< Deteronomi 19 >

1 Tango Yawe, Nzambe na bino, akobebisa bikolo oyo Ye akopesa bino mokili na bango, tango bokobengana bango mpe bokovanda na bamboka mpe na bandako na bango;
汝の神ヱホバこの國々の民を滅し絶ち汝の神ヱホバこれが地を汝に賜ふて汝つひにこれを獲その邑々とその家々に住にいたる時は
2 bokotia pembeni mpo na bino, bingumba misato oyo ezali na kati-kati ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa.
汝の神ヱホバの汝に與へて產業となさしめたまふ地の中に三の邑を汝のために區別べし
3 Bokosala kuna banzela mpe bokokabola na biteni misato, mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula mpo ete moto nyonso oyo akoboma moto akoka kokima kuna.
而して汝これに道路を開きまた汝の神ヱホバの汝に與へて產業となさしめたまふ地の全體を三の區に分ち凡て人を殺せる者をして其處に逃れしむべし
4 Tala makambo oyo ekoki kosala ete moto oyo abomi moninga na ye akoka kokima kuna mpo na kobikisa bomoi na ye: ezali tango abomi moninga na ye na nko te, moto oyo ayinaki te liboso.
人を殺せる者の彼處に逃れて生命を全うすべきその事は是のごとし即ち凡て素より惡むことも無く知ずしてその鄰人を殺せる者
5 Ndakisa: moto oyo akei na zamba elongo na moninga na ye mpo na kokata banzete; bongo na tango atomboli loboko na ye mpo na kokata nzete, ebende ya epasola elongwe na esimbelo na yango, ekweyeli moninga wana mpe ebomi ye: moto wana akoki kokima kati na moko ya bingumba wana mpo na kobikisa bomoi na ye.
例ば人木を伐んとてその鄰人とともに林に入り手に斧を執て木を斫んと撃おろす時にその頭の鐵柯より脱てその鄰人にあたりて之を死しめたるが如き是なり斯る人は是等の邑の一に逃れて生命を全うすべし
6 Soki bongo te, mobukanisi makila akolanda ye na kanda, akokanga ye mpe akoboma ye soki engumba ya kokimela ezali mosika mingi. Nzokande asengelaki kokufa te, pamba te ayinaki te liboso moto oyo asilaki koboma.
恐くは復仇する者心熱してその殺人者を追かけ道路長きにおいては遂に追しきて之を殺さん然るにその人は素より之を惡みたる者にあらざれば殺さるべき理あらざるなり
7 Yango wana, napesi bino mitindo ete botia pembeni bingumba misato mpo na bino.
是をもて我なんぢに命じて三の邑を汝のために區別べしと言り
8 Soki Yawe, Nzambe na bino, ayeisi monene mokili na bino ndenge alakaki epai na bakoko na bino na nzela ya ndayi mpe apesi bino mokili mobimba ndenge alakaki bango,
汝の神ヱホバ汝の先祖等に誓ひしごとく汝の境界を廣め汝の先祖等に與へんと言し地を盡く汝に賜ふにいたらん時
9 mpo ete bosili kotosa mibeko nyonso oyo napesi bino lelo, mibeko ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kotambola na banzela na Ye, wana bokobakisa lisusu bingumba misato na bingumba misato ya liboso.
即ち汝我が今日なんぢに命ずるこの一切の誡命を守りてこれを行なひ汝の神ヱホバを愛し恒にその道に歩まん時はこの三の外にまた三の邑を増加ふべし
10 Bosala bongo mpo ete makila ya moto oyo ayebi likambo te esopana te kati na mokili na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, soki te bokomema ngambo ya makila.
是汝の神ヱホバの汝に與へて產業となさしめたまふ地に辜なき者の血を流すこと無らんためなり斯せずばその血汝に歸せん
11 Kasi soki moto ayini moninga na ye mpe atieli ye motambo, abundisi ye mpe abomi ye na nko, bongo akimi kati na moko ya bingumba wana,
然どもし人その隣人を惡みて之を附覘ひ起かかり撃てその生命を傷ひて之を死しめ而してこの邑の一に逃れたる事あらば
12 bampaka ya engumba na ye bakolukisa ye, bakozongisa ye na engumba na ye mpe bakotika ye na maboko ya mobukanisi makila mpo ete aboma ye.
その邑の長老等人を遣て之を其處より曳きたらしめ復仇者の手にこれを付して殺さしむべし
13 Boyokela ye mawa te. Na nzela wana nde bokolongola kati na Isalaele mabe ya kosopa makila ya moto oyo ayebi likambo te, mpo ete bozala malamu.
汝かれを憫み視るべからず辜なき者の血を流せる咎をイスラエルより除くべし然せば汝に福祉あらん
14 Okoki te kopusa mondelo ya moninga na yo, mondelo oyo bato oyo bayaki liboso na yo na mabele na yo bakataki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango.
汝の神ヱホバの汝に與へて獲させたまふ地の中において汝が嗣ぐところの產業に汝の先人の定めたる汝の鄰の地界を侵すべからず
15 Litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kotalisa ete moto songolo abomaki moto to asalaki mabe. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.
何の惡にもあれ凡てその犯すところの罪は只一人の證人によりて定むべからず二人の證人の口によりまたは三人の證人の口によりてその事を定むべし
16 Soki motatoli ya lokuta atelemi mpo na kofunda moto mosusu ete moto wana abomi moto;
もし偽妄の證人起りて某の人は惡事をなせりと言たつること有ば
17 bato nyonso mibale oyo bazali kowelana bakotelema na miso ya Yawe liboso ya Banganga-Nzambe mpe basambisi oyo bazali kosala mosala kati na bino na tango wana.
その相爭ふ二人の者ヱホバの前に至り當時の祭司と士師の前に立べし
18 Basambisi basengeli koyekola likambo yango malamu penza. Mpe soki emonani ete motatoli akosi, apesi litatoli ya lokuta mpo na ndeko na ye;
然る時士師詳細にこれを査べ視るにその證人もし偽妄の證人にしてその兄弟にむかひて虚妄の證をなしたる者なる時は
19 bosala ye ndenge akanaki kosala ndeko na ye. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino.
汝兄弟に彼が蒙らさんと謀れる所を彼に蒙らし斯して汝らの中より惡事を除くべし
20 Tango bato oyo batikali bakoyoka yango, bakobanga mpe mabe ya lolenge oyo ekotikala lisusu kosalema te kati na bino.
然せばその遺れる者等聞て畏れその後かさねて斯る惡き事を汝らの中におこなはじ
21 Boyokela moto ya ndenge wana mawa te! Mobeko ezali: bomoi mpo na bomoi, liso mpo na liso, linu mpo na linu, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo.
汝憫み視ることをすべからず生命は生命眼は眼歯は歯手は手足は足をもて償はしむべし

< Deteronomi 19 >