< Deteronomi 14 >

1 Bozali bana ya Yawe, Nzambe na bino: Bokoki te komikata nzoloko mpe kokokola suki ya mito na bino soki moto akufi,
You are the children of the Lord your God. Don't mutilate yourselves or shave your forehead like pagans do when they mourn the dead,
2 pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali kati na mokili mpo ete bozala libota ya motuya mpo na Ye.
because you are a holy people who belong to the Lord your God. The Lord chose you as his special people out of all the nations on earth.
3 Bokoki te kolia ata eloko moko ya mbindo.
You must not eat anything repulsive.
4 Tala banyama oyo bokoki kolia: ngombe, meme, ntaba,
These are the animals that you are allowed to eat: cattle, sheep, goats,
5 mbuli, mboloko, pambi, ntaba ya zamba, meme ya zamba, mbita mpe mpakasa.
deer, gazelles, wild goats, antelopes, and mountain sheep.
6 Bokoki lisusu kolia nyama nyonso oyo ezali na litindi epasuka na kati-kati mpe ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu.
You can eat any animal that both has a divided hoof and also chews the cud.
7 Kasi, kati na banyama oyo ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati, tala banyama oyo bosengeli te kolia: shamo, mpanya ya matoyi milayi mpe mpanya ya zamba; pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati: ezali mbindo mpo na bino.
But you are not allowed to eat those that either chew the cud or have a divided hoof. This includes: camels, rabbits, and rock hyraxes. Even though they chew the cud, they don't have a divided hoof. You must treat them as unclean.
8 Nzokande ngulu ezali na litindi epasuka na kati-kati kasi ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu. Boye, ngulu ezali mbindo; bosengeli te kolia mosuni na yango to kosimba ebembe na yango.
The same applies to the pig. Even though it has a divided hoof, it does not chew the cud. So you must treat it as unclean. You must not eat its meat or touch its dead body.
9 Kati na bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi, bokoki kolia nyonso oyo ezali na binyanyeli mpe biteku.
When it comes to creatures that live in the water, you are allowed to eat anything that has fins and scales.
10 Kasi bokolia te nyonso oyo ezangi binyanyeli mpe biteku: ezali mbindo mpo na bino.
But you must not eat anything that does not have fins and scales. You must treat them as unclean.
11 Bokolia ndeke nyonso oyo ezangi mbindo.
You are allowed to eat any clean bird.
12 Kasi tala bandeke oyo bokolia te: mpongo, engondo, mpongo ya ebale monene,
But you must not eat the following: eagle, griffon vulture, bearded vulture,
13 kombekombe ya mwindo, bandeke ya lolenge nyonso oyo eliaka misuni, nzengo ya lolenge nyonso,
buzzard, kites, any kind of falcon,
14 bayanganga ya lolenge nyonso:
any member of the crow family,
15 maligbanga, kumu, ndeke ya ebale monene mpe bakombekombe ya lolenge nyonso.
tawny owl, long-eared owl, gulls, any kind of hawk,
16 Esulungutu, esulungutu ya monene, esulungutu ya pembe,
little owl, eagle owl, barn owl,
17 libeke, ndeke oyo eliaka misuni ya kopola, libata ya mayi,
desert owl, Egyptian vulture, fish owl,
18 nkoko, mokwela ya lolenge nyonso, kengele mpe lolema.
storks, any kind of heron, hoopoe, or bats.
19 Bokoki kolia te banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu, ezali mbindo mpo na bino.
All insects that fly are unclean to you; you must not eat them.
20 Nzokande, bokoki kolia nyonso oyo ezali na mapapu mpe ezangi mbindo.
But you are allowed to eat any clean animal that has wings.
21 Bokoki kolia te nyama oyo bokuti ya kokufa; bokopesa yango epai ya mopaya oyo azali kovanda kati na engumba na bino; ye akoki na ye kolia yango; soki te bokoki na bino koteka yango epai ya moleki nzela, pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokoki te kolamba mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele.
You must not eat any animal that dies. You can give it to a foreigner in your town, and they can eat it, or you can sell it to a foreigner. You, however, are a holy people who belong to the Lord your God. Don't cook a young goat in its mother's milk.
22 Mibu nyonso, bokotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo bilanga na bino ekobota.
Make sure you pay a tithe of every crop grown each year in your fields.
23 Na miso ya Yawe, Nzambe na bino, mpe na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokolia eteni ya zomi ya ble na bino, ya vino ya sika mpe ya mafuta, bana nyonso ya liboso ya bangombe na bino, ya bantaba na bino mpe ya bameme na bino. Na bongo, bokoyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino.
You are to eat a tenth of your grain, new wine, and olive oil, and the firstborn of your herds and flocks, in the presence of the Lord your God at the place he will choose to live with you, so that you will learn to always respect the Lord your God.
24 Kasi soki esika yango ezali mosika mingi mpo na yo komema eteni na yo ya zomi epai na Yawe, Nzambe na yo, pamba te esika oyo Yawe aponaki mpo na kotia Kombo na Ye ezali mosika mingi, wana Nzambe na yo apamboli yo,
However, if it's too far to carry all the tithe that the Lord your God has blessed you with, because the place where the Lord your God will choose to live with you is too distant,
25 okoteka eteni na yo ya zomi; bongo mbongo oyo okozwa, okokende na yango na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona.
then you can exchange it for money, take the money with you and go to the place the Lord your God will choose.
26 Okosalela mbongo yango mpo na kosomba eloko nyonso oyo olingi: ngombe, meme, ntaba, vino to masanga nyonso oyo elangwisaka to eloko nyonso oyo olingi. Bongo yo elongo na ndako na yo mobimba, bokoki kolia yango na esika wana, liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okosepela elongo na libota na yo.
Then you can spend the money on anything you like—cattle, sheep, wine, alcoholic drink, or anything else you want. Then you can have a feast there in the presence of the Lord your God and celebrate with your family.
27 Kobosana te Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpo ete bazali ata na eteni ya mabele te to libula mpo na bango moko.
Don't forget to take care of the Levites in your town, because they don't have any share in the allotment of land.
28 Na suka ya mibu misato nyonso, bokomema biteni ya zomi nyonso ya mibu wana mpe bokobomba yango na bingumba na bino.
At the end of every third year, collect a tenth of all your produce for that year and store it in your town.
29 Na bongo, Balevi oyo bazali na eteni ya mabele te to na libula te mpo na bango moko elongo na bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bavandaka na bingumba na bino, bakoya kolia mpe kotonda mpo ete Yawe, Nzambe na bino, akoka kopambola bino na misala na bino nyonso ya maboko.
This way the Levites (who don't have any share in the allotment of land), the foreigners, the orphans, and the widows in your town will be provided with what they need. The Lord your God will bless you in everything you do.

< Deteronomi 14 >