< Deteronomi 22 >

1 Soki omoni meme to ngombe ya ndeko na yo ezali koyengayenga, kotala yango pamba te, kasi kanga yango mpe zongisa yango epai ya nkolo na yango.
If you see your brother’s ox or sheep straying, you must not ignore it; be sure to return it to your brother.
2 Soki ndeko yango avandaka pembeni na yo te to oyebi ye te, mema yango na ndako na yo mpe bomba yango kino akoya koluka yango, bongo okozongisela ye yango.
If your brother does not live near you, or if you do not know who he is, you are to take the animal home to remain with you until your brother comes seeking it; then you can return it to him.
3 Okosala ndenge moko soki omoni ane ya ndeko na yo to kazaka na ye to eloko mosusu oyo ye abungisi. Kotala yango na pamba te.
And you shall do the same for his donkey, his cloak, or anything your brother has lost and you have found. You must not ignore it.
4 Soki omoni ane ya ndeko na yo to ngombe na ye ekweyi na nzela, kotala yango na pamba te; osalisa ndeko na yo mpo na kotelemisa yango.
If you see your brother’s donkey or ox fallen on the road, you must not ignore it; you must help him lift it up.
5 Mwasi akoki kolata bilamba ya mibali te to mpe mobali akoki te kolata bilamba ya basi, pamba te Yawe, Nzambe na bino, ayinaka moto nyonso oyo asalaka makambo ya ndenge wana.
A woman must not wear men’s clothing, and a man must not wear women’s clothing, for whoever does these things is detestable to the LORD your God.
6 Soki omoni zala ya ndeke pembeni ya nzela, ezala likolo ya nzete to na mabele, mpe mama ya ndeke evandeli bana to maki, kozwa te mama elongo na bana.
If you come across a bird’s nest with chicks or eggs, either in a tree or on the ground along the road, and the mother is sitting on the chicks or eggs, you must not take the mother along with the young.
7 Osengeli kozwa bana, kasi kotika mama ete ekende mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi molayi.
You may take the young, but be sure to let the mother go, so that it may be well with you and that you may prolong your days.
8 Tango okotonga ndako ya sika, kozanga te kotonga mir ya mokuse zingazinga ya motondo mpo ete omema ngambo ya makila te na ndako na yo soki moto akweyi likolo ya motondo.
If you build a new house, you are to construct a railing around your roof, so that you do not bring bloodguilt on your house if someone falls from it.
9 Kolona te lolenge mibale ya nkona na elanga na yo ya vino; noki te nyonso ekokoma bule: oyo okolona mpe bambuma ya elanga na yo ya vino.
Do not plant your vineyard with two types of seed; if you do, the entire harvest will be defiled —both the crop you plant and the fruit of your vineyard.
10 Okoki kosangisa te na libaya moko, ngombe mpe ane mpo na kobalola mabele.
Do not plow with an ox and a donkey yoked together.
11 Okoki kolata te bilamba oyo basala na bapwale ya meme mpe na lino.
Do not wear clothes of wool and linen woven together.
12 Okotia basinga na basonge minei ya elamba oyo okolata.
You are to make tassels on the four corners of the cloak you wear.
13 Soki mobali abali mwasi mpe, sima na kosangisa na ye nzoto, asepeli na ye lisusu te,
Suppose a man marries a woman, has relations with her, and comes to hate her,
14 alobi ete ezaleli ya mwasi yango ezali mabe, bongo apanzi ye sango ya mabe na koloba: « Nabalaki mwasi oyo, kasi tango nasangisi na ye nzoto, namoni ete ayebaki nzoto ya mibali, »
and he then accuses her of shameful conduct and gives her a bad name, saying, “I married this woman and had relations with her, but I discovered she was not a virgin.”
15 wana tata mpe mama ya mwana mwasi, basengeli kolakisa epai na bampaka, na bikuke ya engumba, bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na bango ya mwasi ayebaki nzoto nanu ya mibali te.
Then the young woman’s father and mother shall bring the proof of her virginity to the city elders at the gate
16 Tata ya mwana mwasi akoloba na bampaka: « Nabalisaki mwana na ngai ya mwasi na mobali oyo, kasi asepeli na ye lisusu te;
and say to the elders, “I gave my daughter in marriage to this man, but he has come to hate her.
