< Deteronomi 21 >

1 Soki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa, bakuti moto akufa alali na elanga, bongo moto oyo abomaki ye ayebani te,
Lorsque, dans la terre que l'Éternel ton Dieu te donne pour la posséder, on trouvera un homme tué, étendu dans les champs, et qu'on ne saura pas qui l'a tué,
2 bampaka mpe basambisi na bino basengeli kobima mpo na komeka molayi, kobanda na esika oyo ebembe ezali kino na bingumba ya zingazinga,
Alors tes anciens et tes juges sortiront, et mesureront la distance depuis l'homme tué jusqu'aux villes qui sont autour de lui.
3 mpo na koyeba engumba oyo eleki pene. Bongo bampaka ya engumba yango bakozwa mwana ngombe ya mwasi oyo nanu basaleli mosala te mpe nanu bakangi ekangiseli na kingo te;
Puis les anciens de la ville la plus proche de l'homme tué prendront une jeune vache, dont on ne se soit point servi, qui n'ait point tiré au joug;
4 bakomema mwana ngombe yango ya mwasi na lubwaku oyo, kati na yango, basala nanu mosala ya bilanga te mpe balona nanu ata eloko moko te, na esika oyo mayi ezali kotiola. Ezali kuna nde bampaka bakobuka yango kingo.
Et les anciens de cette ville feront descendre la jeune vache vers un torrent permanent, près duquel on ne laboure ni ne sème; et là ils rompront la nuque à la jeune vache, dans le torrent.
5 Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, bakopusana; pamba te ezali bango nde Yawe, Nzambe na bino, apona mpo na kosala mosala na Ye, mpo na kopambola bato na Kombo na Yawe mpe mpo na kokata makambo tango nyonso kowelana mpe kozokisana ezali.
Et les sacrificateurs, fils de Lévi, s'approcheront; car l'Éternel ton Dieu les a choisis pour faire son service et pour bénir au nom de l'Éternel, et leur bouche doit décider de toute contestation et de toute blessure.
6 Bongo bampaka ya engumba yango bakosukola maboko na bango na likolo ya mwana ngombe ya mwasi oyo bakobuka kingo na lubwaku
Alors tous les anciens de cette ville, qui sont les plus voisins de l'homme tué, laveront leurs mains sur la jeune vache à laquelle on aura rompu la nuque dans le torrent;
7 mpe bakoloba: « Maboko na biso esopaki makila oyo te, mpe miso na biso emonaki te tango likambo yango esalemaki.
Et, prenant la parole, ils diront: Nos mains n'ont point répandu ce sang; et nos yeux ne l'ont point vu répandre.
8 Eh Yawe, ndima kolimbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, oyo osikolaki. Kotangela bango ngambo te ya makila ya moto oyo ayebi likambo te. » Boye, Yawe akolimbisa bango mpo na makila oyo etangaki.
Sois propice à ton peuple d'Israël que tu as racheté, ô Éternel! Et n'impute point le sang innocent à ton peuple d'Israël! Et le meurtre sera expié pour eux.
9 Na nzela wana nde bokolongola, kati na bino, ngambo ya kosopa makila ya moto oyo ayebi likambo te wana bokosala likambo ya bosembo na miso ya Yawe.
Et tu ôteras le sang innocent du milieu de toi, en faisant ce qui est droit aux yeux de l'Éternel.
10 Tango bokokende kobundisa banguna na bino, bongo Yawe, Nzambe na bino, akabi bango na maboko na bino mpe bokangi ndambo ya bato;
Quand tu iras à la guerre contre tes ennemis, et que l'Éternel ton Dieu les livrera entre tes mains, et que tu en emmèneras des prisonniers;
11 soki bomoni mwasi ya kitoko kati na bango mpe moko kati na bino asepeli na ye, akoki solo kobala ye.
Si tu vois parmi les prisonniers une belle femme, et qu'ayant conçu pour elle de l'affection, tu veuilles la prendre pour femme,
12 Boye mobali oyo asepeli kobala mwasi yango akokotisa ye kati na ndako na ye, mpe mwasi yango akomikokola suki ya moto na ye, akomikata manzaka na ye;
Tu la mèneras dans ta maison. Et elle se rasera la tête, et se coupera les ongles;
13 akotia pembeni bilamba oyo alataki tango bakangaki ye mpe akovanda na ndako ya mobali yango. Sima na ye kolela tata mpe mama na ye sanza mobimba, mobali yango akosangisa na ye nzoto mpe akokoma mobali na ye; bongo ye akokoma mwasi ya mobali yango.
