< Deteronomi 23 >

1 Mobali moko te oyo baboma mokongo to balongola nzoto ya mibali akoki kokota na lisanga ya Yawe.
Ɔbarima a wɔasa no anaa wɔatwa ne barima atwene no mmma Awurade badwa ase.
2 Mwana makangu moko te to bakitani na ye bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi.
Wɔn a wɔyɛ mpena mma ne wɔn asefoɔ kɔsi awoɔ ntoatoasoɔ a ɛtɔ so edu no mmma Awurade badwa ase.
3 Moto moko te ya Amoni to ya Moabi to bakitani na bango bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi.
Amonfoɔ anaa Moabfoɔ anaa sɛ wɔn asefoɔ kɔsi awoɔ ntoatoasoɔ edu no mu biara mmma Awurade badwa ase.
4 Pamba te bayaki te koyamba bino na mapa mpe na mayi na nzela na bino tango bobimaki na Ejipito; mpe bazwaki Balami, mwana mobali ya Beori, moto ya Petori, wuta na mokili ya Mezopotami, mpo ete alakela bino mabe.
Saa aman yi annye mo, amma mo aduane anaa sɛ nsuo ɛberɛ a mofiri Misraim reba no. Mmom, wɔkɔbɔɔ Beor babarima Balaam a ɔfiri Petor a ɛwɔ Mesopotamia paa sɛ ɔmmɛdome mo.
5 Kasi Yawe, Nzambe na bino, ayokaki Balami te mpe abongolaki elakeli mabe lipamboli mpo na bino, pamba te Yawe, Nzambe na bino, alingi bino.
Nanso Awurade, mo Onyankopɔn, antie Balaam. Ɔdanee nnome no ma ɛyɛɛ nhyira maa mo, ɛfiri sɛ, Awurade mo Onyankopɔn dɔ mo.
6 Tango nyonso bokozala na bomoi, bokoki te kosala boyokani ya kimia elongo na bango.
Na sɛ mote ase yi, mommmoa Amonfoɔ ne Moabfoɔ ɛkwan biara so da biara da.
7 Bokoki te komona bato ya Edomi lokola bato ya mbindo, pamba te bazali bandeko na bino. Bokoki te komona bato ya Ejipito lokola bato ya mbindo, pamba te bovandaki kati na mokili na bango lokola bapaya.
Monnkyiri Edomfoɔ anaa Misraimfoɔ, ɛfiri sɛ, Edomfoɔ yɛ mo nuanom na motenaa Misraimfoɔ nso mu sɛ ahɔhoɔ.
8 Bakitani na bango, kobanda na molongo ya misato, nde bakoki kokota na lisanga ya Yawe.
Misraimfoɔ awoɔ ntoatoasoɔ mmiɛnsa a wɔne mo firii Misraim no bɛkɔ Awurade badwa ase.
9 Tango bokotonga milako mpo na kobundisa banguna na bino, bozala mosika na eloko nyonso oyo ezali mbindo.
Sɛ mokɔ ɔko de tia mo atamfoɔ a, montwe mo ho mfiri deɛ ɛho nte biara ho.
10 Soki mobali moko kati na bino azali mbindo, pamba te abimisaki mayi ya mibali na butu, asengeli kokende libanda ya molako mpe kovanda kuna.
Sɛ ɔbarima bi ho gu fi ɛsiane anadwo mu ahobaa a, ɛsɛ sɛ ɔfiri atenaeɛ hɔ kɔtena baabi ɛda mu no nyinaa.
11 Kasi na pokwa, na tango moyi elalaka, asengeli komisukola nzoto mpe kozonga na molako.
Ɛduru anwummerɛ a, ɛsɛ sɛ ɔdware na owia kɔtɔ a, ɔnsane mmra atenaeɛ hɔ.
12 Bokopona esika moko na libanda ya molako, mpo na kosala zongo.
Montwa baabi a mobɛgya mo anan wɔ asraafoɔ atenaeɛ hɔ.
13 Moto na moto, kati na bisalelo na ye, asengeli kozala na pawu ya moke mpo na kotimola mabele; mpe soki akei kosala zongo inene, akotimola mwa libulu mpe akokunda nyei na ye.
Mo mu biara mfa sofi nka ne nneɛma ho. Ɛberɛ biara a mobɛgya mo anan no, momfa sofi no ntu amena na monkata agyanan no so.
14 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, atambolaka kati na molako na bino mpo na kobatela bino mpe kokangola bino na maboko ya banguna na bino. Molako na bino esengeli kozala bule mpo ete akoka komona te eloko moko ya mbindo kati na bino mpe apesa bino mokongo te.
