< Deteronomi 11 >

1 Boye, okolinga Yawe, Nzambe na yo, mpe okobatela tango nyonso malako na Ye, bikateli na Ye mpe mitindo na Ye.
ואהבת את יהוה אלהיך ושמרת משמרתו וחקתיו ומשפטיו ומצותיו כל הימים׃
2 Nazali koloba na bana na bino te oyo batikalaki te koyeba to komona nyonso wana, kasi na bino oyo bozali awa lelo ete bobosanaka te malako ya Yawe, Nzambe na bino, monene na Ye, nguya na Ye,
וידעתם היום כי לא את בניכם אשר לא ידעו ואשר לא ראו את מוסר יהוה אלהיכם את גדלו את ידו החזקה וזרעו הנטויה׃
3 bilembo mpe bikamwa oyo asalaki kati na Ejipito, epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe epai ya mokili na ye mobimba,
ואת אתתיו ואת מעשיו אשר עשה בתוך מצרים לפרעה מלך מצרים ולכל ארצו׃
4 makambo oyo asalaki na mampinga ya Ejipito, na bampunda mpe bashar na yango, ndenge azindisaki yango kati na Ebale monene ya barozo, tango ezalaki kolanda bino, mpe ndenge nini Yawe alimwisaki yango libela;
ואשר עשה לחיל מצרים לסוסיו ולרכבו אשר הציף את מי ים סוף על פניהם ברדפם אחריכם ויאבדם יהוה עד היום הזה׃
5 makambo oyo asalelaki bino kati na esobe kino bokoma na esika oyo,
ואשר עשה לכם במדבר עד באכם עד המקום הזה׃
6 makambo oyo asalaki na Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, na libota ya Ribeni, tango mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bandako na bango mpe bato nyonso oyo bazalaki sima na bango kati na Isalaele mobimba.
ואשר עשה לדתן ולאבירם בני אליאב בן ראובן אשר פצתה הארץ את פיה ותבלעם ואת בתיהם ואת אהליהם ואת כל היקום אשר ברגליהם בקרב כל ישראל׃
7 Ezali bino nde bato bomonaki na miso na bino moko makambo nyonso ya minene oyo Yawe asalaki.
כי עיניכם הראת את כל מעשה יהוה הגדל אשר עשה׃
8 Yango wana, bobatela mibeko nyonso oyo napesi bino lelo mpo ete bozala makasi mpe bokoka kobotola mokili oyo bolingi kokota mpo na kozwa
ושמרתם את כל המצוה אשר אנכי מצוך היום למען תחזקו ובאתם וירשתם את הארץ אשר אתם עברים שמה לרשתה׃
9 mpe kowumela mingi kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai ya bakitani na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.
ולמען תאריכו ימים על האדמה אשר נשבע יהוה לאבתיכם לתת להם ולזרעם ארץ זבת חלב ודבש׃
10 Mokili oyo ozali kokota mpo na kozwa ekokani te na mokili ya Ejipito epai wapi bowutaki. Kuna, bozalaki kolona bambuma mpe koyeisa mayi na bilanga na kosalaka banzela ya mayi na makolo na bino.
כי הארץ אשר אתה בא שמה לרשתה לא כארץ מצרים הוא אשר יצאתם משם אשר תזרע את זרעך והשקית ברגלך כגן הירק׃
11 Kasi mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa ezali mokili ya bangomba mpe ya mabwaku, mokili oyo mvula enokaka wuta na likolo.
והארץ אשר אתם עברים שמה לרשתה ארץ הרים ובקעת למטר השמים תשתה מים׃
12 Ezali mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, abatelaka; miso ya Yawe, Nzambe na yo, ezalaka tango nyonso likolo na yango wuta na ebandeli kino na suka ya mobu.
ארץ אשר יהוה אלהיך דרש אתה תמיד עיני יהוה אלהיך בה מרשית השנה ועד אחרית שנה׃
13 Soki bokotosa na boyengebene mibeko oyo napesi bino lelo ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kosalela Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba,
והיה אם שמע תשמעו אל מצותי אשר אנכי מצוה אתכם היום לאהבה את יהוה אלהיכם ולעבדו בכל לבבכם ובכל נפשכם׃
14 nakonokisa kati na mokili na bino mvula na tango na yango, mvula ya ebandeli ya eleko mpe mvula ya suka ya eleko, mpo ete bokoka kobuka mbuma ya malamu, bokoka kozwa vino ya sika mpe mafuta.
ונתתי מטר ארצכם בעתו יורה ומלקוש ואספת דגנך ותירשך ויצהרך׃
15 Nakokolisa matiti kati na bilanga mpo na bibwele na bino mpe bokolia mpe bokotonda.
ונתתי עשב בשדך לבהמתך ואכלת ושבעת׃
16 Bosala keba ete bokosama te mpe bopengwa te na kogumbamelaka banzambe mosusu mpe na kofukamelaka yango,
השמרו לכם פן יפתה לבבכם וסרתם ועבדתם אלהים אחרים והשתחויתם להם׃
17 noki te Yawe akosilikela bino, akokanga likolo mpo ete enokisa lisusu mvula te mpe mabele ekobota lisusu te mbuma na yango; na bongo bokolimwa kati na mokili ya malamu oyo Yawe apesi bino.
