< Deteronomi 2 >

1 Na sima, tobalukaki mpe tokendeki na esobe, na nzela ya ebale monene ya Barozo ndenge Yawe atindaki ngai, pamba te tobalukaki mikolo ebele zingazinga ya etuka ya ngomba Seiri.
Then we turned back and headed for the wilderness by way of the Red Sea, as the LORD had instructed me, and for many days we wandered around Mount Seir.
2 Yawe alobaki na ngai:
At this time the LORD said to me,
3 « Bowumeli mingi na kobaluka zingazinga ya etuka ya bangomba oyo; sik’oyo bokende na ngambo ya nor.
“You have been wandering around this hill country long enough; turn to the north
4 Pesa mitindo oyo epai ya bato: ‹ Bokomi pembeni ya koleka mokili ya bandeko na bino, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Bakobanga bino, kasi bozala mayele.
and command the people: ‘You will pass through the territory of your brothers, the descendants of Esau, who live in Seir. They will be afraid of you, so you must be very careful.
5 Bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango, ezala ata esika ya kotia lokolo na bino. Nasila kopesa, epai na Ezawu, etuka ya ngomba Seiri lokola libula na ye.
Do not provoke them, for I will not give you any of their land, not even a footprint, because I have given Mount Seir to Esau as his possession.
6 Bokofuta bango palata mpo na biloko oyo bokolia mpe mpo na mayi oyo bokomela.
You are to pay them in silver for the food you eat and the water you drink.’”
7 Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino na misala nyonso ya maboko na bino. Abateli bino na esobe oyo ya monene mibu tuku minei. Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino mpe bozangi eloko moko te. › »
Indeed, the LORD your God has blessed you in all the work of your hands. He has watched over your journey through this vast wilderness. The LORD your God has been with you these forty years, and you have lacked nothing.
8 Na sima, totikaki bandeko na biso, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Tobalukaki wuta na nzela ya Araba oyo ewuta na Eyilati mpe na Etsioni-Geberi, mpe tokendeki na nzela ya esobe ya Moabi.
So we passed by our brothers, the descendants of Esau, who live in Seir. We turned away from the Arabah road, which comes up from Elath and Ezion-geber, and traveled along the road of the Wilderness of Moab.
9 Yawe alobaki na ngai: « Bomona bato ya Moabi lokola banguna na bino te mpe bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango. Nasila kopesa mokili ya Ari lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »
Then the LORD said to me, “Do not harass the Moabites or provoke them to war, for I will not give you any of their land, because I have given Ar to the descendants of Lot as their possession.”
10 Bato ya Emimi nde bazalaki kovanda kuna na kala. Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe lokola bana ya Anaki.
(The Emites used to live there, a people great and many, as tall as the Anakites.
11 Bango mpe bazalaki komonana lokola bato ya Refayimi ndenge moko na bana ya Anaki. Kasi bato ya Moabi bazalaki kobenga bango bato ya Emimi.
Like the Anakites, they were also regarded as Rephaim, though the Moabites called them Emites.
12 Bato ya Ori mpe bazalaki kovanda na Seiri kasi bakitani ya Ezawu babenganaki bango. Babomaki bato ya Ori liboso na bango mpe bakomaki kovanda na bisika na bango ndenge kaka Isalaele asalaki mpo na mokili oyo Yawe apesaki bango lokola bozwi.
The Horites used to live in Seir, but the descendants of Esau drove them out. They destroyed the Horites from before them and settled in their place, just as Israel did in the land that the LORD gave them as their possession.)
13 Yawe alobaki: « Sik’oyo, botelema mpe bokatisa lubwaku ya Zeredi. » Boye totikaki lubwaku.
“Now arise and cross over the Brook of Zered.” So we crossed over the Brook of Zered.
14 Mibu tuku misato na mwambe elekaki wuta tango tolongwaki na Kadeshi-Barinea kino tokatisaki lubwaku ya Zeredi. Banda wana, molongo nyonso ya bato oyo babundaki bitumba bakufaki kati na molako ndenge Yawe alapaki ndayi mpo na bango.
The time we spent traveling from Kadesh-barnea until we crossed over the Brook of Zered was thirty-eight years, until that entire generation of fighting men had perished from the camp, as the LORD had sworn to them.
15 Loboko ya Yawe ebalukelaki bango kino asilisaki koboma bango nyonso kati na molako.
Indeed, the LORD’s hand was against them, to eliminate them from the camp, until they had all perished.
16 Tango bato ya suka kati na bato oyo bazalaki kobunda bitumba basilaki kokufa,
Now when all the fighting men among the people had died,
17 Yawe alobaki na ngai:
the LORD said to me,
18 « Lelo oyo, okokatisa Moabi mpe Ari.
“Today you are going to cross the border of Moab at Ar.
19 Tango okokoma na mokili ya bato ya Amoni, komona bango lokola banguna te mpe kobundisa bango te, pamba te nakopesa yo ata eteni moko te ya mabele kati na mokili ya bakitani ya bato ya Amoni. Nasilaki kopesa yango lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »
But when you get close to the Ammonites, do not harass them or provoke them, for I will not give you any of the land of the Ammonites. I have given it to the descendants of Lot as their possession.”
20 Mboka yango mpe emonanaki lokola mboka oyo bato ya Refayimi bazalaki kovanda. Kasi bato ya Amoni bazalaki kobenga bato ya Refayimi: bato ya Zamizumi.
