< Daniele 2 >
1 Na mobu ya mibale ya bokonzi na ye, Nabukodonozori alotaki ndoto. Molimo na ye etungisamaki makasi mpe pongi ekimaki ye.
А за другого року Навуходоносорового царюва́ння присни́лися Навуходоносорові сни. І занепоко́ївся дух його, і сон його утік від нього.
2 Mokonzi abengisaki bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato ya mayele ya mabe mpo ete bayebisa ye ndoto oyo alotaki. Tango bayaki, batelemaki liboso ya mokonzi;
І сказав цар покли́кати чарівникі́в та заклиначі́в, і чаклуні́в та халде́їв, щоб розповіли́ царе́ві його сни. І вони поприхо́дили, і поставали перед царськи́м обличчям.
3 mpe mokonzi ayebisaki bango: — Nalotaki ndoto moko oyo ezali kotungisa molimo na ngai makasi; nazali na posa ya koyeba ndimbola na yango.
І сказав до них цар: „Снився мені сон, і занепоко́ївся дух мій, щоб пізнати той сон.“
4 Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki na lokota ya bato ya Arami: — Tika ete mokonzi awumela na bomoi seko na seko! Yebisa ndoto na yo epai ya basali na yo, mpe tokolimbola yango.
А халде́ї говорили царе́ві по-араме́йському: „Ца́рю, живи навіки! Розкажи перше сон своїм рабам, а ми об'явимо ро́зв'язку“.
5 Mokonzi alobaki na bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto: — Tala mokano oyo nasili kozwa: « Soki boyebisi ngai te ndoto oyo nalotaki mpe ndimbola na yango, nakokata bino biteni-biteni mpe nakobuka-buka bandako na bino.
Цар відповів та й сказав до халдеїв: „Моє слово невідкличне: якщо ви не розповісте́ мені сна та його ро́зв'язку, будете почетверто́вані, а ваші доми обе́рнуться в руїни.
6 Kasi soki boyebisi mpe bopesi ngai ndimbola na yango, nakopesa bino bakado, lifuti mpe lokumu mingi. Yango wana, boyebisa ngai ndoto yango mpe bopesa ngai ndimbola na yango. »
А якщо ви розповісте́ сон та його ро́зв'язку, оде́ржите від мене да́ри й нагоро́ду та велику честь; тому об'явіть мені сон та його ро́зв'язку“.
7 Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki lisusu epai ya mokonzi: — Tika ete mokonzi ayebisa ndoto na ye, mpe biso, tokolimbolela ye yango!
Вони відповіли́ вдруге та й сказали: „Цар перше розкаже сон своїм рабам, а ми об'я́вимо ро́зв'язку“.
8 Mokonzi azongisaki: — Nandimi solo ete bozali kolekisa tango, pamba te boyebi malamu ete nakobongola mokano na ngai te.
Цар відповів та й сказав: „Я знаю напевно, що ви хочете виграти час, бо бачите, що слово моє невідкли́чне.
9 Soki boyebisi ngai ndoto yango te, boyeba malamu ete etumbu moko kaka mpe ya ndenge moko ezali kozela bino! Ah, boyokani koyebisa ngai makambo ya lokuta mpe ya mabe mpo bokanisi ete makambo ekobongwana! Mpo na yango, boyebisa ngai ndoto yango, mpe nakondima ete bozali na makoki ya kolimbola yango.
Якщо ви не розкажете мені сна, то один у вас за́дум, бо ви змовилися говорити передо мною лож та неправду, аж по́ки змі́ниться час. Тому́ розкажіть мені сон, і я пізнаю, що́ ви об'явите мені, і його ро́зв'язку“.
10 Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki na mokonzi: — Moto moko te kati na mokili akokoka kosala makambo oyo mokonzi azali kosenga. Mpe mokonzi moko te, ezala azalaki moto monene to moto na nguya, asila kosenga likambo ya boye epai ya banganga-kisi, epai ya bato ya mayele ya mabe mpe epai ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto.