Ɛsɛ sɛ asraafoɔ atenaeɛ hɔ yɛ kronkron, ɛfiri sɛ, Awurade, mo Onyankopɔn, nam mo atenaeɛ no so bɔ mo ho ban, na moadi mo atamfoɔ so nkonim. Ɛnsɛ sɛ ɔhunu animguasedeɛ biara wɔ mo mu; sɛ ɛba saa a, ɔbɛdane nʼakyi akyerɛ mo.
15 Soki mowumbu ayei kobombama epai na yo, kozongisa ye te na maboko ya nkolo na ye.
Sɛ ɛba sɛ nkoa dwane firi wɔn wuranom nkyɛn na wɔba mo nkyɛn bɛgye wɔn ho dwanekɔbea a, mommpam wɔn mma wɔnnsane wɔn akyi.
16 Tika ete awumela epai na yo, na esika nyonso oyo alingi, mpe na engumba nyonso oyo aponi; konyokola ye te.
Momma wɔntena mo mu wɔ kuro biara a wɔpɛ so a monnnyɛ wɔn aniɛyaadeɛ.
17 Kati na bana ya Isalaele, azala mobali to mwasi, moko te asengeli komipesa na kindumba ya bule.
Ɛnsɛ sɛ Israelni barima anaa ɔbaa yɛ no ho hyiadan mu odwamanfoɔ.
18 Bosengeli te kokotisa na Tempelo ya Yawe, Nzambe na bino, lifuti ya mwasi ya ndumba to ya mobali ya ndumba, mpo na kokokisa ndayi ya lolenge nyonso, pamba te Yawe, Nzambe na bino, amonaka bango nyonso mibale nkele.
Mommfa afɔrebɔdeɛ anaa adenya bi a ɛfiri odwamanfoɔ nkyɛn, sɛ ɔyɛ ɔbarima anaa ɔbaa, mma Awurade mo Onyankopɔn fie, ɛfiri sɛ, ɛyɛ Awurade mo Onyankopɔn akyiwadeɛ.
19 Okoki te kozwa mileki epai ya ndeko na yo tango odefisi ye mosolo, bilei to eloko mosusu oyo ekoki kobota mileki.
Bosea a mobɔ mo yɔnko Israelni no, sɛ ɛyɛ sika, aduane anaa biribi foforɔ no, monnnye ho mfɛntom.
20 Okoki kozwa mileki epai ya mopaya, kasi epai ya ndeko na yo moto ya Isalaele te; mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala kati na mokili oyo bokokota mpo na kozwa.
Motumi gye bosea ho mfɛntom firi ahɔhoɔ nkyɛn, na ɛnyɛ Israelfoɔ nkyɛn, sɛdeɛ Awurade, mo Onyankopɔn, bɛhyira mo wɔ biribiara a moyɛ mu wɔ asase a morekɔ so akɔfa no.
21 Soki olapi ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, kowumela te mpo na kokokisa yango; noki te Yawe, Nzambe na yo, akotuna yo yango mpe ekozala lisumu mpo na yo.
Sɛ mohyɛ Awurade mo Onyankopɔn bɔ a, biribiara a mohyɛɛ no ho bɔ no, monyɛ no ntɛm so. Ɛfiri sɛ, Awurade, mo Onyankopɔn hwehwɛ sɛ, ɛbɔ a moahyɛ no no, mobɛdi so ntɛm so. Sɛ moanyɛ a, mobɛdi ho fɔ.
22 Kasi soki oboyi na yo kolapa ndayi, okomema ngambo te.
Nanso, sɛ moanhyɛ biribiara ho bɔ a, monyɛɛ bɔne biara.
23 Likambo nyonso oyo bibebu na yo ekobimisa, osengeli kosalela yango, pamba te olapaki ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, na monoko na yo moko mpe wuta na mokano ya motema na yo.
Na sɛ wo ara wofiri wo pɛ mu hyɛ bɔ a, hwɛ yie na di asɛm a woaka no so, ɛfiri sɛ, Awurade, mo Onyankopɔn na woahyɛ no bɔ no.
24 Soki okoti na elanga ya vino ya moninga na yo, okoki kolia bambuma nyonso oyo olingi, kasi kotia eloko moko te na kitunga na yo.
Wotumi di bobe aba dodoɔ biara wɔ wo yɔnko bobe turom nanso, mfa bi ngu kɛntɛn mu nkɔ.
25 Soki okoti na elanga ya ble ya moninga na yo, okoki kobuka ble na maboko, kasi kosalela mbeli te.
Saa ara na mobɛtumi de mo nsa apempan aburoo mmɛtem kakra wɔ mo yɔnko afuom, nanso ɛnsɛ sɛ mode sekan twa.

< Deteronomi 23 >