< Daniele 9 >
1 Na mobu ya liboso ya Dariusi, mwana mobali ya Kizerisesi, moko kati na bakitani ya bato ya Medi, oyo akomaki mokonzi ya mokili ya bato ya Babiloni;
米底亞族亞哈隨魯的兒子大流士立為迦勒底國的王元年,
2 na mobu ya liboso ya bokonzi na ye, ngai, Daniele, nasosolaki, na nzela ya mikanda, kolanda liloba oyo Yawe apesaki na mosakoli Jeremi, ete kobebisama ya engumba Yelusalemi esengeli kosala mibu tuku sambo.
就是他在位第一年,我-但以理從書上得知耶和華的話臨到先知耶利米,論耶路撒冷荒涼的年數,七十年為滿。
3 Boye, nabalolaki elongi na ngai epai na Nkolo Nzambe mpo na kosambela mpe kobondela Ye, na kokila bilei, na kolata basaki mpe na komipakola putulu.
我便禁食,披麻蒙灰,定意向主上帝祈禱懇求。
4 Nasambelaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe natubelaki: « Nkolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya nguya, Yo oyo obatelaka boyokani na Yo ya bolingo, elongo na bato nyonso oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo;
我向耶和華-我的上帝祈禱、認罪,說:「主啊,大而可畏的上帝,向愛主、守主誡命的人守約施慈愛。
5 solo, tosalaki masumu mpe mabe na miso na Yo, totambolaki lokola bato mabe mpe batomboki, topesaki mibeko mpe mitindo na Yo mokongo.
我們犯罪作孽,行惡叛逆,偏離你的誡命典章,
6 Toyokelaki te basali na Yo, basakoli, oyo balobaki na Kombo na Yo epai ya bakonzi na biso, bakambi na biso, bakoko na biso mpe epai ya bato nyonso ya mokili.
沒有聽從你僕人眾先知奉你名向我們君王、首領、列祖,和國中一切百姓所說的話。
7 Nkolo, ozali sembo; kasi biso, lelo, tolatisami na soni: bato ya Yuda, bavandi ya Yelusalemi mpe bana nyonso ya Isalaele, ezala ba-oyo bazali pembeni to ba-oyo bazali mosika, kati na mikili nyonso epai wapi opanzaki biso mpo ete tozangaki boyengebene liboso na Yo!
主啊,你是公義的,我們是臉上蒙羞的;因我們猶大人和耶路撒冷的居民,並以色列眾人,或在近處,或在遠處,被你趕到各國的人,都得罪了你,正如今日一樣。
8 Yawe, biso, bakonzi na biso, bakambi na biso mpe bakoko na biso, tolatisami na soni mpo ete tosalaki masumu liboso na Yo.
主啊,我們和我們的君王、首領、列祖因得罪了你,就都臉上蒙羞。
9 Kasi Yo Nkolo, Nzambe na biso, otonda na mawa mpe olimbisaka, atako biso, totombokelaki Yo.
主-我們的上帝是憐憫饒恕人的,我們卻違背了他,
10 Totosaki te Yawe, Nzambe na biso, to tobatelaki te mibeko oyo opesaki biso na nzela ya basali na Yo, basakoli.
也沒有聽從耶和華-我們上帝的話,沒有遵行他藉僕人眾先知向我們所陳明的律法。
11 Bato nyonso ya Isalaele babukaki Mobeko na Yo, bapesaki yango mokongo mpe baboyaki kotosa Yo. Mpo na yango, bilakeli mabe mpe bitumbu oyo ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mosali na Nzambe, esopanelaki biso, mpo ete tosalaki masumu liboso na Yo.
以色列眾人都犯了你的律法,偏行,不聽從你的話;因此,在你僕人摩西律法上所寫的咒詛和誓言都傾在我們身上,因我們得罪了上帝。
12 Wana otindeli biso pasi makasi oyo, okokisi penza maloba oyo olobaki mpo na kotelemela biso mpe bakambi na biso; mpe pasi oyo ekweyeli Yelusalemi etikala nanu kosalema te kati na mokili mobimba.
他使大災禍臨到我們,成就了警戒我們和審判我們官長的話;原來在普天之下未曾行過像在耶路撒冷所行的。
13 Kolanda ndenge kaka ekomama kati na Mobeko ya Moyize, pasi yango nyonso ekomeli biso; mpe tobondelaki te Yawe, Nzambe na biso; totikaki te kosala masumu mpe tomipesaki te mpo na kososola bosolo na Yo.
這一切災禍臨到我們身上是照摩西律法上所寫的,我們卻沒有求耶和華-我們上帝的恩典,使我們回頭離開罪孽,明白你的真理。
14 Yango wana, Yawe, olandeli pasi yango kino okweyiseli biso yango; pamba te Yawe, Nzambe na biso, ozali sembo kati na misala na Yo nyonso; kasi biso, totosaki Yo te.
所以耶和華留意使這災禍臨到我們身上,因為耶和華-我們的上帝在他所行的事上都是公義;我們並沒有聽從他的話。
15 Sik’oyo, Nkolo, Nzambe na biso, Yo oyo obimisa bato na Yo na Ejipito na nzela ya loboko na Yo ya nguya mpe Kombo na Yo ekenda sango kino na mokolo ya lelo, tosalaki masumu, tosalaki mabe!
