< Deteronomi 25 >

1 Soki bato bazali kowelana, bakomema likambo na bango na esambiselo, mpe basambisi bakokata likambo yango: bakolongisa moto oyo ayebi likambo te mpe bakokweyisa moto oyo asali mabe.
If there is a controversy between men, and they come to judgment and the judges judge them, then they shall justify the righteous and condemn the wicked.
2 Bongo soki esengi ete babeta moto oyo asali mabe fimbu, basambisi bakolalisa ye na mabele mpe bakobetisa ye fimbu na miso na bango; bakobetisa ye motango ya bafimbu oyo ekoki na mabe oyo asali.
It shall be, if the wicked man is worthy to be beaten, that the judge shall cause him to lie down and to be beaten before his face, according to his wickedness, by number.
3 Kasi bakoki te kobeta ye bafimbu koleka tuku minei. Soki babeti ye fimbu koleka tuku minei, ndeko na bino akosambwa na miso na bino.
He may sentence him to no more than forty stripes. He shall not give more, lest if he should give more and beat him more than that many stripes, then your brother will be degraded in your sight.
4 Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma.
You shall not muzzle the ox when he treads out the grain.
5 Soki bandeko mibali bazali kovanda elongo, mpe moko kati na bango akufi kasi atiki mwana te, mwasi oyo akufisi mobali akoki te kobala na libota mosusu; semeki na ye asengeli kozwa ye na libala mpo na kokokisa epai na ye mokumba ya kisemeki.
If brothers dwell together, and one of them dies and has no son, the wife of the dead shall not be married outside to a stranger. Her husband’s brother shall go in to her, and take her as his wife, and perform the duty of a husband’s brother to her.
6 Mwana mobali ya liboso oyo mwasi yango akobota akozwa kombo ya ndeko mobali oyo akufa mpo ete kombo na ye ebunga te kati na Isalaele.
It shall be that the firstborn whom she bears shall succeed in the name of his brother who is dead, that his name not be blotted out of Israel.
7 Soki mobali yango aboyi kobala semeki na ye ya mwasi, semeki yango ya mwasi akokende epai ya bampaka, na ekuke ya engumba, mpe akoloba na bango: « Semeki na ngai aboyi kobatela kombo ya ndeko na ye kati na Isalaele, aboyi kokokisa mokumba na ye ya kisemeki epai na ngai. »
If the man doesn’t want to take his brother’s wife, then his brother’s wife shall go up to the gate to the elders, and say, “My husband’s brother refuses to raise up to his brother a name in Israel. He will not perform the duty of a husband’s brother to me.”
8 Boye, bampaka ya engumba wana bakobengisa mobali yango mpe bakoloba na ye. Soki akobi kaka koboya kobala semeki na ye,
Then the elders of his city shall call him, and speak to him. If he stands and says, “I don’t want to take her,”
9 semeki yango akopusana pembeni na ye na miso ya bampaka, akolongola ye lokolo moko ya sandale, akobwakela ye soyi na elongi, mpe akoloba na ye: « Tala ndenge basengeli kosala moto oyo aboyi kotonga ndako ya ndeko na ye ya mobali. »
then his brother’s wife shall come to him in the presence of the elders, and loose his sandal from off his foot, and spit in his face. She shall answer and say, “So shall it be done to the man who does not build up his brother’s house.”
10 Boye, kati na Isalaele, bakobanda kobenga bakitani ya moto wana « bana ya moto oyo balongola sandale. »
His name shall be called in Israel, “The house of him who had his sandal removed.”
11 Soki mibali bazali kobunda, bongo mwasi moko apusani mpo na kokangola mobali na ye na loboko ya moto oyo azali kobeta ye, mpe soki mwasi yango asemboli loboko na ye mpe akangi nzoto ya mibali ya moto oyo azali kobeta mobali na ye,
When men strive against each other, and the wife of one draws near to deliver her husband out of the hand of him who strikes him, and puts out her hand, and grabs him by his private parts,
12 bokokata loboko na ye. Bokoyokela ye mawa te.
then you shall cut off her hand. Your eye shall have no pity.
13 Okoki te kozala na bimekelo mibale ya kilo ekesana kati na saki na yo: moko eleki kilo mpe mosusu eleki pepele.
You shall not have in your bag diverse weights, one heavy and one light.
14 Okoki te kozala na ndako na yo na bikolo mibale ekesana mpo na kotanga na yango biloko: moko ya monene mpe mosusu ya moke.
You shall not have in your house diverse measures, one large and one small.
15 Osengeli kozala na bimekelo mpe bikolo ya kotangela ya malamu mpe ya sembo, mpo ete owumela mikolo ebele kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.
You shall have a perfect and just weight. You shall have a perfect and just measure, that your days may be long in the land which the LORD your God gives you.
16 Pamba te Yawe, Nzambe na yo, amonaka nkele, moto nyonso oyo asalaka makambo wana, moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo te.
For all who do such things, all who do unrighteously, are an abomination to the LORD your God.
17 Bobosana te makambo oyo bato ya Amaleki basalaki bino tango bobimaki na Ejipito:
Remember what Amalek did to you by the way as you came out of Egypt,
18 tango bolembaki nzoto mpe bosilaki makasi, babimelaki bino na pwasa na mobembo na bino mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki na sima; babangaki Nzambe te.
how he met you by the way, and struck the rearmost of you, all who were feeble behind you, when you were faint and weary; and he didn’t fear God.
19 Tango Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino bopemi liboso ya banguna nyonso oyo bazingeli bino kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa lokola libula, bosengeli koboma bato ya Amaleki mpo ete botikala lisusu te kokanisa bango kati na mokili. Bobosana te kosala likambo yango.
Therefore it shall be, when the LORD your God has given you rest from all your enemies all around, in the land which the LORD your God gives you for an inheritance to possess it, that you shall blot out the memory of Amalek from under the sky. You shall not forget.

< Deteronomi 25 >