Халдеї відповіли́ перед царем та й сказали: „Нема на суходо́лі люди́ни, що могла б об'явити цареву справу, бо жоден великий та панівни́й цар не питався такої речі від жодного чарівника́ й заклинача́ та халде́я.
11 Makambo oyo mokonzi azali kosenga ezali pasi makasi, moto moko te akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye; ezali kaka banzambe nde bakoki kosala yango mpo ete bavandaka kati na bato te.
А справа, про яку питається цар, тяжка́, і немає таких, що об'явили б її перед царем, окрім богі́в, що не мають своїх ме́шкань ра́зом із тілом“.
12 Mbala moko, mokonzi asilikaki mpe atombokaki makasi; apesaki mitindo ete baboma bato nyonso ya bwanya ya Babiloni.
За це цар розгнівався, та сильно розпі́нився, і наказав вигубити всіх вавилонських мудреці́в.
13 Boye, sango ya mokano ya koboma bato nyonso ya bwanya epanzanaki, mpe batindaki bato koluka Daniele elongo na baninga na ye mpo ete baboma bango.
І вийшов нака́з, і вбивали мудреці́в, і шукано Даниїла та його товариші́в, щоб повбива́ти.
14 Tango Arioki, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, abimaki mpo na kokende koboma bato ya bwanya ya Babiloni, Daniele asololaki na ye na bwanya mpe na mayele.
Того ча́су Даниїл розповів розважно та розумно Арйохові, начальникові царсько́ї сторожі, що вийшов був побива́ти вавилонських мудреці́в.
15 Daniele atunaki Arioki: « Mpo na nini mokonzi azwi mokano ya makasi boye? » Bongo Arioki atalisaki Daniele makambo yango.
Він заговорив та й сказав Арйохові, царсько́му владиці: „Чому́ такий жорстокий нака́з від царя?“Тоді Арйо́х розповів Даниїлові справу.
16 Tango Daniele ayokaki bongo, akotaki epai ya mokonzi mpe asengaki ye tango mpo ete akoka kopesa ye ndimbola ya ndoto yango;
І Даниїл увійшов, і просив просити від царя, щоб дав йому ча́су, і він об'явить цареві ро́зв'язку сна.
17 bongo Daniele azongaki na ndako na ye mpe ayebisaki makambo yango epai ya Anania, Mikaeli mpe Azaria, baninga na ye.
Тоді Даниїл пішов до свого дому, і завідо́мив про справу товариші́в своїх, Ананію, Мисаїла та Азарію,
18 Alobaki na bango ete basenga ngolu mpe mawa ya Nzambe ya Lola na tina na mabombami oyo, mpo ete baboma te ye Daniele, baninga na ye mpe bato mosusu ya bwanya ya Babiloni.
щоб просили милости від Небесного Бога на цю таємни́цю, щоб не вигубили Даниїла та товариші́в його ра́зом з рештою вавилонських мудреці́в.
19 Bongo na butu, Daniele azwaki emoniseli oyo elakisaki ye mabombami yango; boye, akumisaki Nzambe ya Lola.
Тоді Даниїлові відкрита була таємни́ця в нічно́му виді́нні, і Даниїл просла́вив Небесного Бога.
20 Daniele alobaki: Tika ete Kombo ya Nzambe ekumisama libela na libela! Bwanya mpe nguya ezali ya Ye.
Даниїл заговорив та й сказав: „Нехай буде благослове́нне Боже Ім'я́ від віку й аж до віку, бо Його мудрість та сила.
21 Ezali Ye nde abongolaka tango mpe makambo, alongolaka bakonzi mpe atombolaka bakonzi, apesaka bwanya epai ya bato ya bwanya mpe boyebi epai ya bato ya mayele.
І Він зміняє часи́ та по́ри року, скидає царів і настановляє царів, дає мудрість мудрим, і пізна́ння розумним.
22 Alakisaka makambo ya bozindo mpe ebombama, ayebaka makambo oyo esalemaka na molili, mpe pole ezali kati na Ye.
Він відкриває глибоке та сховане, знає те, що в те́мряві, а світло спочиває з Ним.