主-我們的上帝啊,你曾用大能的手領你的子民出埃及地,使自己得了名,正如今日一樣。我們犯了罪,作了惡。
16 Nkolo, nabondeli Yo, kolanda makambo nyonso oyo osalaka mpo na bosembo, kanda mpe kotomboka na Yo ezali kolongwa kati na engumba na Yo, Yelusalemi, ngomba na Yo ya bule! likolo ya masumu na biso mpe ya mabe ya bakoko na biso, Yelusalemi mpe bato na Yo bakomi eloko ya liseki na miso ya bato nyonso oyo bazingeli biso.
主啊,求你按你的大仁大義,使你的怒氣和忿怒轉離你的城耶路撒冷,就是你的聖山。耶路撒冷和你的子民,因我們的罪惡和我們列祖的罪孽被四圍的人羞辱。
17 Sik’oyo, Nzambe na biso, yoka losambo mpe mabondeli na ngai, mosali na Yo! Mpo na lokumu na Yo, Nkolo, tala na miso ya ngolu Esika na Yo ya bule oyo ebebi!
我們的上帝啊,現在求你垂聽僕人的祈禱懇求,為自己使臉光照你荒涼的聖所。
18 Nzambe na ngai, defisa ngai litoyi na Yo mpe yoka ngai na bokebi! Fungola miso na Yo mpe mona kobebisama ya bisika na biso mpe ya engumba oyo mpo na bolamu na yango. Ngai, nazali kobelela Kombo na Yo! Ezali te mpo tozali sembo, kasi ezali nde mpo na mawa monene na Yo nde tozali kobondela Yo!
我的上帝啊,求你側耳而聽,睜眼而看,眷顧我們荒涼之地和稱為你名下的城。我們在你面前懇求,原不是因自己的義,乃因你的大憐憫。
19 Nkolo, yoka! Nkolo, limbisa! Nkolo, yoka na bokebi! Sala, kowumela te, mpo na lokumu ya Kombo na Yo moko, Nzambe na ngai! Pamba te ngai, nazali kobelela Kombo na Yo mpo na bolamu ya engumba mpe ya bato na Yo! »
求主垂聽,求主赦免,求主應允而行,為你自己不要遲延。我的上帝啊,因這城和這民都是稱為你名下的。」
20 Wana nazalaki koloba mpe kosambela, kotubela masumu na ngai mpe ya bato na ngai, Isalaele, mpe kobondela Yawe, Nzambe na ngai, mpo na bolamu ya ngomba ya bule ya Nzambe na ngai;
我說話,禱告,承認我的罪和本國之民以色列的罪,為我上帝的聖山,在耶和華-我上帝面前懇求。
21 wana nazalaki nanu koloba, kati na losambo, Gabrieli, moto oyo namonaki liboso kati na emoniseli, ayaki epai na ngai na lombangu, na tango ya makabo ya pokwa.
我正禱告的時候,先前在異象中所見的那位加百列,奉命迅速飛來,約在獻晚祭的時候,按手在我身上。
22 Apesaki ngai malako, alobaki: « Daniele, nayei sik’oyo mpo na kopesa yo bososoli mpe mayele.
他指教我說:「但以理啊,現在我出來要使你有智慧,有聰明。
23 Tango kaka obandaki kobondela, liloba moko ebimaki; mpe ngai, nayei koyebisa yo yango, pamba te ozali molingami ya Nzambe. Yamba liloba mpe sosola emoniseli:
你初懇求的時候,就發出命令,我來告訴你,因你大蒙眷愛;所以你要思想明白這以下的事和異象。
24 Eleko moko ya baposo tuku sambo ekatamaki mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bule, mpo na kosilisa botomboki liboso ya Nzambe mpe kosukisa masumu, mpo na kolimbisa masumu mpe kokokisa bosembo ya libela, mpo na kokangisa emoniseli mpe mosakoli, mpe mpo na kobulisa Mosantu ya basantu.
「為你本國之民和你聖城,已經定了七十個七。要止住罪過,除淨罪惡,贖盡罪孽,引進永義,封住異象和預言,並膏至聖者。
25 Yeba mpe sosola makambo oyo: wuta tango lisakoli ya kobongisa mpe ya kotonga lisusu Yelusalemi ebimaki kino koya ya mokonzi, Ye oyo azwaki epakolami, ekosala baposo sambo mpe baposo tuku motoba na mibale. Engumba ekotongama lisusu elongo na nzela mpe bamir na yango oyo batonga makasi.
你當知道,當明白,從出令重新建造耶路撒冷,直到有受膏君的時候,必有七個七和六十二個七。正在艱難的時候,耶路撒冷城連街帶濠都必重新建造。
26 Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama.
過了六十二個七,那受膏者必被剪除,一無所有;必有一王的民來毀滅這城和聖所,至終必如洪水沖沒。必有爭戰,一直到底,荒涼的事已經定了。
27 Na poso moko, akosala boyokani moko elenda elongo na bato ebele; kasi na kati-kati ya poso yango, akosukisa bambeka mpe makabo. Likolo ya kobomba makambo ya nkele, mobebisi moko akobima kino tango libebi oyo ekatama mpo na mobebisi ekokokisama. »
一七之內,他必與許多人堅定盟約;一七之半,他必使祭祀與供獻止息。那行毀壞可憎的如飛而來,並且有忿怒傾在那行毀壞的身上,直到所定的結局。」