< Daniele 8 >

1 Na mobu ya misato ya bokonzi ya mokonzi Balitazari, ngai, Daniele, nazwaki emoniseli moko ya sika, sima na oyo nazwaki liboso.
En la troisième année du règne du roi Baltassar, une vision m’apparut. Moi, Daniel, après ce que j’avais vu au commencement,
2 Kati na emoniseli yango, nazalaki kotala mpe namimonaki lokola kati na Size, engumba batonga makasi, kati na etuka ya Elami; kati na emoniseli yango kaka, namimonaki lisusu lokola natelemi pembeni ya moluka Ulayi.
Je vis en ma vision, quand j’étais au château de Suse, qui est dans la région d’Elam, je vis en ma vision que j’étais sur la porte d’Ulaï.
3 Natombolaki miso na ngai na likolo mpe namonaki, liboso na ngai, meme moko ya mobali etelemi pembeni ya moluka; ezalaki na maseke mibale ya milayi makasi, kasi moko kati na maseke yango, oyo ebotaki sima, elekaki mosusu na molayi.
Et je levai les yeux, et je vis: et voici un bélier qui se tenait devant le marais, ayant des cornes hautes, et l’une plus haute que l’autre et qui croissait. Ensuite
4 Bongo, namonaki meme ya mobali ezali kobeta na ngambo ya weste, ya nor mpe na sude. Nyama moko te ekokaki kobundisa yango mpe moto moko te akokaki kokangola soki ekangi yango. Ezalaki kosala nyonso oyo yango elingi mpe ezalaki kokola.
Je vis que le bélier frappait de ses cornes contre l’occident, et contre l’aquilon, et contre le midi; et aucune bête ne pouvait ni lui résister, ni se délivrer de sa puissance; et il fit selon sa volonté, et il devint très puissant.
5 Wana nazalaki kokanisa na tina na yango, ntaba moko ya mobali eyaki wuta na ngambo ya weste; ezalaki kotambola mabele mobimba na kozanga konyata yango. Ntaba yango ya mobali ezalaki na liseke moko ya monene na kati-kati ya miso na yango;
Et je considérais attentivement; mais voici qu’un bouc de chèvres venait de l’occident sur la face de toute la terre, et il ne touchait pas la terre; or le bouc avait une corne remarquable entre les yeux.
6 eyaki kino epai ya meme ya mobali oyo namonaki etelemi pembeni ya moluka mpe ezalaki na maseke mibale; ebetaki yango makasi, na maseki te.
Et il vint jusqu’à ce bélier qui avait des cornes, et que j’avais vu se tenant devant la porte, et il courut à lui dans l’impétuosité de sa force.
7 Namonaki ntaba yango kopusana pene ya meme ya mobali na kanda makasi, ebetaki meme ya mobali mpe ebukaki yango maseke nyonso mibale; meme ezalaki ata na makasi te ya kobundisa ntaba. Boye, ntaba ebwakaki meme na mabele mpe enyataki yango; mpe ezalaki na moto moko te mpo na kobikisa meme ya mobali na maboko ya ntaba wana.
Et lorsqu’il fut près du bélier, il se jeta avec furie sur lui, et le frappa, et brisa ses deux cornes; et le bélier ne pouvait lui résister; et lorsqu’il l’eut jeté à terre, il le foula aux pieds, et personne ne pouvait délivrer le bélier de sa puissance.
8 Ntaba ya mobali ekolaki makasi; kasi tango ekomaki lisusu na nguya makasi, liseke na yango ya monene ebukanaki. Maseke minei ya minene ebotaki na esika ya liseke wana moko mpe etalaki na bangambo minei ya likolo.
Alors le bouc des chèvres devint extrêmement grand; et lorsqu’il eut crû, sa grande corne se rompit, et quatre cornes s’élevèrent sous celle-là vers les quatre vents du ciel.
9 Bongo, wuta na moko kati na maseke nyonso minei, liseke moko ya moke ebimaki. Ekolaki makasi, mpe nguya na yango ekomaki na ngambo ya sude, ya este mpe na ngambo ya Mokili oyo eleki kitoko.
Et de l’une d’elles sortit une petite corne; et elle devint grande vers le midi, et vers l’orient, et vers la force.
10 Ekolaki lisusu kino na mampinga ya likolo, ebwakaki na mabele ndambo ya mampinga yango mpe ndambo ya minzoto, mpe enyataki yango.
Et elle s’éleva jusqu’à la force du ciel, et renversa une partie de la force, et des étoiles, et les foula aux pieds.
11 Emitombolaki kino kotia tembe na Mokonzi ya mampinga, elongolaki mbeka ya mokolo na mokolo na losambo mpe ebebisaki Esika na Ye ya bule elongo na miboko na yango.
Et elle s’éleva jusqu’au prince de la force, elle lui ravit son sacrifice perpétuel, et renversa le lieu de sa sanctification.
12 Likolo ya botomboki ya bato liboso ya Nzambe, mampinga ya likolo ekomaki na se ya bokonzi ya liseke elongo na mbeka ya mokolo na mokolo. Liseke yango ezalaki kolonga na makambo nyonso oyo ezalaki kosala mpe ebwakaki solo na mabele.
Or la force lui fut donnée contre le sacrifice perpétuel, à cause des péchés; et la vérité sera abattue sur la terre, et il agira, et il prospérera.
13 Nayokaki mosantu moko koloba, mpe mosantu mosusu kotuna ye: — Makambo oyo etalisami na emoniseli ekosala mikolo boni? Mbeka ya mokolo na mokolo ekopesama lisusu te mikolo boni? Botomboki oyo ememaka pasi ekosala mikolo boni? Mikolo boni Esika ya bule mpe mampinga ekotiama na se ya matambe?