23 Oh Nzambe ya batata na ngai, nazali kosanzola mpe kokumisa Yo mpo na bwanya mpe nguya oyo opesi ngai, pamba te oyebisi ngai makambo oyo tosengaki Yo mpe otalisi biso ndoto ya mokonzi.
Тобі, Боже батьків моїх, я дякую та сла́влю Тебе, що Ти дав мені мудрість та силу, а тепер відкри́в мені, що я від Тебе просив, — бо Ти відкрив нам справу царе́ву“.
24 Sima na yango, Daniele akendeki epai ya Arioki oyo mokonzi apesaki mokumba ya koboma bato ya bwanya ya Babiloni; alobaki na ye: — Koboma bato ya bwanya ya Babiloni te! Mema ngai epai ya mokonzi, mpe nakopesa ye ndimbola ya ndoto na ye.
Пото́му Даниїл пішов до Арйоха, якого цар призна́чив ви́губити вавилонських мудреці́в. Пішов він та й так йому сказав: „Не губи вавилонських мудреці́в! Заведи мене перед царя, — і я об'явлю́ цареві ро́зв'язку сна “.
25 Arioki amemaki Daniele na lombangu liboso ya mokonzi mpe alobaki na ye: — Mokonzi, namoni moto moko kati na bawumbu oyo bawutaki na Yuda, oyo akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye mpe kolimbola yango.
Тоді Арйо́х негайно привів Даниїла перед царя, та й сказав йому так: „Знайшов я мужа з синів Юдиного вигна́ння, що об'я́вить царе́ві ро́зв'язку сна “.
26 Mokonzi atunaki Daniele oyo bazalaki lisusu kobenga Belitsatsari: — Ozali na makoki ya koyebisa ngai makambo oyo namonaki na ndoto mpe kolimbola yango?
Цар заговорив та й сказав Даниїлові, що йому було йме́ння Валтаса́р: „Чи ти можеш об'явити мені сон, якого я бачив, та його ро́зв'язку?“
27 Daniele azongisaki liboso ya mokonzi: — Bato ya bwanya, bato ya mayele ya mabe, banganga-kisi mpe bato oyo bayebaka makambo oyo ekoya bazali na makoki te ya koyebisa mokonzi mabombami oyo azali kotuna;
Даниїл відповів перед царем та й сказав: „Таємни́ці, про яку питається цар, не можуть об'явити цареві ані мудреці́, ані заклиначі́, ані чарівники́, ані віщуни́.
28 kasi kati na Lola, ezali na Nzambe moko oyo alakisaka mabombami; mpe alakisi mokonzi Nabukodonozori makambo oyo ekosalema na mikolo oyo ekoya. Tala ndoto oyo olotaki mpe bimoniseli oyo ozwaki tango ozalaki ya kolala na mbeto na yo:
Але є на небеса́х Бог, що відкриває таємниці, і Він завідо́мив царя Навуходоно́сора про те, що́ бу́де в кінці днів. Твій сон та виді́ння твоєї голови на ложі твоїм — оце вони:
29 « Oh mokonzi, wana ozalaki ya kolala na mbeto na yo, okomaki kokanisa makambo oyo ekoya na sima ya tango; bongo, Ye oyo alakisaka mabombami alakisaki yo makambo oyo ekoya.
Тобі, ца́рю, прихо́дили на ложе твоє думки́ твої про те, що́ буде потім, а Той, Хто відкриває таємницю, показав тобі те, що́ буде.
30 Bongo soki alakisi mabombami yango epai na ngai, ezali te mpo ete naleki bato nyonso na bwanya, kasi ezali mpo ete mokonzi ayeba ndimbola ya ndoto na ye mpe makambo oyo ezali kotungisa motema na ye.
А мені ця таємниця відкрита не через мудрість, що була б у мені більша від мудрости всіх живих, а тільки на те, щоб об'явити царе́ві роз́в'язку, і ти пізна́єш думки́ свого серця.
