< Deteronomi 1 >

1 Tala maloba oyo Moyize ayebisaki bana nyonso ya Isalaele na ngambo ya este ya Yordani kati na esobe, kati na etando Araba oyo etalana na Sufi, kati ya Parani mpe Tofeli, kati ya Labani, Atseroti mpe Di-Zaabi.
Estas son las palabras que Moisés dijo a todo Israel a este lado del Jordán, en el desierto de Araba, frente a Suf, entre Parán, por un lado, y Tofel, Labán, Hazerot y Dizahab, por el otro.
2 Esengaka mikolo zomi na moko ya mobembo wuta na Orebi kino na Kadeshi-Barinea, na nzela ya ngomba Seiri.
Es un viaje de once días desde Horeb por el camino del Monte Seir hasta Cades-Barnea.
3 Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na moko, na mobu ya minei, Moyize alobaki na bana ya Isalaele makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye na tina na bango.
Ahora, en el cuadragésimo año, el primer día del mes undécimo, Moisés dio a los hijos de Israel todas las órdenes que el Señor le había dado para ellos;
4 Makambo yango esalemaki sima na Moyize kolonga Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki koyangela wuta na Eshiboni, mpe sima na ye kolonga Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.
Después de vencer a Sihon, rey de los amorreos, reinando en Hesbón, y Og, rey de Basán, gobernando en Astarot, en Edrei.
5 Ezalaki na ngambo ya este ya Yordani, na mokili ya Moabi, nde Moyize alimbolaki mobeko oyo. Alobaki na bango:
Al otro lado del Jordán, en la tierra de Moab, Moisés le dio esta ley al pueblo diciendo:
6 « Yawe, Nzambe na biso, alobaki na biso, na ngomba Orebi: ‹ Bowumeli mpe mingi na ngomba oyo.
El Señor nuestro Dios nos dijo en Horeb: Ustedes han estado lo suficiente en esta montaña:
7 Bolongola molako mpe bokende kino na etuka ya bangomba ya bato ya Amori; bokende na bamboka nyonso oyo ezali pene ya Araba, na bangomba, na mboka ya se, na Negevi mpe pembeni-pembeni ya mayi monene, kati na mokili ya bato ya Kanana mpe na mokili ya Libani kino na Efrate, ebale monene.
Regresen ahora, y continúen su camino hacia la región montañosa de los amorreos y los lugares cercanos a ella, en Araba y la región montañosa y en los valles y en el Neguev junto al mar, todo la tierra de los cananeos, y el Líbano, hasta el gran río, el río Eufrates.
8 Tala, napesi bino mokili oyo. Bokota mpe bokamata mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino —Abrayami, Izaki, Jakobi— mpe bakitani na bango. › »
Miren, toda la tierra está delante de ustedes; entren y tomen posesión de la tierra que el Señor dio mediante un juramento a sus padres, Abraham, Isaac y Jacob, y a su descendencia después de ellos.
9 Na tango wana, nalobaki na bino: — Ngai moko nakokoka te kokamba bino.
En ese tiempo les dije: No puedo encargarme de ustedes yo solo;
10 Yawe, Nzambe na bino, akomisi bino ebele koleka mpe tala lelo motango na bino ekomi lokola minzoto na likolo.
El Señor su Dios los ha multiplicado, y ahora eres como las estrellas del cielo en número.
11 Tika ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, akomisa bino ebele mbala nkoto moko mpe apambola bino ndenge alakaki!
¡Que el Señor, el Dios de sus padres, les haga mil veces más numeroso de lo que son, y les dé su bendición como él lo ha dicho!
12 Nakokoka ndenge nini komema ngai moko makambo na bino, mikumba na bino, mpe kowelana na bino?
¿Cómo es posible que yo sea responsable de ustedes y asuma el peso de todos sus problemas y sus argumentos?
13 Bopona bato ya bwanya, ya mayele mpe ya lokumu kati na moko na moko ya mabota na bino, mpe ngai nakotia bango bakambi na bino.
Escojan de entre ustedes mismos, de sus tribus, hombres sabios, lejanos y respetados entre ustedes, y yo los haré gobernantes sobre ustedes.
14 Bozongiselaki ngai: — Makambo oyo osili koyebisa biso ezali malamu.
Y respondieron y me dijeron: Es bueno que hagamos lo que dices.
15 Boye, nazwaki bakambi kati na mabota na bino, bato ya lokumu mpe ya bwanya, bongo nakomisaki bango bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi, mpe bakalaka mpo na mabota na bino.
Así que tomé a los jefes de sus tribus, hombres sabios y respetados, y los hice gobernantes sobre ustedes, capitanes de miles y capitanes de cientos y capitanes de cincuenta y capitanes de decenas, y supervisores de sus tribus.
16 Na tango wana, napesaki bakambi na bino mokumba oyo: « Boyoka kowelana oyo ezali kati na bandeko na bino mpe bokata makambo na bosembo; ezala kowelana kati ya bana ya Isalaele bango na bango to kati ya mwana ya Isalaele mpe mopaya.
