apesaki biso mokili oyo, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.
將我們領進這地方,把這流奶與蜜之地賜給我們。
10 Sik’oyo oh Yawe, tala, namemi bambuma ya liboso ya mabele oyo opesaki ngai. » Sima na yango, okotia kitunga liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okogumbama liboso na Ye.
耶和華啊,現在我把你所賜給我地上初熟的土產奉了來。』隨後你要把筐子放在耶和華-你上帝面前,向耶和華-你的上帝下拜。
11 Boye, na biloko nyonso ya malamu oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo mpe bandeko na yo; okosepela na yango elongo na Balevi mpe bapaya oyo bazali kati na bino.
你和利未人,並在你們中間寄居的,要因耶和華-你上帝所賜你和你家的一切福分歡樂。
12 Na mobu nyonso ya misato, mobu ya eteni ya zomi, tango okosilisa kotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo okozwa, okopesa yango epai ya Balevi, epai ya bapaya, epai ya bana bitike mpe epai ya basi bakufisa mibali; mpo ete balia yango na bingumba na yo mpe batonda.
「每逢三年,就是十分取一之年,你取完了一切土產的十分之一,要分給利未人和寄居的,與孤兒寡婦,使他們在你城中可以吃得飽足。
13 Bongo okotatola maloba oyo epai na Yawe, Nzambe na yo: « Nalongolaki kati na ndako na ngai eteni ya bule mpe napesi yango epai ya Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kolanda makambo nyonso oyo otindaki ngai. Napengwaki te na mitindo na Yo mpe nabosanaki yango te.
你又要在耶和華-你上帝面前說:『我已將聖物從我家裏拿出來,給了利未人和寄居的,與孤兒寡婦,是照你所吩咐我的一切命令。你的命令我都沒有違背,也沒有忘記。
14 Naliaki ata eteni moko te ya bule tango nazalaki na matanga, nalongolaki eloko moko te kati na yango tango nazalaki mbindo mpe nabonzaki eloko moko te kati na yango epai ya bakufi. Natosaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe nasalaki makambo nyonso oyo otindaki ngai.
我守喪的時候,沒有吃這聖物;不潔淨的時候,也沒有拿出來,又沒有為死人送去。我聽從了耶和華-我上帝的話,都照你所吩咐的行了。
15 Tala wuta likolo, esika na Yo ya bule epai wapi ovandaka, mpe pambola Isalaele, bato na Yo, mpe mokili oyo opesaki biso ndenge olakaki yango epai ya bakoko na biso na nzela ya ndayi, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. »
求你從天上、你的聖所垂看,賜福給你的百姓以色列與你所賜給我們的地,就是你向我們列祖起誓賜我們流奶與蜜之地。』」
16 Lelo, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete osalela malamu bikateli mpe mibeko oyo; batela yango malamu na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba.
「耶和華-你的上帝今日吩咐你行這些律例典章,所以你要盡心盡性謹守遵行。
17 Lelo, ondimi ete Yawe azali Nzambe na yo; ndenge opesaki elaka ete okotosa Ye, okobatela mibeko na Ye nyonso mpe okosala makambo nyonso oyo Ye akotinda yo.
你今日認耶和華為你的上帝,應許遵行他的道,謹守他的律例、誡命、典章,聽從他的話。
18 Lelo mpe, Yawe andimi ete ozala ekolo na Ye penza, ndenge alakaki yo mpe ndenge apesaki yo mitindo ete otosa mibeko na Ye nyonso.
耶和華今日照他所應許你的,也認你為他的子民,使你謹守他的一切誡命,
19 Na bongo, Yawe, Nzambe na yo, akokomisa yo monene koleka bikolo nyonso oyo Ye akela; akopesa yo lokumu, nkembo na Kombo na Ye. Okozala libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na yo, ndenge alakaki yango.
又使你得稱讚、美名、尊榮,超乎他所造的萬民之上,並照他所應許的使你歸耶和華-你上帝為聖潔的民。」