< Daniele 3 >

1 Mokonzi Nabukodonozori asalisaki ekeko moko ya wolo, oyo ezalaki na bametele pene tuku misato na bosanda mpe bametele pene misato na mokuse. Atelemisaki yango kati na etando ya Dura, na etuka ya Babiloni.
Nabucodonosor, el rey, hizo una imagen de oro, sesenta codos de alto y seis codos de ancho; la levantó en el valle de Dura, en la tierra de Babilonia.
2 Abengisaki bayangeli oyo atiaki na bituka, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli, bapesi toli, babateli bomengo ya mokonzi, bato ya mibeko, basambisi mpe bakalaka nyonso ya bituka, mpo ete baya na feti ya kobandisa losambo ya ekeko oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki.
Y el rey Nabucodonosor envió a reunir a todos los capitanes, los jefes, los gobernantes, los sabios, los poseedores de dinero público, los jueces, los supervisores y todos los gobernantes de las divisiones del país, a ven a ver la presentación de la imagen que Nabucodonosor el rey había puesto.
3 Boye, bayangeli oyo atiaki na bituka, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli, bapesi toli, babateli ya bomengo ya mokonzi, bato ya mibeko, basambisi mpe bakalaka nyonso ya bituka basanganaki mpo na feti ya kobandisa losambo ya ekeko oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki, mpe batelemaki liboso na yango.
Entonces los capitanes, los jefes, los gobernantes, los sabios, los custodios del dinero público, los jueces, los supervisores y todos los gobernantes de las divisiones del país, se reunieron para ver la dedicación de la imagen que Nabucodonosor el rey había puesto; y tomaron su lugar ante la imagen que Nabucodonosor había puesto.
4 Molobeli ya mokonzi atatolaki na mongongo makasi: — Bino bato ya bikolo nyonso mpe ya nkota nyonso, tala makambo oyo bosengeli kosala:
Entonces uno de los pregoneros del rey dijo en voz alta: A ustedes se les da la orden, oh pueblos, naciones y lenguas.
5 « Tango kaka bokoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya lolenge nyonso ya bibetelo mindule, bosengeli kofukama mpo na kogumbamela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nabukodonozori asalisi.
Que cuando el sonido del cuerno, la pipa, el arpa, el trigón, el salterio, la gaita y todo tipo de instrumentos lleguen a tus oídos, debes caer de bruces ante la imagen de oro que Nabucodonosor el rey ha construido.
6 Moto nyonso oyo akoboya kofukama mpo na kogumbamela ekeko yango, bakobwaka ye mbala moko kati na libulu ya moto. »
Y cualquiera que no se postrare y adore, esa misma hora será puesto en un horno de fuego ardiente.
7 Yango wana, tango kaka bayokaki lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya bibetelo mindule lolenge nyonso, bato ya bikolo nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso bafukamaki mpo na kogumbamela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki.
Entonces, en ese momento, toda la gente, cuando el sonido del cuerno, la pipa, el arpa, el trigón, el salterio y todo tipo de instrumentos, llegaron a sus oídos, se postraron en adoración ante la imagen de oro que Nabucodonosor el rey había puesto.
8 Kaka na tango yango, ndambo ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto bayaki kofunda Bayuda.
En ese momento, ciertos caldeos se acercaron e hicieron una declaración contra los judíos.
9 Balobaki na mokonzi Nabukodonozori: — Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko!
Respondieron y le dijeron a Nabucodonosor rey, oh Rey, vive para siempre.
10 Oh mokonzi, opesaki mitindo ete moto nyonso oyo akoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya lolenge nyonso ya bibetelo mindule afukama mpo na kogumbamela ekeko ya wolo;
Tú, oh Rey, has dado la orden de que todo hombre, cuando el sonido de la bocina, la pipa, el arpa, el trigón, el salterio, la gaita y todo tipo de instrumentos, llegue a sus oídos, postre su rostro en adoración ante la imagen del oro:
11 mpe ete moto nyonso oyo akoboya kofukama mpo na kogumbamela ekeko yango, babwaka ye kati na libulu ya moto!
Y cualquiera que no se postre y adore será puesto en horno de fuego ardiente.