Elle ôtera de dessus elle ses vêtements de captivité; elle demeurera dans ta maison, et pleurera son père et sa mère pendant un mois; puis tu viendras vers elle, et tu seras son mari, et elle sera ta femme.
14 Soki mobali asepeli lisusu na mwasi yango te, akotika ye kokende na esika nyonso oyo alingi; akoki te koteka ye to kokomisa ye lokola mowumbu, pamba te asambwisaki ye.
S'il arrive qu'elle ne te plaise plus, tu la renverras où elle voudra, et tu ne pourras pas la vendre pour de l'argent, ni la traiter en esclave, parce que tu l'auras humiliée.
15 Soki mobali azali na basi mibale, bongo alingaka moko koleka mosusu, mpe bango mibale baboteli ye bana, kasi mwana ya liboso azali mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te;
Quand un homme aura deux femmes, l'une aimée et l'autre haïe, et qu'elles lui auront enfanté des enfants, tant celle qui est aimée que celle qui est haïe, et que le fils aîné sera de celle qui est haïe;
16 tango akokabola bozwi na ye lokola libula epai ya bana na ye ya mibali; akoki te kokomisa mwana ya liboso, mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka koleka na esika ya mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te.
Lorsqu'il partagera à ses enfants ce qu'il aura, il ne pourra pas faire aîné le fils de celle qui est aimée, à la place du fils né le premier de celle qui est haïe.
17 Kasi akozwa mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te lokola mwana ya liboso mpe akopesa ye biteni mibale ya biloko nyonso oyo azali na yango. Mwana mobali wana azali elembo ya liboso ya bokasi ya tata na ye, boye asengeli kozwa makoki nyonso oyo ebongi na mwana ya liboso.
Mais il reconnaîtra le fils de celle qui est haïe pour le premier-né, en lui donnant une double portion de tout ce qui se trouvera lui appartenir; car il est les prémices de sa vigueur; le droit d'aînesse lui appartient.
18 Soki moto azali na mwana oyo azali moto makasi mpe motomboki, oyo atosaka te ezala tata to mpe mama na ye, mpe ayokelaka bango te ata soki bapesi ye etumbu,
Quand un homme aura un enfant pervers et rebelle, qui n'obéira point à la voix de son père, ni à la voix de sa mère, et qui, bien qu'ils l'aient châtié, ne veuille point les écouter,
19 tata mpe mama na ye bakokanga ye mpe bakomema ye epai ya bampaka na ekuke ya engumba na bango.
Son père et sa mère le prendront, et le mèneront aux anciens de sa ville, et à la porte du lieu de sa demeure;
20 Bakoloba na bampaka ya engumba: « Mwana na biso oyo azali moto makasi mpe motomboki, atosaka biso te, azali lokoso mpe molangwi masanga. »
Et ils diront aux anciens de sa ville: Voici notre fils qui est pervers et rebelle; il n'obéit point à notre voix; il est dissolu et ivrogne.
21 Boye bato nyonso ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino. Tango bana nyonso ya Isalaele bakoyoka yango, bakobanga.
Alors tous les hommes de sa ville le lapideront, et il mourra, et tu ôteras le méchant du milieu de toi, afin que tout Israël l'entende et craigne.
22 Soki moto asali mabe oyo esengi ete bapesa ye etumbu ya kufa, bongo badiembiki nzoto na ye na nzete,
Quand un homme aura commis un péché digne de mort, et qu'on le fera mourir, et que tu le pendras au bois,
23 ebembe na ye ekowumela te butu mobimba na nzete wana; bosengeli kokunda yango kaka na mokolo wana, pamba te moto nyonso oyo badiembiki na nzete azali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe. Bosengeli te kokomisa mbindo mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino lokola libula.
Son corps mort ne passera point la nuit sur le bois; mais tu ne manqueras point de l'ensevelir le jour même; car celui qui est pendu est malédiction de Dieu; et tu ne souilleras point la terre que l'Éternel ton Dieu te donne en héritage.

< Deteronomi 21 >