וחרה אף יהוה בכם ועצר את השמים ולא יהיה מטר והאדמה לא תתן את יבולה ואבדתם מהרה מעל הארץ הטבה אשר יהוה נתן לכם׃
18 Bobatela malamu kati na mitema mpe milimo na bino maloba na ngai oyo, bokanga yango na maboko na bino lokola bilembo, mpe botia yango na bilongi na bino lokola elembo.
ושמתם את דברי אלה על לבבכם ועל נפשכם וקשרתם אתם לאות על ידכם והיו לטוטפת בין עיניכם׃
19 Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki.
ולמדתם אתם את בניכם לדבר בם בשבתך בביתך ובלכתך בדרך ובשכבך ובקומך׃
20 Bokoma yango na makonzi ya bandako na bino mpe na bikuke na bino
וכתבתם על מזוזות ביתך ובשעריך׃
21 mpo ete mikolo na bino mpe mikolo ya bakitani na bino ezala ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela na ndayi tango nyonso oyo mokili ekowumela.
למען ירבו ימיכם וימי בניכם על האדמה אשר נשבע יהוה לאבתיכם לתת להם כימי השמים על הארץ׃
22 Soki bobateli malamu mibeko nyonso oyo napesi bino mpo na kosalela, na kolingaka Yawe, Nzambe na bino, na kotambolaka na banzela na Ye nyonso mpe na kokangamaka na Ye;
כי אם שמר תשמרון את כל המצוה הזאת אשר אנכי מצוה אתכם לעשתה לאהבה את יהוה אלהיכם ללכת בכל דרכיו ולדבקה בו׃
23 wana Yawe akobengana liboso na bino bikolo oyo nyonso, mpe bokobotola bikolo oyo eleki bino na monene mpe na makasi.
והוריש יהוה את כל הגוים האלה מלפניכם וירשתם גוים גדלים ועצמים מכם׃
24 Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene.
כל המקום אשר תדרך כף רגלכם בו לכם יהיה מן המדבר והלבנון מן הנהר נהר פרת ועד הים האחרון יהיה גבלכם׃
25 Moto moko te akolonga kotelemela bino. Ndenge Yawe Nzambe alakaki bino, akotia somo mpe kobanga kati na mokili mobimba, na esika nyonso oyo bokokende.
לא יתיצב איש בפניכם פחדכם ומוראכם יתן יהוה אלהיכם על פני כל הארץ אשר תדרכו בה כאשר דבר לכם׃
26 Tala, natie lelo liboso na bino mapamboli mpe bilakeli mabe.
ראה אנכי נתן לפניכם היום ברכה וקללה׃
27 Mapamboli, soki botosi mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, oyo napesi bino lelo;
את הברכה אשר תשמעו אל מצות יהוה אלהיכם אשר אנכי מצוה אתכם היום׃
28 bilakeli mabe, soki boboyi kotosa mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bopengwi na nzela oyo natindi bino lelo, na kosalelaka banzambe mosusu oyo bino botikalaki koyeba te.
והקללה אם לא תשמעו אל מצות יהוה אלהיכם וסרתם מן הדרך אשר אנכי מצוה אתכם היום ללכת אחרי אלהים אחרים אשר לא ידעתם׃
29 Tango Yawe, Nzambe na bino, akokotisa bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa, bosengeli kotatola mapamboli na ngomba Garizimi, mpe bilakeli mabe, na ngomba Ebali.
והיה כי יביאך יהוה אלהיך אל הארץ אשר אתה בא שמה לרשתה ונתתה את הברכה על הר גרזים ואת הקללה על הר עיבל׃
30 Bangomba nyonso mibale ezali na ngambo mosusu ya Yordani, ngambo ya weste, na mokili ya bato ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Yordani, etalana na Giligali, pembeni ya banzete minene ya More.
הלא המה בעבר הירדן אחרי דרך מבוא השמש בארץ הכנעני הישב בערבה מול הגלגל אצל אלוני מרה׃
31 Kala mingi te, bokokatisa Yordani mpo na kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino. Tango bokobotola yango mpe bokowumela kati na yango,
כי אתם עברים את הירדן לבא לרשת את הארץ אשר יהוה אלהיכם נתן לכם וירשתם אתה וישבתם בה׃
32 bosala keba ete botosa bikateli nyonso mpe mibeko nyonso oyo nazali kotia liboso na bino lelo.
ושמרתם לעשות את כל החקים ואת המשפטים אשר אנכי נתן לפניכם היום׃

< Deteronomi 11 >