< Daniele 12 >

1 Na tango wana, Misheli, mokambi monene ya ba-anjelu, oyo abatelaka bato na yo akotelema. Ekozala tango ya pasi penza, pasi oyo etikala nanu kozala te wuta bikolo ezala na mokili kino na tango wana. Kasi na tango wana, bato ya ekolo na yo, oyo bakombo na bango ekomonana kati na buku, bakobika.
«و در آن زمان میکائیل، امیر عظیمی که برای پسران قوم تو ایستاده است خواهد برخاست و چنان زمان تنگی خواهد شدکه از حینی که امتی به وجود آمده است تا امروزنبوده و در آنزمان هر یک از قوم تو که در دفترمکتوب یافت شود رستگار خواهد شد.۱
2 Ebele ya bato oyo bakundama na se ya mabele bakosekwa: bamoko mpo na bomoi ya seko, mpe mosusu mpo na soni mpe somo ya libela.
وبسیاری از آنانی که در خاک زمین خوابیده اندبیدار خواهند شد، اما اینان به جهت حیات جاودانی و آنان به جهت خجالت و حقارت جاودانی.۲
3 Bato oyo batambolaki na bwanya bakongenga lokola pole ya mapata; mpe bato oyo bakolakisa bato ebele nzela ya bosembo, bango mpe bakongenga lokola minzoto libela na libela.
و حکیمان مثل روشنایی افلاک خواهند درخشید و آنانی که بسیاری را به راه عدالت رهبری می‌نمایند مانند ستارگان خواهندبود تا ابدالاباد.۳
4 Kasi yo, Daniele, batela maloba oyo lokola sekele mpe kanga buku kino na tango ya suka. Mingi bakotambola bipai na bipai, mpe boyebi ya bato ekokola makasi. »
اما تو‌ای دانیال کلام را مخفی دار و کتاب را تا زمان آخر مهر کن. بسیاری بسرعت تردد خواهند نمود و علم افزوده خواهدگردید.»۴
5 Boye, wana ngai, Daniele, nazalaki kotala, namonaki bato mibale batelemi liboso na ngai: moko azalaki na ngambo moko ya ebale, mpe mosusu azalaki na ngambo mosusu ya ebale.
پس من دانیال نظر کردم و اینک دو نفر دیگریکی به اینطرف و دیگری به آنطرف نهر ایستاده بودند.۵
6 Moko kati na bango alobaki epai ya moto oyo alataki bilamba ya lino mpe atelemaki likolo ya mayi ya ebale: — Makambo oyo ya kokamwa ekosala tango boni?
و یکی از ایشان به آن مرد ملبس به کتان که بالای آبهای نهر ایستاده بود گفت: «انتهای این عجایب تا بکی خواهد بود؟»۶
7 Moto oyo alataki bilamba ya lino mpe atelemaki likolo ya mayi ya ebale atombolaki loboko na ye ya mobali mpe loboko na ye ya mwasi na likolo, mpe nayokaki ye kolapa ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko: — Ekozala mibu misato na ndambo. Tango nguya ya ekolo ya bule ekosila, makambo oyo nyonso ekokokisama.
و آن مرد ملبس به کتان را که بالای آبهای نهر ایستاده بود شنیدم که دست راست و دست چپ خود را بسوی آسمان برافراشته، به حی ابدی قسم خورد که برای زمانی و دو زمان و نصف زمان خواهد بود و چون پراکندگی قوت قوم مقدس به انجام رسد، آنگاه همه این امور به اتمام خواهد رسید.۷
8 Nayokaki ye, kasi nasosolaki te. Boye, natunaki: — Makambo oyo ekosukela ndenge nini, nkolo na ngai?
و من شنیدم اما درک نکردم پس گفتم: «ای آقایم آخر این امور چه خواهد بود؟»۸
9 Azongisaki: — Daniele, kende na yo, pamba te maloba oyo ezali sekele, mpe buku na yango ekangama kino na tango ya suka.
او جواب داد که «ای دانیال برو زیرا این کلام تا زمان آخرمخفی و مختوم شده است.۹
10 Bato ebele bakopetolama, bakozanga mbeba mpe bakokoma bato ya kokoka; kasi bato mabe bakokoba kaka kosala mabe. Moto moko te ya mabe akososola, kaka bato oyo bakozala na bwanya nde bakososola.
بسیاری طاهر وسفید و مصفی خواهند گردید و شریران شرارت خواهند ورزید و هیچ کدام از شریران نخواهندفهمید لیکن حکیمان خواهند فهمید.۱۰
11 Wuta tango oyo bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo kino tango oyo bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi, ekoleka mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku libwa.
و ازهنگام موقوف شدن قربانی دایمی و نصب نمودن رجاست ویرانی، هزار و دویست و نود روزخواهد بود.۱۱
12 Tika ete apambolama ye oyo azali kozela kino na suka ya mokolo ya nkoto moko na nkama misato na tuku misato na mitano.
خوشابه‌حال آنکه انتظار کشد و به هزار و سیصد و سی و پنج روز برسد.۱۲
13 Mpo na yo, yika mpiko kino na suka; okopema mpe, na mokolo ya suka, okosekwa mpo na kozwa litomba na yo.
اما تو تابه آخرت برو زیرا که مستریح خواهی شد و درآخر این ایام در نصیب خود قایم خواهی بود.»۱۳

< Daniele 12 >