< Daniele 6 >
1 Dariusi amonaki ete ezali malamu kotia bayangeli nkama moko na tuku mibale mpo na kokamba mokili mobimba ya bokonzi.
다리오가 자기의 심원대로 방백 일백 이십 명을 세워 전국을 통치하게 하고
2 Atiaki lisusu bakalaka misato ya lokumu lokola bakonzi na bango; Daniele azalaki moko kati na bakalaka yango ya lokumu. Bazalaki kokamba misala ya bayangeli ya bituka mpo ete mokonzi anyokwama te.
또 그들 위에 총리 셋을 두었으니 다니엘이 그 중에 하나이라 이는 방백들로 총리에게 자기의 직무를 보고하게 하여 왕에게 손해가 없게 하려함이었더라
3 Nzokande, Daniele amonisaki bokeseni kati na ye, bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki kati na bituka, mpo na mayele na ye oyo eleka ndelo. Boye, mokonzi akanisaki kotombola ye mpo ete akamba mokili na ye mobimba ya bokonzi.
다니엘은 마음이 민첩하여 총리들과 방백들 위에 뛰어나므로 왕이 그를 세워 전국을 다스리게 하고자 한지라
4 Bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka bazalaki koluka likambo ya kofundela Daniele na ndenge na ye ya kotambolisa makambo ya bokonzi. Kasi balongaki te kozwa ata likambo moko to mbeba ya kofundela Daniele, mpo ete azalaki sembo mpe mpo ete, kati na ye, bazalaki komona ata libunga te to mbeba moko te ya kofundela ye.
이에 총리들과 방백들이 국사에 대하여 다니엘을 고소할 틈을 얻고자 하였으나 능히 아무 틈, 아무 허물을 얻지 못하였으니 이는 그가 충성되어 아무 그릇함도 없고 아무 허물도 없음이었더라
5 Boye, bato yango balobaki: — Tokotikala komona likambo ata moko te ya kofundela moto oyo, Daniele; loba nde toluka yango kati na mobeko ya Nzambe na ye.
그 사람들이 가로되 이 다니엘은 그 하나님의 율법에 대하여 그 틈을 얻지 못하면 그를 고소할 수 없으리라 하고
6 Bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka bakendeki lisanga epai ya mokonzi mpe balobaki: — Tika ete mokonzi Dariusi awumela na bomoi seko na seko!
이에 총리들과 방백들이 모여 왕에게 나아가서 그에게 말하되 다리오 왕이여 만세수를 하옵소서
7 Bakalaka ya lokumu, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka, bapesi toli mpe bayangeli, bango nyonso bandimaki ete mokonzi azwa mokano moko mpe abetela yango sete: « Na mikolo tuku misato oyo ezali koya, moto nyonso asengeli kosambela kaka mokonzi; moto oyo akomeka kosambela nzambe to moto mosusu, basengeli kobwaka ye kati na libulu ya bankosi. »
나라의 모든 총리와 수령과 방백과 모사와 관원이 의논하고 왕에게 한 율법을 세우며 한 금령을 정하실 것을 구하려 하였는데 왕이여 그것은 곧 이제부터 삼십일 동안에 누구든지 왕 외에 어느신에게나 사람에게 무엇을 구하면 사자굴에 던져 넣기로 한 것이니이다
8 Sik’oyo, oh mokonzi, zwa mokano yango, koma yango na mokanda mpe tia mokoloto mpo ete babongola yango te, kolanda mibeko ya bato ya Medi mpe ya Persi oyo bakoki kobongola te.
그런즉 원컨대 금령을 세우시고 그 조서에 어인을 찍어서 메대와 바사의 변개치 아니하는 규례를 따라 그것을 다시 고치지 못하게 하옵소서 하매
9 Boye, mokonzi Dariusi akomaki mokano oyo azwaki mpo ete babongola yango te mpe atiaki mokoloto na mokano yango.
이에 다리오 왕이 조서에 어인을 찍어 금령을 내니라
10 Tango Daniele asosolaki ete sango ya mokano yango esili kopanzana, akotaki na ndako na ye, amataki na etaje mpe akotaki na shambre oyo maninisa na yango etala na ngambo ya Yelusalemi; mbala misato na mokolo, azalaki kofukama mpo na kosambela mpe kopesa matondi epai ya Nzambe na ye, ndenge kaka azalaki kosala liboso.