31 Oh mokonzi, tala emoniseli oyo ozwaki: ‹ Ekeko moko ya monene ezalaki liboso na yo: ezalaki monene penza, ezalaki kongenga makasi mpe ezalaki somo mpo na kotala;
Ти, ца́рю, бачив, аж ось один великий бовва́н, — бовван цей величе́зний, а блиск його дуже си́льний; він стояв перед тобою, а ви́гляд його був страшни́й.
32 moto na yango ezalaki ya wolo ya peto, tolo mpe maboko na yango ezalaki ya palata, libumu mpe loketo na yango ezalaki ya bronze,
Цей бовва́н такий: голова його — з чистого золота, груди його та раме́на його — зо срі́бла, нутро́ його та стегно́ його — з міді,
33 makolo na yango ezalaki ya ebende, matambe na yango ezalaki, ndambo moko ya ebende, mpe ndambo mosusu, ya mabele oyo basalelaka bikeko.
голі́нки його — з заліза, но́ги його — частинно з заліза, а частинно з глини.
34 Wana ozalaki kotala ekeko yango, libanga moko ekweyaki yango moko (moto moko te abwakaki yango), ekweyelaki ekeko yango na matambe na yango ya ebende mpe ya mabele oyo basalelaka bikeko, enikaki matambe yango mpe ekomaki putulu.
Ти бачив, аж ось одірва́вся камінь сам, не через ру́ки, і вдарив бовва́на по нога́х його, що з заліза та з глини, — і розторо́щив їх.
35 Mbala moko, ezala ebende to mabele oyo basalelaka bikeko to bronze to palata to mpe wolo, nyonso epanzanaki, ekomaki mike-mike mpe ekomaki kopumbwa ndenge matiti ya ble epumbwaka tango bapupolaka yango; mopepe ememaki yango mpe elimwisaki yango. Kasi libanga oyo ekweyelaki ekeko yango ekomaki ngomba moko ya monene oyo etondisaki mokili mobimba. › »
Того ча́су розторо́щилося, як одне, — залізо, глина, мідь, срі́бло та золото, і вони стали, немов та поло́ва з то́ку жнив, а вітер їх розві́яв, і не знайшлося по них жодного слі́ду; а камінь, що вдарив того бовва́на, став великою горою, і напо́внив усю землю.
36 Wana nde ezalaki ndoto; mpe sik’oyo, tokopesa ndimbola na yango liboso ya mokonzi!
Оце той сон, а його ро́зв'язку зараз скажемо перед царем.
37 Oh mokonzi, ozali mokonzi ya bakonzi! Nzambe ya Lola apesaki yo makasi mpe nguya, bokonzi mpe nkembo;
Ти, ца́рю, цар над царя́ми, якому Небесний Бог дав царство, вла́ду й міць та славу.
38 atiaki na se ya bokonzi na yo bato nyonso ya mokili, banyama ya zamba mpe bandeke ya likolo; atiaki yo mokonzi na bango nyonso, na bisika nyonso oyo bavandaka! Ezali yo nde ozali moto wana ya wolo.
І скрізь, де ме́шкають лю́дські сини, польова́ звірина́ та птаство небесне, Він дав їх у твою руку, та вчинив тебе пану́ючим над усіма́ ними. Ти — голова, що з золота.
39 Sima na yo, bokonzi mosusu ekobima, kasi ekoleka bokonzi na yo te na nguya; bongo na sima, bokonzi ya misato ekobima mpe ekokonza na mabele mobimba: yango nde ezali kolakisa bronze.
А по тобі постане інше царство, нижче від тебе, і царство третє, інше, що з міді, яке буде панувати над усією землею.
40 Mpe na suka, bokonzi ya minei ekobima, ekozala makasi lokola ebende; ndenge ebende ebukaka, enikaka mpe epanzaka nyonso, ndenge wana mpe ekobuka mpe ekopanza babokonzi mosusu ya liboso.
А царство четверте буде си́льне, як залізо, бо залізо товче́ й розбиває все, так і воно стовче́ й розі́б'є, як залізо, що все розбиває.