17 amoni ete ezaleli ya mwana na ngai ya mwasi ezali malamu te, yango wana alobi: ‹ Mwana mwasi oyo ayebaki nzoto ya mibali. › Kasi tala bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na ngai ya mwasi ayebaki nanu nzoto ya mibali te. » Boye baboti ya mwana mwasi bakofungola elamba liboso ya bampaka ya engumba,
And now he has accused her of shameful conduct, saying, ‘I discovered that your daughter was not a virgin.’ But here is the proof of her virginity.” And they shall spread out the cloth before the city elders.
18 mpe bampaka ya engumba bakozwa mobali yango mpe bakopesa ye etumbu:
Then the elders of that city shall take the man and punish him.
19 bakofutisa ye lomande ya mbongo ya bibende ya palata, nkama moko, mpe bakopesa yango epai ya tata ya mwana mwasi, pamba te mobali oyo asambwisi elenge mwasi ya Isalaele oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe akokoba kozala mwasi na ye: akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye.
They are also to fine him a hundred shekels of silver and give them to the young woman’s father, because this man has given a virgin of Israel a bad name. And she shall remain his wife; he must not divorce her as long as he lives.
20 Kasi soki makambo oyo bafundeli ye ezali ya solo, mpe ezali ata na elamba moko te oyo ezali kotalisa ete ayebaki nanu nzoto ya mibali te,
If, however, this accusation is true, and no proof of the young woman’s virginity can be found,
21 esengeli bamema ye libanda ya ndako ya tata na ye, mpe kuna bato ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa: asalaki likambo ya soni kati na Isalaele na kosalaka kindumba tango azalaki na ndako ya tata na ye. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.
she shall be brought to the door of her father’s house, and there the men of her city will stone her to death. For she has committed an outrage in Israel by being promiscuous in her father’s house. So you must purge the evil from among you.
22 Soki bakangi mobali azali kosangisa nzoto na mwasi ya mobali mosusu, bango nyonso mibale basengeli kokufa. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na Isalaele.
If a man is found lying with another man’s wife, both the man who slept with her and the woman must die. You must purge the evil from Israel.
23 Soki kati na engumba mobali moko akutani na elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te bongo asangisi na ye nzoto, nzokande elenge mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye,
If there is a virgin pledged in marriage to a man, and another man encounters her in the city and sleeps with her,
24 bokomema bango mibale na ekuke ya engumba wana mpe kobamba bango mabanga kino bakokufa. Bokoboma mwana mwasi, pamba te azalaki kati na engumba kasi agangaki te mpo ete baya kosunga ye; bokoboma mobali, pamba te asangisaki nzoto na makasi na mwasi ya mobali mosusu. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.
you must take both of them out to the gate of that city and stone them to death—the young woman because she did not cry out in the city, and the man because he has violated his neighbor’s wife. So you must purge the evil from among you.
25 Soki mobali akoti na zamba na mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe asangisi na ye nzoto na makasi, nzokande mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye, kaka mobali oyo asali likambo wana nde asengeli kokufa.
But if the man encounters a betrothed woman in the open country, and he overpowers her and lies with her, only the man who has done this must die.
26 Bokosala likambo moko te epai ya mwana mwasi, pamba te asali lisumu moko te oyo ekoki komema ye na kufa. Likambo oyo ekokani na moto oyo abundisi moninga na ye mpe abomi ye.
Do nothing to the young woman, because she has committed no sin worthy of death. This case is just like one in which a man attacks his neighbor and murders him.
27 Pamba te mobali wana akutanaki na mwasi wana na zamba, mpe mwana mwasi wana akokaki koganga na ndenge nyonso alingi, kasi moto moko te akokaki komonana kuna mpo na kosunga ye.
When he found her in the field, the betrothed woman cried out, but there was no one to save her.
28 Soki mobali akutani na elenge mwasi, oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali te na mobali oyo alingi kobala ye, asangisi na ye nzoto na makasi, mpe bomoni bango;
If a man encounters a virgin who is not pledged in marriage, and he seizes her and lies with her, and they are discovered,
29 mobali wana asengeli kofuta mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano epai ya tata ya elenge mwasi, asengeli kobala elenge mwasi yango; pamba te asangisi na ye nzoto na makasi: akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye.
then the man who lay with her must pay the young woman’s father fifty shekels of silver, and she must become his wife because he has violated her. He must not divorce her as long as he lives.
30 Mwana mobali moko te akoki kobala mwasi ya tata na ye, noki te akosambwisa mbeto ya tata na ye.
A man is not to marry his father’s wife, so that he will not dishonor his father’s marriage bed.

< Deteronomi 22 >