< Daniele 5 >

1 Mokolo moko, mokonzi Balitazari asalisaki feti moko ya monene mpo na kopesa lokumu na nkoto ya bato na ye ya lokumu; mpe amelaki vino elongo na bango.
Baltasar the king made a great feast for a thousand of his nobles: and every one drank according to his age.
2 Wana Balitazari azalaki komela vino, apesaki mitindo ete bamema bakopo ya wolo mpe ya palata oyo tata na ye, Nabukodonozori, azwaki wuta na Tempelo ya Yelusalemi, mpo ete mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, basi na ye mpe bamakangu na ye bamela na yango masanga.
And being now drunk he commanded that they should bring the vessels of gold and silver which Nabuchodonosor his father had brought away out of the temple, that was in Jerusalem, that the king and his nobles, and his wives and his concubines, might drink in them.
3 Boye, bamemaki bakopo ya wolo oyo bazwaki na Tempelo ya Nzambe, na Yelusalemi; bongo mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, basi na ye mpe bamakangu na ye bamelaki na yango masanga.
Then were the golden and silver vessels brought, which he had brought away out of the temple that was in Jerusalem: and the king and his nobles, his wives and his concubines, drank in them.
4 Wana bazalaki komela vino, bazalaki kokumisa banzambe ya wolo mpe ya palata, ya bronze, ya ebende, ya nzete mpe ya libanga.
They drank wine, and praised their gods of gold, and of silver, of brass, of iron, and of wood, and of stone.
5 Mbala moko, misapi ya loboko ya moto moko ebimaki mpe ebandaki kokoma na etando ya mir ya ndako ya mokonzi, pembeni ya etelemiselo ya minda. Tango mokonzi amonaki ndenge loboko yango ezalaki kokoma,
In the same hour there appeared fingers, as it were of the hand of a man, writing over against the candlestick upon the surface of the wall of the king’s palace: and the king beheld the joints of the hand that wrote.
6 elongi na ye etelaki na somo mpe makanisi na ye ekomaki kotambola, nzoto na ye mobimba ekomaki kolenga mpe mabolongo na ye ekomaki kotutana.
Then was the king’s countenance changed, and his thoughts troubled him: and the joints of his loins were loosed, and his knees struck one against the other.
7 Mokonzi agangaki makasi mpe apesaki mitindo ete bamemela ye banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. Mpe mokonzi alobaki na bato oyo nyonso ya bwanya, ya Babiloni: — Moto nyonso oyo akokoka kotanga makomi oyo mpe akoyebisa ngai ndimbola na yango, nakolatisa ye bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe akozala kalaka ya lokumu kati na bokonzi.
And the king cried out aloud to bring in the wise men, the Chaldeans, and the soothsayers. And the king spoke, and said to the wise men of Babylon: Whosoever shall read this writing, and shall make known to me the interpretation thereof, shall be clothed with purple, and shall have a golden chain on his neck, and shall be the third man in my kingdom.
8 Bato nyonso ya bwanya ya mokonzi bakotaki na kati, kasi bakokaki te kotanga makomi wana to koyebisa mokonzi ndimbola na yango.
Then came in all the king’s wise men, but they could neither read the writing, nor declare the interpretation to the king.
9 Boye, mokonzi Balitazari akomaki lisusu na somo makasi koleka, mpe elongi na ye etelaki lisusu koleka; mpe bato na ye ya lokumu bakomaki komitungisa.
Wherewith king Baltasar was much troubled, and his countenance was changed: and his nobles also were troubled.
10 Tango mama ya mokonzi ayokaki basango ya makambo oyo ekomelaki mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, akotaki na ndako epai wapi bazalaki kosalela feti; alobaki: — Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko! Komitungisa te mpe kotika te ete elongi na yo etela!
Then the queen, on occasion of what had happened to the king, and his nobles, came into the banquet house: and she spoke and said: O king, live for ever: let not thy thoughts trouble thee, neither let thy countenance be changed.
11 Ezali na moto moko kati na mokili na yo, oyo azali na molimo ya banzambe ya bule kati na ye. Tango tata na yo azalaki mokonzi, amonaki kati na ye bososoli, mayele mpe bwanya oyo ekokana na bwanya ya banzambe. Boye, tata na yo, mokonzi Nabukodonozori, akomisaki ye mokonzi ya banganga-kisi, ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.
There is a man in thy kingdom that hath the spirit of the holy gods in him: and in the days of thy father knowledge and wisdom were found in him: for king Nabuchodonosor thy father appointed him prince of the wise men, enchanters, Chaldeans, and soothsayers, thy father, I say, O king:
12 Pamba te moto yango, Daniele, oyo tata na yo azalaki kobenga Belitsatsari, atondisama na mayele, na boyebi mpe na bososoli; azali lisusu na makoki ya kolimbola ndoto, masese mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi. Benga kaka Daniele wana, mpe akoyebisa yo ndimbola ya makomi yango.
Because a greater spirit, and knowledge, and understanding, and interpretation of dreams, and shewing of secrets, and resolving of difficult things, were found in him, that is, in Daniel: whom the king named Baltassar. Now therefore let Daniel be called for, and he will tell the interpretation.
13 Boye, bamemaki Daniele liboso ya mokonzi. Mokonzi atunaki ye: — Yo nde Daniele, moko kati na bawumbu oyo tata na ngai amemaki wuta na Yuda?
Then Daniel was brought in before the king. And the king spoke, and said to him: Art thou Daniel of the children of the captivity of Juda, whom my father the king brought out of Judea?
14 Nayoki na tina na yo ete ozali na molimo ya banzambe kati na yo, mpe ete ozali na bososoli, na mayele mpe na bwanya ya kokamwa!