다니엘이 이 조서에 어인이 찍힌 것을 알고도 자기 집에 돌아가서는 그 방의 예루살렘으로 향하여 열린 창에서 전에 행하던 대로 하루 세 번씩 무릎을 꿇고 기도하며 그 하나님께 감사하였더라
11 Bongo, bato yango bakendeki lisanga mpe bakutaki Daniele azali kobondela mpe kosenga lisungi epai ya Nzambe na ye.
그 무리들이 모여서 다니엘이 자기 하나님 앞에 기도하며 간구하는 것을 발견하고
12 Mbala moko, bakendeki epai ya mokonzi mpo na kosolola na ye na tina na mokano oyo azwaki: — Mokonzi, opanzaki sango te ya mokano oyo ozwaki, ete na mikolo tuku misato oyo ekolanda, moto nyonso asengeli kosambela kaka yo, mokonzi; bongo moto oyo akosambela nzambe to moto mosusu, basengeli kobwaka ye kati na libulu ya bankosi? Mokonzi azongisaki: — Ezali penza bongo! Mokano ezali ndenge kaka ekatamaki, kolanda mibeko ya bato ya Medi mpe ya Persi, oyo bakoki kobongola te.
이에 그들이 나아가서 왕의 금령에 대하여 왕께 아뢰되 왕이여 왕이 이미 금령에 어인을 찍어서 이제부터 삼십 일 동안에 누구든지 왕 외에 어느 신에게나 사람에게 구하면 사자굴에 던져 넣기로 하지 아니하였나이까 왕이 대답하여 가로되 이 일이 적실하니 메대와 바사의 변개치 아니하는 규례대로 된 것이니라
13 Balobaki lisusu na mokonzi: — Daniele, moko kati na bawumbu oyo bawutaki na Yuda, azali kotosa yo te, ezala mokano oyo okomaki na mokanda mpe otiaki mokoloto; azali kokoba kaka kosambela mbala misato na mokolo.
그들이 왕 앞에서 대답하여 가로되 왕이여 사로잡혀 온 유다 자손 중에 그 다니엘이 왕과 왕의 어인이 찍힌 금령을 돌아보지 아니하고 하루 세 번씩 기도하나이다
14 Tango mokonzi ayokaki bongo, esalaki ye pasi makasi na motema; boye azwaki mokano ya kokangola Daniele; mpe kino na pokwa, azalaki kaka koluka ndenge nini kobikisa ye.
왕이 이 말을 듣고 그로 인하여 심히 근심하여 다니엘을 구원하려고 마음을 쓰며 그를 건져 내려고 힘을 다하여 해가 질 때까지 이르매
15 Kasi bato yango bakendeki lisusu lisanga epai ya mokonzi Dariusi mpe balobaki na ye: — Mokonzi, kobosana te ete mobeko ya bato ya Medi mpe ya Persi elobi ete mokano moko te to mobeko moko te ya mokonzi ekoki kobongolama.
그 무리들이 또 모여 왕에게로 나아와서 왕께 말씀하되 왕이여 메대와 바사의 규례를 아시거니와 왕의 세우신 금령과 법도는 변개하지 못할 것이니이다
16 Boye, mokonzi apesaki mitindo ete bamema Daniele mpe babwaka ye kati na libulu ya bankosi. Mokonzi alobaki na Daniele: — Nzambe na yo, oyo osalelaka na molende, akobikisa yo!
이에 왕이 명하매 다니엘을 끌어다가 사자굴에 던져 넣는지라 왕이 다니엘에게 일러 가로되 너의 항상 섬기는 네 하나님이 너를 구원하시리라 하니라
17 Bamemaki libanga moko ya monene mpe batiaki yango na monoko ya libulu ya bankosi. Mokonzi abetaki yango kashe na nzela ya lopete na ye mpe na nzela ya lopete ya bato na ye ya lokumu, mpo ete babongola eloko moko te na etumbu oyo bakateli Daniele.
이에 돌을 굴려다가 굴 아구를 막으매 왕이 어인과 귀인들의 인을 쳐서 봉하였으니 이는 다니엘 처치한 것을 변개함이 없게 하려 함이었더라
18 Sima na yango, mokonzi azongaki na ndako na ye; mpe, butu mobimba, aliaki te, avandaki elongo na bamakangu te mpe atikalaki kozwa pongi te.