41 Mpe ndenge kaka omonaki ete matambe mpe misapi ya makolo na yango ezali ndambo moko, ya mabele oyo basalelaka bikeko, mpe ndambo mosusu, ya ebende, elingi koloba ete bokonzi yango ekokabwana; kasi kati na yango, ekozala na eloko moko ya makasi lokola ebende, ndenge kaka omonaki ebende basangisa na mabele oyo basalelaka bikeko.
А що ти бачив но́ги та па́льці частинно з ганча́рської глини, частинно з заліза, то це буде поді́лене царство, і в ньому бу́де трохи залізної міці, бо ти бачив залізо, змішане з глейко́ю глиною.
42 Mpe lokola misapi ya makolo ezalaki ndambo, ya ebende, mpe ndambo mosusu, ya mabele oyo basalelaka bikeko, bokonzi yango ekozala, ngambo moko, makasi, mpe ngambo mosusu, ezanga makasi.
А пальці ніг частинно з заліза, а частинно з глини, то й частина царства буде си́льна, а частина буде ламли́ва.
43 Mpe ndenge kaka omonaki ebende basangisa na mabele oyo basalelaka bikeko, elakisi ete bato bakoluka kosangana na nzela ya boyokani, kasi bakotikala kosangana te, ndenge kaka ebende esanganaka te na mabele oyo basalelaka bikeko.
А що бачив ти залізо, змішане з глейко́ю глиною, то вони змішані бу́дуть лю́дським насінням, а не будуть приляга́ти одне до о́дного, як залізо не змішується з глиною.
44 Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.
А за днів тих царів Небесний Бог поставить ца́рство, що навіки не зруйнується, і те царство не буде ві́ддане іншому наро́дові. Воно потовче́ й покінчи́ть усі ті царства, а само буде стояти навіки.
45 Yango nde ndimbola ya emoniseli ya libanga oyo omonaki kokweya yango moko wuta na ngomba, oyo loboko ya moto moko te ebwakaki, mpo na koya kopanza ebende, bronze, mabele oyo basalelaka bikeko, palata mpe wolo. Nzambe Monene alakisi mokonzi makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. Ndoto oyo ezali penza kolakisa makambo ya solo, mpe ndimbola na yango ezali ebongi na kondima.
Бо ти бачив, що з гори відірва́вся камінь сам, не руками, і пото́вк залізо, мідь, гли́ну, срі́бло та золото. Великий Бог об'явив царе́ві те, що станеться по́тім. А сон цей певний, і певна його ро́зв'язка!“
46 Boye, mokonzi Nabukodonozori agumbamaki elongi kino na mabele, liboso ya Daniele, mpe apesaki ye lokumu; apesaki mitindo ete bapesa ye makabo mpe babonzela ye malasi ya ansa.
Тоді цар Навуходоно́сор упав на своє обличчя й поклонився Даниїлові, і наказав прино́сити йому хлі́бну жертву та лю́бі па́хощі!
47 Mokonzi alobaki na Daniele: « Solo, Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bakonzi mpe Molakisi mabombami, mpo ete okoki kolakisa mabombami oyo! »
Цар відповів Даниїлові та й сказав: „Направду, що ваш Бог — це Бог над бога́ми та Пан над царя́ми, і Він відкриває таємни́ці, коли міг ти відкрити оцю таємни́цю!“
48 Sima, mokonzi atombolaki Daniele na lokumu oyo eleki likolo mpe apesaki ye bakado mpe bozwi ebele; akomisaki ye moyangeli ya etuka mobimba ya Babiloni mpe mokambi ya bato na yango nyonso ya bwanya.
Тоді цар звели́чив Даниїла, і дав йому числе́нні дару́нки, і вчинив його паном над усім вавилонським кра́єм, і великим провіднико́м над усіма вавилонськими мудреця́ми.
49 Daniele asengaki na mokonzi Nabukodonozori ete atia Shadraki, Meshaki mpe Abedinego lokola bayangeli ya etuka mobimba ya Babiloni wana ye moko Daniele atikalaki kosala pembeni ya mokonzi.
А Даниїл просив від царя, і він призна́чив над справами вавилонського кра́ю Шадра́ха, Меша́ха та Авед-Не́ґо, а Даниїл був при царсько́му дворі́.