< Deteronomi 20 >

1 Tango bokokende kobundisa banguna na bino mpe bokomona bampunda, bashar mpe mampinga ya basoda ebele koleka oyo ya bino, bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, akozala elongo na bino.
When you go out to battle against your enemies, and see horses, and chariots, and a people more than you, be not afraid of them: for the LORD your God is with you, which brought you up out of the land of Egypt.
2 Tango bokobongama mpo na kokende na bitumba, Nganga-Nzambe asengeli koleka liboso ya mampinga mpe koloba na bango
And it shall be, when you are come near to the battle, that the priest shall approach and speak to the people,
3 maloba oyo: « Oh Isalaele, boyoka, awa bobongami lelo mpo na kokende na bitumba mpo na kobundisa banguna na bino; boyika mpiko! Bobanga te! Bolenga te! Bozala na somo te liboso ya banguna na bino.
And shall say to them, Hear, O Israel, you approach this day to battle against your enemies: let not your hearts faint, fear not, and do not tremble, neither be you terrified because of them;
4 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akotambola elongo na bino mpo na kobundela bino liboso ya banguna na bino mpe kopesa bino elonga. »
For the LORD your God is he that goes with you, to fight for you against your enemies, to save you.
5 Bakonzi ya basoda basengeli koloba na mampinga: « Ezali na moko kati na bino oyo awuti kotonga ndako ya sika mpe avandi nanu kuna te? Tika ete azonga na ndako na ye noki te akoki kokufa na bitumba, bongo moto mosusu akoya kovanda moto ya liboso na ndako yango.
And the officers shall speak to the people, saying, What man is there that has built a new house, and has not dedicated it? let him go and return to his house, lest he die in the battle, and another man dedicate it.
6 Ezali na moto oyo awuti kolona elanga ya vino mpe nanu abuki bambuma ya liboso te? Tika ete azonga na ndako na ye noki te akoki kokufa na bitumba, bongo moto mosusu akoya kozala moto ya liboso mpo na kobuka mbuma ya liboso na elanga na ye.
And what man is he that has planted a vineyard, and has not yet eaten of it? let him also go and return to his house, lest he die in the battle, and another man eat of it.
7 Ezali na moto oyo awuti kotuna mwasi na libala mpe abali nanu te? Tika ete azonga na ndako, noki te akoki kokufa na bitumba mpe moto mosusu akoya kobala mwasi oyo ye atunaki na libala. »
And what man is there that has betrothed a wife, and has not taken her? let him go and return to his house, lest he die in the battle, and another man take her.
8 Bakonzi ya basoda bakoloba lisusu: « Ezali na moto oyo azali kobanga to alembi nzoto? Tika ete azonga na ndako mpo ete alembisa te baninga na ye na bitumba. »
And the officers shall speak further to the people, and they shall say, What man is there that is fearful and fainthearted? let him go and return to his house, lest his brethren’s heart faint as well as his heart.
9 Bongo tango bakonzi ya basoda bakosilisa koloba na mampinga, bakopona bakonzi mpo na kokamba mampinga.
And it shall be, when the officers have made an end of speaking to the people that they shall make captains of the armies to lead the people.
10 Tango bokokende kobundisa engumba moko, boyebisa bato ya engumba yango ete bamipesa bango moko na maboko na bino na kimia.
When you come near to a city to fight against it, then proclaim peace to it.
11 Soki bandimi mpe bafungoli bikuke na bango, bokosalisa bato nyonso ya engumba wana misala makasi mpe bakosalela bino.
And it shall be, if it make you answer of peace, and open to you, then it shall be, that all the people that is found therein shall be tributaries to you, and they shall serve you.
12 Kasi soki baboyi kosala kimia elongo na bino mpe babundisi bino, bobundisa engumba wana.
And if it will make no peace with you, but will make war against you, then you shall besiege it:
13 Tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba engumba wana na maboko na yo, okoboma na mopanga bato nyonso oyo bazali kati na yango.
And when the LORD your God has delivered it into your hands, you shall smite every male thereof with the edge of the sword:
14 Kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba: basi, bana, bibwele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na engumba. Boye bokosalela bomengo ya bitumba oyo ekowuta epai ya banguna na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akokaba na maboko na bino.
But the women, and the little ones, and the cattle, and all that is in the city, even all the spoil thereof, shall you take to yourself; and you shall eat the spoil of your enemies, which the LORD your God has given you.
15 Ezali ndenge wana nde bokosala bingumba nyonso oyo ezali mosika na bino, bingumba oyo ezali te kati na mokili oyo bokozwa.
Thus shall you do to all the cities which are very far off from you, which are not of the cities of these nations.
16 Kasi mpo na bingumba ya bikolo oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo lokola libula, kotika ata eloko moko te na bomoi.
But of the cities of these people, which the LORD your God does give you for an inheritance, you shall save alive nothing that breathes:
17 Bebisa bango nyonso: bato ya Iti, bato ya Amori, bato ya Kanana, bato ya Perizi, bato ya Evi mpe bato ya Yebusi, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo
But you shall utterly destroy them; namely, the Hittites, and the Amorites, the Canaanites, and the Perizzites, the Hivites, and the Jebusites; as the LORD your God has commanded you:
18 mpo ete bateya yo te kosala makambo nyonso ya nkele oyo bango basalaka mpo na lokumu ya banzambe na bango; noki te okosala masumu liboso ya Yawe, Nzambe na yo.
That they teach you not to do after all their abominations, which they have done to their gods; so should you sin against the LORD your God.
19 Tango okobundisa engumba moko tango molayi mpo na kobotola yango, okoki kosimba epasola te mpo na kokata banzete ya engumba yango, pamba te okoki kolia bambuma na yango; kokata yango te. Boni, banzete ekomi bato mpo ete obundisa yango?
When you shall besiege a city a long time, in making war against it to take it, you shall not destroy the trees thereof by forcing an ax against them: for you may eat of them, and you shall not cut them down (for the tree of the field is man’s life) to employ them in the siege:
20 Kasi okoki nde kokata banzete oyo oyebi ete ebotaka mbuma te mpo na kosala na yango bibundeli kino engumba yango ekokweya.
Only the trees which you know that they be not trees for meat, you shall destroy and cut them down; and you shall build bulwarks against the city that makes war with you, until it be subdued.

< Deteronomi 20 >