왕이 궁에 돌아가서는 밤이 맞도록 금식하고 그 앞에 기악을 그치고 침수를 폐하니라
19 Na tongo-tongo, mokonzi atelemaki mpe akendeki na lombangu na libulu ya bankosi.
이튿날에 왕이 새벽에 일어나 급히 사자굴로 가서
20 Tango akomaki pene ya libulu yango, abengaki Daniele na mongongo ya mawa: — Daniele, mosali na Nzambe na bomoi! Boni, Nzambe na yo, oyo osalelaka na molende, alongi kokangola yo na minoko ya bankosi?
다니엘의 든 굴에 가까이 이르러는 슬피 소리질러 다니엘에게 물어 가로되 사시는 하나님의 종 다니엘아 너의 항상 섬기는 네 하나님이 사자에게서 너를 구원하시기에 능하셨느냐
21 Daniele azongiselaki ye: — Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko!
다니엘이 왕에게 고하되 왕이여 원컨대 왕은 만세수를 하옵소서
22 Nzambe na ngai atindaki anjelu na Ye mpo ete akanga bankosi minoko; boye, esalaki ngai mabe ata moko te, mpo ete natambolaki mabe te na miso na Ye, mpe nasalaki mabe ata moko te liboso na yo, mokonzi.
나의 하나님이 이미 그 천사를 보내어 사자들의 입을 봉하셨으므로 사자들이 나를 상해치 아니하였사오니 이는 나의 무죄함이 그 앞에 명백함이오며 또 왕이여 나는 왕의 앞에도 해를 끼치지 아니하였나이다
23 Mokonzi asepelaki makasi mpe apesaki mitindo ete babimisa Daniele wuta na libulu. Boye, babimisaki Daniele wuta na libulu mpe bamonaki ata pota moko te na nzoto na ye, pamba te azalaki na elikya na Nzambe na ye.
왕이 심히 기뻐서 명하여 다니엘을 굴에서 올리라 하매 그들이 다니엘을 굴에서 올린즉 그 몸이 조금도 상하지 아니하였으니 이는 그가 자기 하나님을 의뢰함이었더라
24 Mokonzi apesaki mitindo ete bamema bato oyo bafundaki Daniele mpe babwaka bango elongo na basi mpe bana na bango kati na libulu ya bankosi. Liboso ete bamikomela na se ya libulu, bankosi epumbwelaki bango mpe ebukaki bango mikuwa nyonso.
왕이 명을 내려 다니엘을 참소한 사람들을 끌어오게 하고 그들을 그 처자들과 함께 사자굴에 던져 넣게 하였더니 그들이 굴 밑에 닿기 전에 사자가 곧 그들을 움켜서 그 뼈까지도 부숴뜨렸더라
25 Bongo, mokonzi Dariusi akomelaki bato ya bikolo nyonso mpe ya nkota nyonso oyo bazalaki kovanda na mokili mobimba: Natombeli bino kimia monene!
이에 다리오 왕이 온 땅에 있는 모든 백성과 나라들과 각 방언하는 자들에게 조서를 내려 가로되 원컨대 많은 평강이 너희에게 있을지어다
26 Napesi mitindo ete, na bituka nyonso ya mokili na ngai, bato nyonso batosa mpe bapesa Nzambe ya Daniele lokumu.
내가 이제 조서를 내리노라 내 나라 관할 아래 있는 사람들은 다 다니엘의 하나님 앞에서 떨며 두려워할지니 그는 사시는 하나님이시요 영원히 변치 않으실 자시며 그 나라는 망하지 아니할 것이요 그 권세는 무궁할 것이며
27 Akangolaka mpe abikisaka,
그는 구원도 하시며 건져내기도 하시며 하늘에서든지 땅에서든지이적과 기사를 행하시는 자로서 다니엘을 구원하여 사자의 입에서 벗어나게 하셨음이니라 하였더라
28 Daniele akomaki moto ya lokumu na tango Dariusi azalaki mokonzi mpe na tango ya Sirisi, mokonzi ya bato ya Persi.
이 다니엘이 다리오 왕의 시대와 바사 사람 고레스 왕의 시대에 형통하였더라