I have heard of thee, that thou hast the spirit of the gods, and excellent knowledge, and understanding, and wisdom are found in thee.
15 Bato ya bwanya mpe banganga-kisi bawuti awa liboso na ngai mpo na kotanga makomi oyo mpe koyebisa ngai ndimbola na yango, kasi balongi te kopesa ndimbola yango.
And now the wise men the magicians have come in before me, to read this writing, and shew me the interpretation thereof: and they could not declare to me the meaning of this writing.
16 Nzokande, nayoki ete yo ozali na makoki ya kolimbola mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi; sik’oyo, soki olongi kotanga makomi oyo mpe opesi ngai ndimbola na yango, nakolatisa yo bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe okokoma moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya mokili na ngai ya bokonzi.
But I have heard of thee, that thou canst interpret obscure things, and resolve difficult things: now if thou art able to read the writing, and to shew me the interpretation thereof, thou shalt be clothed with purple, and shalt have a chain of gold about thy neck, and shalt be the third prince in my kingdom.
17 Daniele azongiselaki mokonzi: — Batela bakado na yo mpo na yo moko mpe pesa lifuti na yo epai ya moto mosusu! Kasi ngai, nazali kotanga makomi yango mpo na mokonzi; bongo, nakopesa ye ndimbola na yango.
To which Daniel made answer, and said before the king: Thy rewards be to thyself, and the gifts of thy house give to another: but the writing I will read to thee, O king, and shew thee the interpretation thereof.
18 Oh mokonzi, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apesaki tata na yo, Nabukodonozori, bokonzi; akomisaki ye moto monene mpe apesaki ye nkembo mpe lokumu.
O king, the most high God gave to Nabuchodonosor thy father a kingdom, and greatness, and glory, and honour.
19 Mpo na lokumu oyo apesaki ye, bato ya bikolo, ya mikili mpe ya nkota nyonso bakomaki kolenga na somo liboso na ye. Mokonzi azalaki koboma bato oyo azalaki na posa ya koboma, kobikisa bato oyo azalaki na posa ya kobikisa, kotombola bato oyo azalaki na posa ya kotombola mpe kosambwisa bato oyo azalaki na posa ya kosambwisa.
And for the greatness that he gave to him, all people, tribes, and languages trembled, and were afraid of him: whom he would, he slew: and whom he would, he destroyed: and whom he would, he set up: and whom he would, he brought down.
20 Kasi tango kaka motema na ye ekomaki na lofundu mpe na lolendo, akitisamaki wuta na kiti na ye ya bokonzi mpe babotolaki ye nkembo na ye.
But when his heart was lifted up, and his spirit hardened unto pride, he was put down from the throne of his kingdom, and his glory was taken away.
21 Babenganaki ye na molongo ya bato mpe bapesaki ye mayele ya banyama; akomaki kovanda elongo na ba-ane ya zamba, kolia matiti lokola bangombe mpe nzoto na ye ezalaki kopola na mamwe ya tongo, kino tango asosolaki ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya bokonzi nyonso ya bato mpe atombolaka na bokonzi moto nyonso oyo Ye alingi.
And he was driven out from the sons of men, and his heart was made like the beasts, and his dwelling was with the wild asses, and he did eat grass like an ox, and his body was wet with the dew of heaven: till he knew that the most High ruled in the kingdom of men, and that he will set over it whomsoever it shall please him.
22 Mpe yo Balitazari, mwana na ye ya mobali, atako oyebaki makambo wana nyonso, otamboli na komikitisa te.
Thou also his son, O Baltasar, hast not humbled thy heart, whereas thou knewest all these things:
23 Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso.
But hast lifted thyself up against the Lord of heaven: and the vessels of his house have been brought before thee: and thou, and thy nobles, and thy wives, and thy concubines have drunk wine in them: and thou hast praised the gods of silver, and of gold, and of brass, of iron, and of wood, and of stone, that neither see, nor hear, nor feel: but the God who hath thy breath in his hand, and all thy ways, thou hast not glorified.
24 Yango wana, atindi loboko oyo ekomi makomi oyo.
Wherefore he hath sent the part of the hand which hath written this that is set down.
25 Tala makomi oyo ekomami: Mene, Mene, Tekel, Parsin.
And this is the writing that is written: MANE, THECEL, PHARES.
26 Ndimbola ya maloba yango ezali: Mene: Nzambe atangi mikolo ya bokonzi na yo mpe akomisi yango na suka;
And this is the interpretation of the word. MANE: God hath numbered thy kingdom, and hath finished it.
27 Tekel: bameki kilo na yo na emekelo kilo, mpe emonani ete ozali na yo pepele;
THECEL: thou art weighed in the balance, and art found wanting.
28 Parsin: bokonzi na yo ekabwani mpe epesami epai ya bato ya Medi mpe ya Persi.
PHARES: thy kingdom is divided, and is given to the Medes and Persians.
29 Mbala moko, Balitazari apesaki mitindo ete balatisa Daniele bilamba ya motane, sheneti ya wolo na kingo mpe batatola na tina na ye ete akomi moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya bokonzi.
Then by the king’s command Daniel was clothed with purple, and a chain of gold was put about his neck: and it was proclaimed of him that he had power as the third man in the kingdom.
30 Mpe kaka na butu wana, babomaki Balitazari, mokonzi ya bato ya Babiloni.
The same night Baltasar the Chaldean king was slain.
31 Dariusi, moto ya Medi, akomaki mokonzi tango akokisaki mibu tuku motoba na mibale ya mbotama.
And Darius the Mede succeeded to the kingdom, being threescore and two years old.

< Daniele 5 >