Y en ese momento di órdenes a sus jueces, diciendo: Permite que todas las preguntas entre sus hermanos se presenten ante ustedes para escuchar, y tomen decisiones rectas entre un hombre y su hermano o uno de otra nación que esté con él.
17 Bopona bilongi te na tango ya kosambisa, boyoka bato nyonso: azala moto pamba to moto monene. Bobanga moto te, pamba te kosambisa ezali likambo ya Nzambe. Bomemela ngai likambo oyo eleki bino na makasi mpe ngai nakoyoka yango. »
Al juzgar, no permitas que la posición de un hombre influya en tu decisión; Den oído igualmente a pequeños y grandes; no teman a ningún hombre, porque es Dios quien es el juez; y cualquier causa por la cual ustedes no puedan tomar una decisión, ustedes deben comparecer ante mí y les daré una audiencia.
18 Mpe na tango wana, nayebisaki bino makambo nyonso oyo bosengeli kosala.
Y en ese momento les di todas las órdenes que debían hacer.
19 Boye, ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso, tolongwaki na ngomba Orebi mpe tokendeki na etuka ya bangomba ya bato ya Amori. Tokatisaki esobe monene mpe ya somo oyo bomonaki mpe tokomaki na Kadeshi-Barinea.
Luego pasamos de Horeb, a través de tan grande y terrible desierto que ustedes vieron, en nuestro camino a la región montañosa de los amorreos, como el Señor nos dio órdenes; y llegamos a Cades-barnea.
20 Nalobaki na bino: — Bosili kokoma na etuka ya bangomba ya bato ya Amori, etuka oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso.
Y les dije: Han venido a la región montañosa de los amorreos, que el Señor nuestro Dios nos está dando.
21 Botala, Yawe, Nzambe na bino, apesi bino mokili; bokende mpe bokamata yango ndenge Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alobaki na bino. Bobanga te mpe bozala na mpiko.
Mira, el Señor su Dios ha puesto la tierra en sus manos: suban y tomen posesión, como el Señor, el Dios de sus padres, les ha dicho; No tengan miedo y no se desanimen.
22 Bato nyonso kati na bino bayaki epai na ngai mpe balobaki: — Tika ete totinda liboso na biso bato mpo na konongela biso mokili mpe komemela biso sango ya nzela oyo tokoki kolanda mpe ya bingumba epai wapi tokokende.
Y vinieron a mi, cada uno de ustedes, se acercaron a mí y dijeron: Enviaremos a los hombres delante de nosotros a recorrer la tierra con cuidado y después de explorar que nos digan cómo debemos ir a los pueblos a los que nos dirigimos.
23 Likanisi yango emonanaki malamu na miso na ngai, yango wana naponaki kati na bino mibali zomi na mibale, mobali moko mpo na libota moko.
Y lo que dijiste me pareció bien, y tomé de ustedes a doce hombres, uno de cada tribu;
24 Balongwaki mpe bakendeki, bongo bamataki kino na etuka ya bangomba mpe bakomaki na lubwaku ya Eshikoli oyo banongaki.
Y subieron a la región montañosa y llegaron al valle de Escol, y vieron lo que había allí.
25 Bakamataki na maboko na bango ndambo ya bambuma ya mokili wana mpe bamemelaki biso yango. Tala sango oyo bapesaki biso: « Mboka oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso ezali malamu. »
Y tomando en sus manos parte del fruto de la tierra, descendieron de nuevo a nosotros y nos contaron, diciendo: Es una buena tierra que el Señor nuestro Dios nos está dando.
26 Kasi boboyaki komata, botombokelaki etinda ya Yawe, Nzambe na bino.
Pero yendo contra la orden del Señor su Dios, no subieron.
27 Bongo boyimaki-yimaki kati na bandako na bino mpe bolobaki: « Yawe alingaka biso te, yango wana abimisaki biso na Ejipito mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Amori mpo ete bango baboma biso.
E hicieron airadas protestas en sus tiendas, y dijeron: En su odio por nosotros, el Señor nos ha sacado de la tierra de Egipto, para entregarnos en manos de los amorreos para nuestra destrucción.
28 Boni, tokende kaka kuna? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi: ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › »
¿A dónde vamos a subir? Nuestros hermanos han llenado nuestros corazones de temor diciendo: La gente es más que nosotros y más alta que nosotros, y las ciudades son grandes y están amuralladas hasta el cielo; y más que esto, hemos visto a los hijos de Anac allí.
29 Nalobaki na bino: « Bozala na somo te mpe bobanga bango te,
Entonces les dije: No teman a ellos ni tengan miedo.
30 pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali kotambola liboso na bino mpe akobunda mpo na bino ndenge asalaki na Ejipito, na miso ya bato nyonso.
El Señor, su Dios, que va delante de ustedes, luchará por ustedes y hará las maravillas que él hizo por ustedes en Egipto ante sus ojos;
31 Mpe na esobe, na banzela nyonso oyo botambolaki kino bokoma na esika oyo, bomonaki ndenge nini Yawe, Nzambe na bino, amemaki bino ndenge tata amemaka mwana na ye. »
Y en el desierto, donde has visto cómo el Señor te llevó, como lo hace un hombre a su hijo, en todo tu viaje hasta que llegaron a este lugar.