(That too was regarded as the land of the Rephaim, who used to live there, though the Ammonites called them Zamzummites.
21 Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe kaka lokola bana ya Anaki. Kasi Yawe abomaki bango liboso ya bato ya Amoni. Bato ya Amoni babenganaki bato ya Zamizumi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango.
They were a people great and many, as tall as the Anakites. But the LORD destroyed them from before the Ammonites, who drove them out and settled in their place,
22 Yawe asalaki mpe ndenge wana mpo na bakitani ya Ezawu oyo bazalaki kovanda na Seiri tango abomaki bato ya Ori liboso na bango. Bakitani ya Ezawu babenganaki bato ya Ori mpe bakomaki kovanda na bisika na bango kino na mokolo ya lelo.
just as He had done for the descendants of Esau who lived in Seir, when He destroyed the Horites from before them. They drove them out and have lived in their place to this day.
23 Ezalaki mpe ndenge moko mpo na bato na Avi oyo bazalaki kovanda na mboka yango kino na Gaza. Bato ya Kafitori, oyo bawuta na mokili ya Kafitori, babomaki bato ya Avi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango.
And the Avvim, who lived in villages as far as Gaza, were destroyed by the Caphtorites, who came out of Caphtor and settled in their place.)
24 Yawe alobaki: « Botelema, bokende mpe bokatisa lubwaku ya Arinoni. Nakabi na maboko na bino, Sikoni, moto ya Amori mpe mokonzi na Eshiboni, elongo na mokili na ye. Bobanda kobundisa yango mpe bokamata yango.
“Arise, set out, and cross the Arnon Valley. See, I have delivered into your hand Sihon the Amorite, king of Heshbon, and his land. Begin to take possession of it and engage him in battle.
25 Lelo, nakosala ete mabota nyonso ya mokili ezala na somo mpe kobanga liboso na bino. Bakoyoka sango ya makambo oyo bokosala, bongo bakolenga mpe bakozanga kimia likolo na bino. »
This very day I will begin to put the dread and fear of you upon all the nations under heaven. They will hear the reports of you and tremble in anguish because of you.”
26 Wuta na esobe ya Kedemoti, natindaki bantoma epai ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, na maloba ya kimia.
So from the Wilderness of Kedemoth I sent messengers with an offer of peace to Sihon king of Heshbon, saying,
27 Nalobaki: « Tobondeli yo, tika biso tolekela na mokili na yo. Tokoleka kaka na nzela ya monene, tokobaluka te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to ya mobali.
“Let us pass through your land; we will stay on the main road. We will not turn to the right or to the left.
28 Okotekela biso biloko ya kolia mpe mayi ya komela na motuya ya palata. Kasi tika biso kaka toleka na makolo
You can sell us food to eat and water to drink in exchange for silver. Only let us pass through on foot,
29 ndenge bakitani ya Ezawu, oyo bavandaka na mokili ya Seiri, mpe bato ya Moabi, oyo bavandaka na Ari, basalelaki biso kino tokatisaki Yordani mpe tokotaki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso. »
just as the descendants of Esau who live in Seir and the Moabites who live in Ar did for us, until we cross the Jordan into the land that the LORD our God is giving us.”
30 Kasi Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, aboyaki kopesa biso nzela ya kolekela na mokili na ye, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akomisaki moto na ye makasi mpe motema na ye libanga, mpo na kokaba ye na maboko na bino ndenge asali lelo.
But Sihon king of Heshbon would not let us pass through, for the LORD your God had made his spirit stubborn and his heart obstinate, that He might deliver him into your hand, as is the case this day.
31 Bongo Yawe alobaki na ngai: « Tala, nabandi kokaba na maboko na bino Sikoni mpe mokili na ye. Banda kobotola yango mpe kamata yango. »
Then the LORD said to me, “See, I have begun to deliver Sihon and his land over to you. Now begin to conquer and possess his land.”
32 Tango Sikoni elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kobundisa biso na Yakatsi,
So Sihon and his whole army came out for battle against us at Jahaz.
33 Yawe, Nzambe na biso, akabaki ye na maboko na biso mpe tobomaki ye, bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso.
And the LORD our God delivered him over to us, and we defeated him and his sons and his whole army.
34 Bongo, tobotolaki bingumba na ye nyonso, tobukaki bingumba nyonso, tobomaki mibali, basi mpe bana nyonso; totikaki ata moto moko te.
At that time we captured all his cities and devoted to destruction the people of every city, including women and children. We left no survivors.
35 Kasi tomemaki mpo na biso: bibwele mpe bomengo ya bitumba oyo tokutaki na bingumba na bango.
We carried off for ourselves only the livestock and the plunder from the cities we captured.
36 Longwa na Aroeri oyo ezali na suka ya lubwaku ya Arinoni, mpe longwa na engumba oyo ezali kati na lubwaku kino na Galadi, ezalaki na engumba moko te oyo elekaki biso na makasi. Yawe, Nzambe na biso, apesaki biso yango nyonso.
From Aroer on the rim of the Arnon Valley, along with the city in the valley, even as far as Gilead, not one city had walls too high for us. The LORD our God gave us all of them.
37 Kasi bopusanaki te na mokili ya bato ya Amoni, na ngambo nyonso ya lubwaku ya Yaboki, na bingumba ya bangomba, mpe na bisika nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, apekisaki biso.
But you did not go near the land of the Ammonites, or the land along the banks of the Jabbok River, or the cities of the hill country, or any place that the LORD our God had forbidden.

< Deteronomi 2 >