12 Kasi, mokonzi, ezali na ndambo ya Bayuda oyo okomisaki bayangeli na etuka ya Babiloni: Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, oyo bazali kotosa yo ata moke te: bazali kosalela banzambe na yo te mpe kogumbamela te ekeko ya wolo oyo osali.
Hay ciertos judíos a quienes has puesto sobre los negocios de la tierra de Babilonia, Sadrac, Mesac y Abed-nego; Estos hombres no te han prestado atención, oh Rey; no son siervos de tus dioses ni adoradores de la imagen de oro que has puesto.
13 Mokonzi Nabukodonozori atombokaki makasi mpe abengisaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego. Boye, bamemaki bango liboso ya mokonzi.
Entonces Nabucodonosor, en su ira y pasión, dio orden de traer a Sadrac, Mesac y Abed-nego. Luego hicieron que estos hombres entraran delante del rey.
14 Nabukodonozori atunaki bango: — Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, ezali penza ya solo ete bozali kosalela banzambe na ngai te mpe bozali kogumbamela te ekeko ya wolo oyo nasali?
Nabucodonosor respondió y les dijo: ¿Es verdad, Sadrac, Mesac y Abed-nego, que no son siervos de mi dios ni adoran la imagen de oro que he puesto?
15 Sik’oyo, bomibongisa! Tango kaka bokoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya nyonso ya bibetelo mindule, bokofukama mpo na kogumbamela ekeko oyo nasali. Soki boboyi kogumbamela yango, bokobwakama mbala moko kati na libulu ya moto. Boye, tokotala soki nzambe nini akokoka kokangola bino na maboko na ngai.
Ahora, si están listos, al escuchar el sonido de la bocina, la pipa, el arpa, el trigón, el salterio, la gaita y todo tipo de instrumentos, se postrarán en sus rostros en adoración ante la imagen que hice, está bien: pero si no rindes culto, esa misma hora serás puesto en un horno de fuego ardiente; ¿Y qué dios hay que pueda sacarte de mis manos?
16 Shadraki, Meshaki mpe Abedinego bazongiselaki mokonzi Nabukodonozori: — Tozali na tina na komibundela te na likambo oyo liboso na yo.
Sadrac, Mesac y Abed-nego, respondieron al rey Nabucodonosor, dijeron: No es necesario que le demos una respuesta a esta pregunta.
17 Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo.
Si nuestro Dios, cuyos sirvientes somos, puede mantenernos a salvo del horno de fuego ardiente, y de tus manos, oh Rey, nos mantendrá a salvo.
18 Kasi ata soki abikisi na Ye biso te, tolingi mokonzi oyeba ete, biso, tokosalela banzambe na yo te mpe tokogumbamela te ekeko ya wolo oyo osalaki.
Pero si no, asegúrate, oh Rey, de que no seremos siervos de tus dioses, ni daremos culto a la imagen de oro que has puesto.
19 Nabukodonozori atombokelaki makasi Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, mpe akangelaki bango elongi; apesaki mitindo ete bapelisa moto makasi penza mbala sambo koleka ndenge bapelisaka yango tango nyonso.
Entonces Nabucodonosor se llenó de ira, y la forma de su rostro cambió contra Sadrac, Mesac y Abed-nego: y dio órdenes de que el fuego se calentara siete veces más de lo que generalmente se calentaba.
20 Bongo apesaki mitindo na ndambo ya basoda ya mpiko kati na mampinga na ye ete bakanga Shadraki, Meshaki mpe Abedinego basinga mpe babwaka bango kati na libulu ya moto.
Y dio órdenes a ciertos hombres fuertes de su ejército para que pusieran cuerdas en Sadrac, Mesac y Abed-nego y las pusieran en el horno de fuego ardiente.
21 Boye, bakangaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego basinga, wana balataki bilamba na bango, banzambala na bango, bakazaka na bango, bitendi na bango oyo bakangaka na moto mpe bilamba mosusu, mpe babwakaki bango kati na libulu ya moto.
Entonces a estos hombres les pusieron cuerdas alrededor de ellos como estaban, con sus abrigos, sus pantalones, sus turbantes y su ropa, y fueron arrojados al horno de fuego ardiente.
22 Lokola mokonzi apesaki mitindo ete bapelisa moto ya libulu ya moto makasi penza, moto yango ebomaki basoda oyo babwakaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego kati na libulu ya moto.