32 Atako bongo, botiaki elikya te epai na Yawe, Nzambe na bino,
Pero por todo esto, no tuvieron fe en el Señor su Dios,
33 oyo azalaki kotambola liboso na bino na nzela mpo na kolukela bino esika ya kotonga molako. Na butu, azalaki lokola likonzi ya moto; mpe na moyi, azalaki lokola likonzi ya lipata; mpo na kolakisa bino nzela oyo bosengelaki kotambola.
¿Quién iba delante de ustedes en su camino, buscando un lugar donde pudieran poner sus tiendas de campaña, en el fuego por la noche, iluminando el camino en que debían ir, y en una nube por el día.
34 Tango Yawe ayokaki nyonso oyo bozalaki koloba, asilikaki mpe alapaki ndayi:
Y él Señor, oyendo sus palabras, se enojó y dijo con juramento.
35 « Moto moko te kati na molongo oyo ya bato mabe akoki komona mokili ya kitoko oyo nalakaki kopesa na bakoko na bango na nzela ya ndayi,
En verdad, ninguna de estas generaciones malvadas verá la buena tierra que dije que daría a sus padres.
36 longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune; ye akomona yango, mpe nakopesa na ye mpe na bakitani na ye, mokili oyo lokolo na ye enyataki, pamba te asalelaki Ngai Yawe na motema na ye mobimba. »
Pero solo Caleb, el hijo de Jefone, lo verá; y a él y a sus hijos les daré la tierra sobre la cual han ido sus pies, porque ha sido fiel al Señor con todo su corazón.
37 Likolo na bino, Yawe asilikelaki mpe ngai; alobaki: « Yo mpe lisusu okokota te kati na mokili yango.
Y, además, el Señor se enojó conmigo por culpa de ustedes, diciendo: Tú mismo no entrarás en esa tierra.
38 Kasi mosungi na yo Jozue, mwana mobali ya Nuni, ye akokota kati na yango. Lendisa ye, pamba te ye nde akokamba Isalaele mpo na kozwa mokili yango lokola libula.
Josué, el hijo de Nun, tu siervo, entrará en la tierra; dile que debe ser fuerte, porque él será el guía de Israel en su herencia.
39 Bongo, bana na bino oyo bolobaki ete bakomema bango na bowumbu, bana na bino oyo bayebi nanu te kokesenisa malamu mpe mabe, bango nde bakokota na mokili yango. Nakopesa bango mokili yango, mpe bakokamata yango.
Y sus pequeños, que, según dijiste, vendrían a manos extrañas, tus hijos, que ahora no tienen conocimiento del bien o del mal, entrarán en esa tierra, y a ellos se la daré y ellos la heredarán.
40 Mpo na bino, bobaluka mpe bokende na esobe, na nzela ya ebale monene ya Barozo. »
Pero en cuanto a ustedes, regresen, viajando al desierto por el camino del Mar Rojo.
41 Bozongiselaki ngai: « Tosali masumu epai na Yawe. Tokokende mpe tokobunda ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso. » Boye, moto nyonso kati na bino alataki bibundeli na ye, mpe bokanisaki ete ezali likambo ya pasi te komata na etuka ya bangomba.
Entonces me dijeron: Hemos hecho lo malo contra el Señor, subiremos al ataque, como el Señor nuestro Dios nos ha dado órdenes. Y armándose cada uno, se prepararon para subir sin cuidado a la región montañosa.
42 Kasi Yawe alobaki na ngai: « Yebisa bango ete bamata te mpe babunda te, pamba te nakozala elongo na bango te; banguna na bango bakolonga bango. »
Y el Señor me dijo: Diles: No suban al ataque; porque no estoy entre ustedes, y serán vencidos por los que están contra ustedes.
43 Nzokande nayebisaki bino, kasi boyokaki kaka te; botombokelaki mitindo ya Yawe; mpe, na lolendo na bino, bomataki na etuka ya bangomba.
Les dije esto, pero no prestaron atención y se fueron en contra de las órdenes del Señor, y en su orgullo subieron a la región montañosa.
44 Boye, bato ya Amori oyo bavandaka na bangomba yango bakitelaki bino mpe babundisaki bino, babenganaki bino lokola liboke ya banzoyi mpe balongaki bino longwa na Seiri kino na Orima.
Y los amorreos que estaban en la región montañosa salieron contra ustedes y los hicieron huir, persiguiéndote como a las abejas, y te vencieron en Seir, llevándote hasta Horma.
45 Bozongaki mpe bolelaki liboso ya Yawe, kasi aboyaki koyoka kolela na bino, akangaki matoyi na Ye.
Y volvieron, llorando delante del Señor; pero el Señor no prestó atención a tus gritos y no los escuchó.
46 Bongo bovandaki na Kadeshi mikolo ebele.
Así que te mantuviste esperando en Cades durante mucho tiempo.

< Deteronomi 1 >