Et j’entendis un des saints parlant; et un saint dit à l’autre, je ne sais lequel, qui parlait: Jusques à quand la vision, et le sacrifice perpétuel, et le péché qui a causé la désolation; jusques à quand le sanctuaire, et la force sera foulée aux pieds?
14 Alobaki na ngai: — Ekosalema bapokwa nkoto moko na nkama moko na tuku mitano mpe batongo nkoto moko na nkama moko na tuku mitano; sima na yango nde Esika ya bule ekobulisama lisusu mpo na losambo.
Et il dit: Jusqu’à un soir et un matin, deux mille trois cents jours, et le sanctuaire sera purifié.
15 Wana ngai, Daniele, nazalaki komona emoniseli yango na makanisi mpe koluka kososola yango, namonaki lokola moto moko atelemi liboso na ngai.
Or, il arriva que, lorsque je voyais, moi Daniel, la vision, et que j’en cherchais l’intelligence, voilà que s’arrêta en ma présence comme la ressemblance d’un homme.
16 Nayokaki mongongo moko lokola ya moto wuta na kati-kati ya moluka Ulayi; ezalaki kobelela: — Gabrieli, limbolela moto oyo emoniseli.
Et j’entendis la voix d’un homme entre l’Ulaï, et il cria et me dit: Gabriel, fais-lui comprendre cette vision.
17 Lokola azalaki kopusana pene ya esika oyo nazalaki, nakomaki na somo mpe nakweyaki elongi kino na mabele. Alobaki na ngai: — Mwana na moto, sosola malamu ete emoniseli oyo etali makambo ya suka ya tango.
Et il vint, et il s’arrêta près du lieu où moi j’étais; et lorsqu’il fut venu, effrayé je tombai sur ma face, et il me dit: Comprends, fils d’un homme, parce qu’au temps de la fin s’accomplira la vision.
18 Wana azalaki koloba na ngai, nakomaki na pongi moko ya makasi, mpe nakweyaki elongi kino na mabele; kasi asimbaki ngai mpe atelemisaki ngai, kaka na esika oyo nazalaki.
Et comme il me parlait, je tombai incliné vers la terre; et il me toucha, et il me remit sur mes pieds,
19 Bongo, alobaki na ngai: — Nakoyebisa yo makambo oyo ekosalema na sima na tango ya kanda ya Nzambe, pamba te emoniseli oyo etali tango oyo ekatama mpo na mikolo ya suka.
Et il me dit: C’est moi qui te montrerai les choses qui doivent arriver au dernier moment de la malédiction, parce que le temps a sa fin.
20 Maseke mibale ya meme ya mobali oyo omonaki ezali kolakisa bakonzi ya Medi mpe ya Persi.
Le bélier que tu as vu, qui avait des cornes, est le roi des Mèdes et des Perses.
21 Ntaba mobali ya bapwale ebele ezali mokonzi ya Grese, mpe liseke monene oyo ezali na kati-kati ya miso na yango ezali mokonzi ya liboso.
Mais le bouc des chèvres est le roi de« Grecs, et la grande corne qui était entre ses yeux, c’est le premier roi.
22 Tango liseke yango ebukanaki, maseke minei ebimaki na esika na yango: ezali kolakisa ete babokonzi minei ekobima wuta na ekolo oyo, kasi nguya na yango ekokokana te.
Or celle-ci ayant été rompue, quatre se sont élevées à sa place; quatre rois de sa nation s’élèveront, mais non avec sa force.
23 Na suka ya bokonzi na yango, tango batomboki bakokolisa mabe na bango kino na suka, mokonzi moko ya motema makasi mpe ya mayele mabe akobima;
Et après leur règne, lorsque les iniquités se seront accrues, un roi à la face impudente viendra et comprendra les choses cachées;
24 akokoma makasi koleka, kasi na nguya na ye moko te. Akobebisa mokili na ndenge ya kokamwa mpe akolonga na makambo nyonso oyo akosala; akoboma bato ya makasi mpe basantu.
Et sa puissance s’affermira, mais non par ses propres forces; et il dévastera toutes choses au-delà de ce que l’on peut croire, et il prospérera, et il agira. Et il tuera des forts, et un peuple de saints
25 Na mayele mabe na ye, akolonga kokosa bato ebele mpe akokoma na motema ya lofundu; akoboma bato ebele oyo bazalaki na bango na kimia mpe akotelemela Mokambi ya bakambi, kasi akobebisama na nguya ya moto te.
Selon sa volonté, et la fraude sera dirigée par sa main; et il élèvera son cœur, et dans son abondance de toutes choses il fera périr un très grand nombre de victimes, et contre le prince des princes il s’élèvera, et sans la main d’aucun homme il sera brisé.
26 Emoniseli ya bapokwa mpe ya batongo oyo epesamelaki yo ezali ya solo, kasi bomba yango malamu, pamba te etali makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.
Et la vision du soir et du matin, qui a été mentionnée, est véritable; toi donc, scelle la vision, parce que c’est après bien des jours qu’elle sera accomplie.
27 Ngai, Daniele, nalembaki penza nzoto mpe nabelaki mikolo ebele. Sima na yango, natelemaki mpe nazongelaki kolandela misala ya mokonzi. Emoniseli oyo nazwaki ekamwisaki ngai mpe nazalaki kososola yango te.
Et moi Daniel, j’ai langui et j’ai été malade pendant des jours; et, lorsque je me fus levé, je travaillais aux affaires du roi, et j’étais dans la stupeur au sujet de la vision, et il n’y avait personne qui l’interprétât.

< Daniele 8 >