Y como la orden del rey no debía ser puesta a un lado, y el calor del fuego era tan intenso, los hombres que tomaron Sadrac, Mesac y Abed-nego fueron quemados hasta morir por la llama del fuego.
23 Kasi Shadraki, Meshaki mpe Abedinego bakweyaki kati na libulu yango ya moto, bakanga bango basinga makasi.
Y estos tres hombres, Sadrac, Mesac y Abed-nego, con las cuerdas alrededor de ellos, descendieron al fuego ardiente y llameante.
24 Mokonzi Nabukodonozori akamwaki mpe atelemaki na lombangu; atunaki bapesi toli na ye: — Boni, tobwakaki te bato misato kati na moto, bakanga bango basinga? Bazongiselaki mokonzi: — Mokonzi, tosalaki bongo!
Entonces el rey Nabucodonosor, lleno de temor y asombro, se levantó rápidamente y dijo a sus sabios: ¿No pusimos tres hombres en cuerdas al fuego? Y respondieron y le dijeron al rey: Verdadero, oh Rey.
25 Alobaki na bapesi toli na ye: — Botala! Nazali komona bato minei bazali kotambola kati na moto, bakangama basinga te mpe moto ezali kozikisa bango te; mpe moto ya minei azali lokola mwana ya banzambe.
Respondió y dijo: ¡Mira! Veo a cuatro hombres sueltos, caminando en medio del fuego, y no están quemados; y la forma del cuarto es como un hijo de los dioses.
26 Nabukodonozori apusanaki pene ya monoko ya libulu ya moto mpe agangaki na mongongo makasi: — Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bobima kuna mpe boya awa! Shadraki, Meshaki mpe Abedinego babimaki wuta na libulu ya moto.
Entonces Nabucodonosor se acercó a la puerta del horno de fuego ardiente; respondió y dijo: Sadrac, Mesac y Abed-nego, siervos del Dios Altísimo, salgan y vengan aquí. Entonces Sadrac, Mesac y Abed-nego salieron del fuego.
27 Bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli mpe bapesi toli ya mokonzi bazingelaki bango; mpe bamonaki ete moto ezikisaki te ezala banzoto na bango, suki ya mito na bango to bilamba na bango, mpe batikalaki koyoka bango ata solo ya moto te.
Y los capitanes, los jefes y los gobernantes, y los sabios del rey que se habían reunido, vieron a estos hombres, sobre cuyos cuerpos el fuego no tenía poder, y ni un pelo de sus cabezas fue quemado, ni su vestimenta olía a fuego sobre ellos.
28 Nabukodonozori alobaki: — Tika ete Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego akumisama; Ye nde atindaki anjelu na Ye mpo ete abikisa basali na Ye, pamba te batielaka Ye motema! Batosaki mitindo ya mokonzi te mpe bandimaki kobungisa bomoi na bango na esika ya kosalela mpe kogumbamela nzambe mosusu, soki Nzambe na bango te.
Nabucodonosor respondió y dijo: Alabado sea el Dios de Sadrac, Mesac y Abed-nego, que envió a su ángel y mantuvo seguros a sus siervos que tenían fe en él y que pusieron la palabra del rey a un lado. y entregaron sus cuerpos al fuego, para que no pudieran ser siervos o adoradores de ningún otro dios sino de su Dios.
29 Yango wana, nazwi mokano ete moto nyonso, azala ya mokili, ekolo to lokota nini, oyo akoloba mabe mpo na Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, bakokata-kata ye na biteni, bakobuka ndako na ye mpe bakokomisa yango mopiku ya mbindo, pamba te Nzambe mosusu azali te, oyo akoki kobikisa bato na Ye na lolenge oyo!
Y es mi decisión que cualquier pueblo, nación o lengua que diga mal contra el Dios de Sadrac, Mesac y Abed-nego, será cortado en pedazos y sus casas serán destruidas; porque no hay otro dios que sea capaz de dar salvación como esta.
30 Sima na yango, mokonzi atombolaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego kati na etuka ya Babiloni.
Entonces el rey dio a Sadrac, Mesac y Abed-nego les dio autoridad aún mayor en la tierra de Babilonia.

< Daniele 3 >